Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Amos 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This is what the Sovereign Father showed me: a basket of summer fruit. Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai : kitunga etonda na bambuma etela.
2 He said, "Amos, what do you see?" I said, "A basket of summer fruit." Then our Father told me, "The end has come for my people Israel; I will never again pass them by." Atunaki ngai : — Amosi, ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona kitunga etonda na bambuma etela. Yawe alobaki na ngai : — Tango ekoki mpo na bato na Ngai, Isalaele ; pamba te nakolimbisa bango lisusu te.
3 "The songs of the temple will turn to wailing in that day," declares the Sovereign Father. "So many corpses, flung down everywhere—silence!" Na mokolo wana, banzembo ya esengo kati na bandako ekobongwana bileli, elobi Nkolo Yawe. Bakobwaka bibembe ebele bipai na bipai mpe bakosalela bango matanga te.
4 Hear this, you who trample the needy and do away with the poor of the land, Boyoka makambo oyo, bino bato oyo bonyokolaka bato bakelela mpe bonyataka babola kati na mokili.
5 saying, "When will the new moon be over, so we can sell grain? When will the Sabbath end, so we can open the wheat market—making the measure small and the weight large, and cheating with dishonest scales, Bozali koloba : « Feti ya ebandeli ya sanza ekoleka tango nini mpo ete toteka ble na biso ? Tango nini mokolo ya Saba ekosila mpo ete tofungola bibombelo na biso ya ble ? » Tokosalela bakopo ya mike mpo ete tomatisa talo, mpe tokosalela bimekelo ya lokuta.
6 buying the poor for silver and the needy for a pair of sandals, and selling the sweepings of the wheat?" Tokosomba mobola na palata mpe moto akelela na motuya ya mapapa mibale, bongo tokoteka ata basalite ya ble.
7 Our Father has sworn by the pride of Jacob: "I will never forget any of their deeds. Mpo na lolendo ya Jakobi, Yawe alapi ndayi na maloba oyo : « Nakobosana misala na bango ata moko te.
8 Will not the land tremble for this, and all who live in it mourn? It will all rise like the Nile, be churned up, and sink again like the Nile of Egypt. Mpo na yango, mokili ekolenga, mpe bato na yango nyonso bakozala na matanga. Mokili mobimba ekotomboka lokola ebale Nili oyo etondi na mayi ; ekokoma koningana-ningana mpe ekokita lokola ebale ya Ejipito.
9 On that day," declares the Sovereign Father, "I will make the sun go down at noon and darken the earth in broad daylight. Na mokolo wana, » elobi Nkolo Yawe, « nakosala ete moyi elala na midi, mpe nakoyeisa molili na mokili na moyi makasi.
10 I will turn your festivals into mourning and all your songs into a dirge. I will put mourning clothes on every waist and shave every head. I will make it like mourning for an only son, and its end like a bitter day. Nakokomisa mikolo ya bafeti na bino mikolo ya matanga, banzembo na bino ya esengo banzembo ya mawa. Nakosala ete bino nyonso bolata basaki, mpe bakokokola bino suki ya moto. Nakoyeisa matanga kati na mokili lokola matanga ya libota oyo esili kokufisa mwana se moko oyo bazalaki na ye, mpe suka na yango ekozala bobele se pasi makasi.
11 The days are coming," declares the Sovereign Father, "when I will send a famine on the land—not a famine of bread, nor a thirst for water, but of hearing my words. Na mikolo ekoya, » elobi Nkolo Yawe, « nakotinda nzala makasi kati na mokili ; ekozala te nzala ya bilei to posa ya mayi, kasi ekozala nzala ya koyoka Liloba na Yawe.
12 They will stagger from sea to sea and wander from north to east, searching for the word of our Father, but they will not find it. Bato bakotelengana na bibale nyonso, bakoyengayenga longwa na nor kino na este mpo na koluka Liloba na Yawe, kasi bakotikala komona yango te.
13 In that day the beautiful young women and the young men will faint from thirst. Na mokolo wana, bilenge basi ya kitoko mpe mibali ya makasi bakokufa na posa ya mayi.
14 Those who swear by the Guilt of Samaria, who say, 'As your god lives, Dan,' and, 'As the way of Beersheba lives'—they will fall, never to rise again." Bato oyo balapaka ndayi na kombo ya nzambe ya ekeko ya Samari mpe balobaka : ‹ Dani, lokola nzambe na yo azali na bomoi › to ‹ lokola nzambe ya Beri-Sheba azali na bomoi, › bakokweya mpe bakotelema lisusu te. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]