Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hebrews 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Long ago, in many times and many ways, our Heavenly Father spoke to our ancestors through the prophets. Na tango ya kala, Nzambe azalaki koloba, mbala mingi mpe na lolenge ebele, epai ya bakoko na biso, na nzela ya basakoli.
2 But in these final days he spoke to us by his Son, whom he appointed heir of all things and through whom he made the universe. Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili.
3 The Son is the brightness of our Father's glory, the exact image of his being, sustaining all things by his powerful word. After purifying sins, he sat down at the right hand of the Majesty on high. Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
4 He became as much greater than angels as his inherited name is greater than theirs. mpe azwi esika ya lokumu penza koleka ba-anjelu mpo ete azwi Kombo oyo eleki bakombo ya ba-anjelu.
5 For to which of the angels did our Father ever say, "You are my Son; today I have become your Father"? Or again, "I will be his Father, and he will be my Son"? Epai ya anjelu nini penza Nzambe aloba : « Ozali mwana na ngai ; na mokolo ya lelo, nakomi Tata na yo ? » To mpe : « Ngai nakozala Tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai ? »
6 And again, when he brings the firstborn into the world, he says, "Let all my angels worship him. Mpe lisusu, tango Nzambe atindaki Mwana na Ye ya liboso kati na mokili, epai ya nani aloba : « Tika ete ba-anjelu nyonso ya Nzambe bagumbamelaka Yo ? »
7 Of the angels he says, "He makes his angels winds, and his servants flames of fire." Nzokande, tala makambo oyo Nzambe aloba na tina na ba-anjelu : « Akomisaka ba-anjelu na Ye mipepe, mpe basali na Ye, ndemo ya moto. »
8 But about the Son he says, "Your throne, O God, is forever and ever, and the scepter of righteousness is the scepter of your kingdom. Mpe tala makambo oyo aloba na tina na Mwana : « Oh Nzambe, Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela seko na seko, lingenda ya bokonzi na Yo ezali mpo na bosembo.
9 You have loved righteousness and hated wickedness; therefore our Father, your Father, has anointed you with the oil of gladness above your companions." Olingaka bosembo mpe oyinaka mabe ; yango wana, oh Nzambe, Nzambe na Yo apakoli Yo mafuta ya esengo, asepeli na Yo koleka baninga na Yo ! »
10 And, "In the beginning, Lord, you laid the foundations of the earth, and the heavens are the work of your hands. Kaka na tina na mwana, alobaki lisusu : « Na ebandeli, oh Nkolo, Yo nde otiaki miboko ya mokili, mpe maboko na Yo nde esalaki Likolo.
11 They will perish, but you remain; they will all wear out like a garment. Nyonso wana ekobeba, ekonzuluka lokola elamba ; kasi Yo, okotikala seko na seko.
12 You will roll them up like a robe; like a garment they will be changed. But you are the same, and your years will never end." Okolinga yango lokola kazaka, mpe bakolongola yango lokola elamba mpo na kotia elamba mosusu. Kasi Yo, ozali ndenge moko, mibu na Yo ekotikala kosuka te ! »
13 But to which of the angels did our Father ever say, "Sit at my right hand until I make your enemies a footstool for your feet"?" Mpe lisusu, epai ya anjelu nini Nzambe aloba : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo ? »
14 Aren't all angels ministering spirits, sent to serve those about to inherit salvation? Nzokande, ba-anjelu nyonso bazali milimo oyo esalaka mpo na Nzambe, mpe Nzambe atindaka bango kokokisa lotomo na bango mpo na bolamu ya bato oyo bakozwa lobiko.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]