Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Numbers 24 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Balaam saw that it pleased our Father to bless Israel, so he did not seek omens as before, but turned toward the wilderness. Nzokande, tango Balami amonaki ete Yawe azalaki kaka na esengo ya kopambola Isalaele, alukaki lisusu bimoniseli te ndenge azalaki kosala na bambala mosusu, kasi abalolaki elongi na ye na esobe.
2 Balaam looked up and saw Israel camped tribe by tribe; then the Spirit of our Father came on him. Tango Balami atalaki, amonaki Isalaele bavanda na milako na bango, bato na bato na libota na bango. Molimo na Nzambe ayaki likolo na ye ;
3 He lifted his oracle and said: "The oracle of Balaam son of Beor, the oracle of the man whose eye is opened, mpe akomaki koloba maloba oyo : « Tala maloba ya Balami, mwana mobali ya Beori, maloba ya moto oyo miso na ye emonaka polele,
4 the oracle of one who hears the words of our Father, who sees the vision of the Almighty, bowing down with eyes wide open: maloba ya moto oyo ayokaka maloba ya Nzambe, oyo amonaka bimoniseli oyo ewutaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo miso na ye efungwamaka soki akweyi na molimo :
5 How lovely are your tents, Jacob, your dwelling places, Israel! ‹ Oh Jakobi, tala ndenge bandako na yo ya kapo ezali kitoko, mpe bisika oyo ovandaka, oh Isalaele !
6 Like valleys stretching far, like gardens beside a river, like aloes our Father has planted, like cedars beside the waters. Epanzana lokola miluka ya mike-mike, lokola bilanga oyo ezalaka pembeni ya ebale, lokola banzete ya aloe oyo Yawe alona, lokola banzete ya sedele pembeni ya mayi.
7 Water will flow from his buckets, and his descendants will have abundant water. His king will be higher than Agag, and his kingdom will be exalted. Mayi ekotiola wuta na bibombelo na bango, bankona na bango ekozwa mayi ebele. Mokonzi na bango akozala monene koleka Agagi, bokonzi na bango ekozala ya lokumu.
8 Our Father brings Israel out of Egypt; Israel is like the horns of the wild ox to them. Israel will devour the nations who oppose them, break their bones, and pierce them with arrows. Nzambe abimisaki bango na Ejipito, bazalaka makasi lokola mpakasa, babebisaka bikolo oyo ebundisaka bango mpe babukaka mikuwa na bango na biteni-biteni, batobolaka yango na makonga na bango.
9 He crouches, he lies down like a lion, like a lioness—who dares rouse him? Blessed are those who bless you, and cursed are those who curse you." Bagunzamaka mpe balalaka lokola nkosi ya mobali, lokola nkosi ya mwasi ; nani akokoka kotelemisa bango ? Tika ete oyo akopambola yo apambolama, mpe oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ! › »
10 Balak's anger flared against Balaam, and he clapped his hands. Balak said to Balaam, "I called you to curse my enemies, but you've blessed them three times now! Balaki atombokelaki Balami makasi. Abetaki maboko na ye mpe alobaki : — Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe, kasi yo opamboli bango mbala misato.
11 Now flee home! I said I would richly honor you, but God has kept you from honor." Yango wana, longwa na miso na ngai mpe zonga na mboka na yo ! Nalobaki ete nakopesa yo lifuti ya malamu, kasi Yawe azangisi yo lifuti yango.
12 Balaam answered Balak, "Did I not tell the messengers you sent me, Balami azongiselaki Balaki : — Boni, nalobaki te na bantoma oyo otindelaki ngai ete
13 'Even if Balak gave me his house full of silver and gold, I couldn't go beyond my God's command to do good or bad on my own; I can only say what my God tells me'? « Ata soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakosala eloko moko te na mokano na ngai moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete nakende libanda ya mitindo na Yawe te. Nasala kaka oyo Yawe alobi. »
14 And now I am going back to my people. Come, let me warn you what this people will do to your people in the days to come." Mpe sik’oyo, nazali kozonga na ngai epai ya bato na ngai ; kasi yaka, nakokebisa yo na tina na makambo oyo bato oyo bakosala bato na yo na mikolo ekoya.
15 Then he lifted his oracle, saying: "Oracle of Balaam son of Beor, oracle of the man whose eye is opened, Bongo Balami alobaki maloba oyo : « Tala maloba ya Balami, mwana mobali ya Beori, maloba ya moto oyo miso na ye emonaka polele,
16 the oracle of one who hears the words of our Father, who knows the knowledge of the Most High, who sees the vision of the Almighty, bowing down with eyes wide open: oyo ayokaka maloba na Nzambe, oyo ayebaka basekele ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, oyo azwaka emoniseli kowuta na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo soki akweyi na molimo, miso na ye efungwamaka :
17 I see him, but not now; I gaze on him, but not near. A star will come out of Jacob, and a scepter will rise out of Israel; it will crush the brow of Moab and break down all the sons of Sheth. ‹ Namoni ye, kasi sik’oyo te ; natali ye, kasi na pembeni te. Monzoto moko ekobima wuta na Jakobi, mpe lingenda ekobima wuta na Isalaele. Akotobola mito ya bato ya Moabi mpe akoboma bana mibali nyonso ya Seti.
18 Edom will be conquered, and Seir, his enemies, will be conquered, while Israel grows strong. Bakobotola mokili ya Edomi, bakobotola Seiri, monguna na ye, kasi Isalaele akokoma lisusu makasi koleka.
19 One from Jacob will rule, and will destroy the survivors of the city." Mokonzi moko akobima wuta na Jakobi, mpe akoboma batikali nyonso ya engumba. › »
20 Then Balaam saw Amalek, took up his message, and said: "Amalek was first among the nations, but his end is utter destruction." Balami amonaki Amaleki mpe alobaki maloba oyo : « Amaleki ezalaki na molongo ya liboso kati na bikolo, kasi ekosuka na libebi. »
21 He looked at the Kenite, took up his oracle, and said: "Your dwelling place is firm, your nest set in the rock. Sima, amonaki bato ya Keni mpe alobaki maloba oyo : « Esika na yo ya kovanda ezali makasi, zala na yo ezalaka kati na mabanga ;
22 Yet Kain will be consumed when Asshur takes you away captive." kasi bino bato ya Keni, bokobebisama tango Ashuri akozwa bino lokola bakangami. »
23 He took up his oracle and said: "Who can live when God does this? Mpe na suka, alobaki maloba oyo : « Oh mawa ! Nani akoki kozala na bomoi, wana Nzambe akozala kosala makambo ya boye ?
24 Ships will come from the coasts of Kittim; they will afflict Asshur and afflict Eber, but they too will come to utter destruction." Bamasuwa ekoya wuta na mabongo ya Kitimi, bakonyokola Ashuri mpe Eberi, kasi bango moko mpe bakobebisama. »
25 Then Balaam rose and went back to his home, and Balak also went on his way. Bongo Balami atelemaki mpe azongaki epai na ye, Balaki mpe akendeki na nzela na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]