Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jonah 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Now the word of our Father came to Jonah son of Amittai: Yawe alobaki na Yona, mwana mobali ya Amitayi :
2 "Get up, go to Nineveh, that great city, and cry out against it, for their evil has risen before me." — Telema, kende na Ninive, engumba monene, mpe kebisa bato na yango, pamba te mabe na bango ekomi kino epai na ngai.
3 But Jonah set out to flee to Tarshish, away from our Father's presence. He went down to Joppa, found a ship bound for Tarshish, paid its fare, and boarded to go with them to Tarshish, away from our Father's presence. Yona atelemaki. Kasi mpo na kokima mosika na Yawe, akendeki na Tarsisi, akitaki na libongo ya Jafa mpe akutaki kuna masuwa moko oyo ezalaki kokende na Tarsisi. Sima na ye kofuta mbongo mpo na mobembo, akotaki na masuwa yango mpo na kokende na Tarsisi, mosika na Yawe.
4 Then our Father hurled a great wind at the sea; a violent storm arose, and the ship seemed about to break apart. Kasi Yawe atindaki mopepe makasi na likolo ya ebale monene, mpe mopepe yango ememaki mbonge oyo ekomaki pene ya kozindisa masuwa.
5 The sailors were terrified, each crying to his own god. They threw the ship's cargo into the sea to lighten it. But Jonah had gone below deck, where he lay fast asleep. Bato oyo basalaka na masuwa bakomaki kobanga, mpe moto na moto akomaki kobelela nzambe na ye ; babwakaki biloko nyonso oyo bazalaki na yango na ebale monene mpo na kokomisa masuwa pepele. Kasi Yona akitaki na kobe ya masuwa mpe, kuna, alalaki pongi ya makasi.
6 The captain came and said, "How can you sleep? Get up, call on your god! Maybe he will notice us, and we won't perish." Mokumbi masuwa apusanaki pene ya Yona mpe alobaki na ye : — Ndenge nini okoki penza kolala pongi boye ? Telema mpe belela nzambe na yo, tango mosusu akoki koyokela biso mawa mpo ete tokufa te.
7 The men said to each other, "Come, let's cast lots to find who's to blame for this disaster on us." They cast lots, and it fell on Jonah. Bato oyo basalaka na masuwa bamilobelaki bango na bango : « Boya ! Tobeta zeke mpo toyeba moto oyo azali kobendela biso pasi oyo. » Babetaki zeke, mpe zeke yango ekweyaki epai ya Yona.
8 They said to him, "Tell us—you who have brought this disaster on us—what do you do? Where do you come from? What is your country? What people are you from?" Batunaki ye : — Yebisa biso nani azali kobendela biso pasi oyo ? Osalaka nini ? Owuti wapi ? Mboka na yo nini, mpe ozali moto ya ekolo nini ?
9 He answered, "I am a Hebrew, and I fear our Father, the Father of heaven, who made the sea and the dry land." Yona azongisaki : — Nazali Mo-Ebre, nasambelaka Yawe, Nzambe ya Lola, oyo akela bibale mpe mokili.
10 Then the men were terrified and said, "What have you done?" For they knew he was fleeing from our Father's presence, because he had told them. Ayebisaki bango ete azali kokima mosika na Yawe. Boye bato yango babangaki makasi ; batunaki ye : — Eloko nini osalaki kuna ?
11 Then they said to him, "What should we do to you to calm the sea for us?"—for the sea grew stormier and stormier. Lokola ebale ezalaki kotomboka makasi penza, batunaki ye lisusu : — Tosala yo nini mpo ete ebale evanda kimia mpe etika kotungisa biso ?
12 He told them, "Lift me up and throw me into the sea, and it will calm for you. I know this great storm came on you because of me." Azongiselaki bango : — Bokamata ngai mpe bobwaka ngai na ebale monene, mpe yango ekovanda kimia, pamba te nayebi malamu ete ezali mpo na ngai nde mopepe makasi oyo etelemeli bino.
13 Instead the men rowed hard to reach land, but could not, for the sea grew wilder and wilder against them. Bato yango bamipesaki nanu na koluka nkayi, na makasi na bango nyonso, mpo na komema masuwa na mokili, kasi balongaki te, pamba te mopepe etelemelaki bango makasi.
14 So they cried out to our Father: "Please, God, don't let us die for taking this man's life. Don't hold us guilty of innocent blood, for you have done as you pleased." Bongo, babelelaki Yawe : « Oh Yawe, tobondeli Yo, koboma biso te likolo ya moto oyo. Kotika te ete makila ya moto oyo asali mabe te etangama na mito na biso. Pamba te ezali solo Yo Yawe nde osali oyo olingaki. »
15 Then they picked Jonah up and hurled him into the sea, and the raging sea grew calm. Boye, bakamataki Yona mpe babwakaki ye na ebale monene ; mpe mbala moko, ebale monene oyo etombokaki makasi evandaki kimia.
16 The men then feared our Father greatly, offered a sacrifice to our Father, and made vows. Babangaki mpe bayokaki somo makasi liboso ya Yawe ; babonzelaki Ye bambeka mpe bapesaki Ye bilaka.
2:1 Now our Father appointed a great fish to swallow Jonah, and Jonah was in the belly of the fish three days and three nights. Yawe atindaki mbisi moko ya monene komela Yona. Boye Yona asalaki kati na libumu ya mbisi yango mikolo misato mpe babutu misato.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]