Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Obadiah 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The vision of Obadiah. This is what the Sovereign Father says about Edom: We have heard a message from our Father, and an envoy sent among the nations—"Rise up! Let us rise against her for battle!" Emoniseli ya mosakoli Abidiasi. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na tina na Edomi : « Toyoki sango moko kowuta na Yawe ; mpe ntoma moko atindami na bikolo mpo na koloba : ‹ Botelema. Tokende kobundisa Edomi. ›
2 Look, I will make you small among the nations; you will be utterly despised. Tala, nakokomisa yo moke kati na bikolo, mpe okosambwa makasi.
3 The pride of your heart has deceived you, you who live in the clefts of the rock, whose home is the heights, who say to yourself, "Who can bring me down to the ground?" Lolendo ya motema na yo ekosaki yo, yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba mpe omilobelaka : ‹ Nani akokweyisa ngai na se ? ›
4 Though you soar like the eagle, though you set your nest among the stars, from there I will bring you down, declares our Father. Ata soki omati likolo makasi lokola mpongo mpe otongi zala na yo kati na minzoto, nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » elobi Yawe.
5 If thieves came to you, if plunderers came by night—how you have been destroyed!—wouldn't they steal only what they wanted? If grape-pickers came to you, wouldn't they leave some grapes behind? « Soki miyibi to babebisi babimeli yo na butu, likama ya ndenge nini ezali kozela yo ? Boni, bakozwa kaka biloko oyo bazali na yango posa te ? Soki bato oyo babukaka bambuma ya vino bayei epai na yo, boni, bakotika ata ndambo ya maboke ya vino ?
6 How Esau has been ransacked, his hidden treasures plundered! Kasi tala ndenge babimeli Ezawu ! Babotoli ye biloko na ye ya motuya oyo ebombama !
7 All your allies have driven you to the border; those who were at peace with you have deceived you and overpowered you; those who shared your table have set a trap beneath you—and you don't even see it. Bikolo nyonso oyo osalaki elongo na yango boyokani ekobengana yo na mokili na yo ; baninga na yo bakokosa yo, bakokonza yo. Ba-oyo bazalaki kolia lipa na yo bakotiela yo motambo. Kasi yo, okoyeba yango te mpo ete okozala lisusu na mayele te.
8 Will I not on that day, declares our Father, destroy the wise men of Edom and wipe out understanding from the mountain of Esau? Na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakoboma bato ya bwanya ya Edomi mpe nakolongola bato ya mayele na etuka ya bangomba ya Ezawu.
9 Your warriors will be shattered, Teman, so that everyone on the mountain of Esau will be cut down in the slaughter. Temani, basoda na yo ya mpiko bakolenga na somo, mpe bavandi nyonso ya bangomba ya Ezawu bakokufa na mopanga !
10 Because of the violence you did to your brother Jacob, shame will cover you, and you will be cut off forever. Mpo na mabe oyo osalaki Jakobi, ndeko na yo, okotonda na soni okobebisama mpo na libela.
11 On the day you stood by and did nothing, on the day strangers carried off his wealth and foreigners entered his gates and cast lots for Jerusalem—you too were like one of them. Ozalaki kotala kaka bongo tango bato mosusu bazalaki kokende mpe komema bozwi na ye nyonso. Mpe tango bapaya bakotaki kati na engumba na ye, babetaki zeke mpo na kokabola bomengo ya bitumba ya Yelusalemi. Yo mpe osalaki kaka lokola bango.
12 But do not gloat over your brother in the day of his misfortune; do not rejoice over the people of Judah in the day of their ruin; do not boast loudly in the day of distress. Nzokande, osengelaki te kosepela komona pasi ya ndeko na yo to kosepela komona kobebisama ya bato ya Yuda to mpe kosala lofundu na mokolo ya pasi na bango.
13 Do not enter the gate of my people in the day of their calamity; you of all people, do not gloat over his disaster in the day of his calamity; do not loot his wealth in the day of his calamity. Osengelaki te kokota na engumba ya bato na Ngai na mokolo ya pasi na bango to kosepela komona kobebisama na bango to mpe kobotola bozwi na bango nyonso na mokolo oyo bazalaki na pasi makasi.
14 Do not stand at the crossroads to cut down his fugitives; do not hand over his survivors in the day of distress. Osengelaki te kotelema na esika oyo banzela ekutana mpo na koboma bato na bango, oyo bazalaki kokima pasi to mpe kokaba na maboko ya banguna bato na bango, oyo babikaki na mokolo oyo bazalaki na pasi makasi.
15 For the day of our Father is near for all the nations. As you have done, it will be done to you; your deeds will come back on your own head. Mokolo ya Yawe ekomi pene mpo na bikolo nyonso. Bakosala yo kaka makambo oyo yo osalaki, bongo mabe oyo osalaki ekozongela yo.
16 For as you drank on my holy mountain, so all the nations will drink continually; they will drink and swallow and become as though they had never been. Ndenge ozalaki komela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule, ndenge wana mpe bikolo bakokoma komela tango nyonso ; bakomela, bakomela lisusu koleka mpe bakosila lokola nde batikala kozala te.
17 But on Mount Zion there will be deliverance, and it will be holy, and the house of Jacob will possess their inheritance. Kasi bato oyo bakobika bakokimela na ngomba Siona ; ngomba yango ekokoma lisusu bule, mpe bato ya Jakobi bakozongela lisusu libula na bango.
18 The house of Jacob will be a fire and the house of Joseph a flame, and the house of Esau will be stubble; they will burn it and consume it, and there will be no survivor of the house of Esau, for our Father has spoken. Bato ya Jakobi bakokoma lokola moto, libota ya Jozefi ekokoma lokola lolemo ya moto. Kasi libota ya Ezawu ekokoma lokola matiti, bongo moto ya libota ya Jakobi mpe ya Jozefi ekozikisa yango. Boye, kati na bana ya Ezawu, moto ata moko te akotikala na bomoi, » elobi Yawe.
19 Those of the Negev will possess the mountain of Esau, and those of the foothills the land of the Philistines; they will possess the land of Ephraim and the land of Samaria, and Benjamin will possess Gilead. Bato oyo bakowuta na Negevi bakovanda na etuka ya bangomba ya Ezawu, mpe ba-oyo bavandaka na etando ya se ya lubwaku bakozwa mokili ya bato ya Filisitia. Bakozwa etuka ya Efrayimi mpe ya Samari, mpe bato ya Benjame bakozwa Galadi.
20 The exiles of this army of the people of Israel will possess the land of the Canaanites as far as Zarephath, and the exiles of Jerusalem who are in Sepharad will possess the cities of the Negev. Bato ya Isalaele oyo bazalaki na bowumbu bakozwa mokili ya bato ya Kanana kino na Sarepita ; bongo bato ya Yelusalemi oyo bazalaki na bowumbu na Sefaradi bakozwa bingumba ya Negevi.
21 Deliverers will go up to Mount Zion to rule the mountain of Esau, and the kingdom will belong to our Father. Babikisi bakomata na ngomba Siona mpo na koyangela bangomba ya Ezawu, mpe Yawe akokoma Mokonzi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]