Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Philemon 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Paul, a prisoner of Christ Jesus, and Timothy our brother, to Philemon, our dear friend and co-worker, Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto, mpe Timote, ndeko na biso ; Epai ya Filemo, molingami na biso mpe moninga ya mosala ;
2 and to our sister Apphia, our fellow soldier Archippus, and the church that meets in your house: epai ya Apia, ndeko na biso ya mwasi ; epai ya Arshipe, moninga na biso ya etumba ; mpe epai ya Lingomba oyo esanganaka na ndako ya Filemo :
3 Grace and peace to you from our Father and the Lord Jesus Christ. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !
4 I always thank my Father as I remember you in my prayers, Tango nyonso nasambelaka, natangaka kombo na yo mpe nazongisaka matondi epai ya Nzambe na ngai,
5 because I hear of your love and faith in the Lord Jesus and for all his holy people. pamba te nazali koyoka sango ya bolingo na yo mpo na basantu nyonso, mpe ya kondima na yo kati na Nkolo Yesu.
6 I pray your shared faith becomes effective as you come to understand every good thing we have in Christ. Nabondelaka ete kondima oyo ezali kosangisa biso emonisama na misala, mpo ete ososola malamu bolamu nyonso oyo tozali na yango kati na Klisto.
7 Your love has brought me great joy and comfort, brother, since you've refreshed the hearts of his holy people. Ndeko na ngai, bolingo na yo mpo na basantu ezali penza kopesa ngai esengo mingi mpe kolendisa ngai, pamba te okitisaki bango mitema.
8 Therefore, although in Christ I am bold enough to command you to do what is right, Yango wana, atako, kati na Klisto, nazali na makoki ya kotinda yo kosala likambo songolo to pakala,
9 instead, for love's sake I appeal—I, Paul, an old man, now also a prisoner of Christ Jesus. kasi nasepeli kosenga na yo na kombo ya bolingo, ngai Polo, mobange mpe sik’oyo mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto ;
10 I appeal to you for my child Onesimus, whose father I became while I was in chains. nasepeli kosenga na yo na tina na Onezime oyo azali mwana na ngai kati na Klisto, pamba te nakomaki tata na ye ya molimo awa, kati na boloko.
11 He was once useless to you, but now is useful to you and me. Na kala, azalaki na tina ata moko te na miso na yo, kasi sik’oyo akomi na tina mingi na miso na yo mpe na miso na ngai.
12 I am sending him back to you—and in doing so I am sending my very heart. Nazali kozongisa ye epai na yo, pamba te azali penza motema na ngai.
13 I wanted to keep him with me, to serve me on your behalf while I'm in chains for the gospel. Nalingaki ete atikala elongo na ngai awa, na boloko epai wapi nazali mpo na Sango Malamu, mpo ete asalisa ngai na esika na yo.
14 But I wanted to do nothing without your consent, so your good deed would not be forced, but voluntary. Nzokande nakokaki te kosala yango, pamba te nazwaki ndingisa na yo te, mpo ete bolamu oyo okosala ezala oyo ewuti na motema na yo moko, kasi na kotindika te.
15 Perhaps this is why he was separated from you briefly, so you'd have him back forever. Tango mosusu, mwa tango moke oyo bozalaki ya kokabwana na Onezime ezalaki mpo ete ozwa ye mpo na libela,
16 No longer as a slave, but more than a slave—a beloved brother, especially to me, but even more to you, both in the flesh and in the Lord. lokola mowumbu lisusu te kasi koleka kutu ata mowumbu, lokola ndeko ya bolingo. Azali na litomba mingi mpo na ngai, kasi azali mpe na litomba mingi lisusu koleka mpo na yo, lokola moto mpe lokola ndeko kati na Nkolo.
17 So if you consider me a partner, welcome him as you would welcome me. Soki ya solo ozwaka ngai lokola ndeko na yo kati na kondima, yamba ye lokola nde oyambi ngai.
18 If he wronged you at all, or owes anything, put it on my account. Soki asalaki yo mabe to mpe azali na niongo na yo, tanga yango na moto na ngai.
19 I, Paul, write this with my own hand: I'll repay it—not to mention you owe me yourself as well. Ezali loboko na ngai moko Polo nde ezali kokoma makambo oyo : ngai moko nakofuta yo niongo yango. Nazali mpe na posa te ya kokanisela yo ete yo mpe ozali na niongo na ngai : niongo yango ezali nde bomoi na yo.
20 Yes, brother, do me this favor in the Lord—refresh my heart in Christ. Ndeko na ngai, mpo na bolingo ya Nkolo, salela ngai bolamu wana ; kitisa ngai motema lokola ndeko na yo kati na Klisto.
21 Trusting you'll obey, I write to you, knowing you'll do even more than I ask. Nakomeli yo na elikya ete okosala makambo oyo nasengi yo, mpe nayebi ete okosala kutu koleka.
22 Also prepare a guest room for me—I hope through your prayers to be graciously given back to you. Nasengi na yo lisusu ete obongisela ngai esika ya kolala, pamba te nazali na elikya ete Nzambe akozongisa ngai epai na bino lokola eyano na mabondeli na bino.
23 Epaphras, my fellow prisoner in Christ Jesus, sends you greetings, Epafrasi, moninga na ngai ya boloko kati na Yesu-Klisto, atindeli yo mbote.
24 and so do Mark, Aristarchus, Demas, and Luke, my fellow workers. Ndenge moko mpe Malako, Arisitarke, Demasi mpe Luka, baninga na ngai ya mosala, bango mpe batindeli yo mbote.
25 The grace of the Lord Jesus Christ be with your spirit. Amen. Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala elongo na molimo na yo !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]