Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Amos 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 I saw the Sovereign Father standing by the altar, and he said: "Strike the pillar tops so the thresholds shake, and shatter them on the heads of them all; those left I will kill with the sword. Not one will flee, not one will escape. Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki : « Buka makonzi ya Tempelo mpo ete ndako mobimba eningana mpe ekweyela bato nyonso na mito. Bato oyo bakotikala, nakoboma bango na mopanga. Moko te akokima, moko te akobika.
2 Though they dig down into the grave, from there my hand will take them; though they climb up to heaven, from there I will bring them down. Soki bakimi na se ya mabele, na mboka ya bakufi, loboko na Ngai ekobimisa bango kuna ; soki bakimi na Lola, nakokitisa bango na se.
3 Though they hide themselves on the top of Carmel, from there I will search them out and seize them; though they conceal themselves from my sight at the bottom of the sea, there I will command the serpent, and it will bite them. Soki babombami na songe ya ngomba Karimeli, nakokanga bango mpe nakokitisa bango na se ; soki babombami Ngai na se ya ebale monene, nakopesa mitindo na nyoka ete eswa bango kuna.
4 Though they go into captivity before their enemies, there I will command the sword, and it will kill them; I will fix my eyes on them for harm and not for good." Ezala banguna na bango bamemi bango na bowumbu, nakopesa mitindo na mopanga ete eboma bango kuna. Miso na Ngai ekozala likolo na bango mpo na kosala bango mabe, kasi bolamu te.
5 The Sovereign, the Father of heaven's armies—he who touches the earth and it melts, and all who dwell in it mourn; all of it rises like the Nile and sinks like the Nile of Egypt, Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, asimbi mabele, mabele eninganaka, mpe bavandi na yango nyonso bakomaka na matanga, mokili mobimba etelemaka lokola ebale Nili mpe ekawukaka lokola mayi ya Ejipito.
6 who builds his upper chambers in the heavens and founds his vault upon the earth, who calls for the waters of the sea and pours them out on the face of the earth—our Father is his name. Yawe atonga ndako na Ye kati na Lola mpe atia miboko na yango na mabele ; abengaka mayi ya ebale monene mpe asopaka yango na etando ya mabele. Kombo na Ye ezali : Yawe.
7 "Are you not like the children of the Cushites to me, children of Israel?" declares our Father. "Did I not bring up Israel from the land of Egypt, and the Philistines from Caphtor and the Arameans from Kir? Bino bana ya Isalaele, boni, bokokani te na bato ya mokili ya Kushi ? » elobi Yawe. « Boni, nabimisaki te Isalaele wuta na Ejipito, bato ya Filisitia wuta na Kreti, bato ya Siri wuta na Kiri ?
8 Look, the eyes of the Sovereign Father are on the sinful kingdom, and I will destroy it from the face of the earth—yet I will not utterly destroy the house of Jacob," declares our Father. Solo, miso ya Nkolo Yawe ezali kotala bokonzi ya masumu ; nakobebisa mpe nakolongola yango na mabele. Nzokande, nakobebisa te libota mobimba ya Jakobi, » elobi Yawe.
9 "For look, I will give the command, and I will shake the house of Israel among all the nations as one shakes grain in a sieve, but not a pebble will fall to the ground. « Pamba te nakopesa mitindo mpe nakoningisa libota ya Isalaele kati na bikolo nyonso ndenge bayungolaka ble ; bongo ata mbuma moko te ya moke ekokweya na se.
10 All the sinners of my people will die by the sword—those who say, 'Disaster will not overtake or meet us.'" Bato nyonso ya masumu kati na bato na Ngai bakokufa na mopanga, ba-oyo nyonso balobaka : ‹ Pasi ekotikala te kozwa to kokomela biso ! ›
11 "On that day I will raise up the fallen shelter of David, and repair its breaches, and raise up its ruins, and rebuild it as in the days of old, Na mokolo wana, nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya, nakobamba madusu na yango, nakotelemisa lisusu bamir na yango oyo ebukana mpe nakotonga yango lisusu ndenge ezalaka kala,
12 that they may possess the remnant of Edom and all the nations who are called by my name," declares our Father, who does this. mpo ete bakoka kozwa ndambo ya mokili ya Edomi oyo etikalaki, mpe ya bikolo nyonso oyo babengamaka na Kombo na Ngai, » elobi Yawe oyo asalaka makambo wana nyonso.
13 "The days are coming," declares our Father, "when the plowman will overtake the reaper, and the treader of grapes will overtake him who sows the seed; the mountains will drip sweet wine, and all the hills will flow with it. « Mikolo ezali koya, » elobi Yawe, « mikolo oyo mosali bilanga akobuka bambuma na yango noki, mpe moloni elanga ya vino akokamola vino noki. Vino ya sika ekobota na bangomba milayi mpe ekosopana na bangomba mikuse nyonso.
14 I will restore the fortunes of my people Israel, and they will rebuild the ruined cities and live in them; they will plant vineyards and drink their wine, and make gardens and eat their fruit. Nakozongisa Isalaele, bato na Ngai, oyo bakendeki na bowumbu, mpe bakotonga lisusu bingumba oyo ebebisamaki mpe bakovanda kati na yango. Bakolona banzete ya vino mpe bakomela vino na yango, bakolona bilanga mpe bakolia bambuma na yango.
15 I will plant them on their own land, and they will never again be uprooted out of the land that I have given them," says your Father. Nakolona bango na mabele na bango moko, mpe bakotikala kopikola bango lisusu te na mabele oyo napesaki bango, » elobi Yawe, Nzambe na yo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]