Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Numbers 23 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Balaam told Balak, "Build me seven altars here, prepare seven bulls and seven rams for me here." Balami alobaki na Balaki : « Tongela ngai bitumbelo sambo awa mpe bongisela ngai bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali sambo. »
2 Balak did as Balaam said; Balak and Balaam offered a bull and a ram on each altar. Balaki asalaki ndenge Balami alobaki, mpe bango mibale babonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko.
3 Balaam told Balak, "Stand by your burnt offering while I go; maybe God will meet me, and I'll tell you whatever he shows me." Then he went to a bare height. Alobaki na Balaki : « Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, bongo ngai napusani mwa mosika. Tango mosusu Yawe akoya kokutana na ngai, bongo nakoyebisa yo makambo nyonso oyo akolakisa ngai. » Balami akendeki likolo ya ngomba moko ya mokuse mpe ezanga matiti.
4 Our Father met Balaam, who said to him, "I have set up seven altars and offered a bull and ram on each altar." Nzambe akutanaki na Balami, mpe Balami alobaki : — Nabongisaki bitumbelo sambo ; mpe na etumbelo moko na moko, nasili kobonza ngombe ya mobali mpe meme ya mobali moko.
5 Our Father put a word in Balaam's mouth: "Return to Balak and say this." Yawe atiaki maloba na monoko ya Balami mpe alobaki : — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.
6 He went back to Balak—there Balak stood beside his burnt offering, with all the princes of Moab. Bongo Balami azongaki epai ya Balaki mpe akutaki ye atelemi pembeni ya mbeka na ye, elongo na bakambi nyonso ya Moabi.
7 He took up his oracle and said: "From Aram Balak brought me, Moab's king from the eastern mountains: Come, curse Jacob for me; come, denounce Israel. Boye, Balami akomaki koloba maloba oyo : « Balaki abengisaki ngai wuta na Arami, mokonzi ya Moabi abengisaki ngai wuta na bangomba ya este. Alobaki : ‹ Yaka, lakela Jakobi mabe mpo na ngai ; yaka, loba mabe mpo na Isalaele.
8 How can I curse those our Father has not cursed? How can I denounce those our Father has not denounced? Ndenge nini nakoki solo kolakela mabe bato oyo Nzambe alakela mabe te ? Ndenge nini nakoki solo koloba mabe mpo na bato oyo Yawe alobela mabe te ?
9 From the top of the rocks I see them, from the hills I look on them: a people dwelling alone, not counting itself among the nations. Tala, wuta na likolo ya mabanga, nazali komona bango ; wuta na likolo ya bangomba, nazali kotala bango. Tala, nazali komona bato moko bavanda bango moko, bazali komitanga na molongo ya bikolo te.
10 Who can count the dust of Jacob or number even a fourth of Israel? Let me die as the upright die, and let my end be like theirs!" Nani akoki kotanga putulu ya Jakobi to kotanga motango ya bakitani ya Isalaele ? Tika ete nakufa kufa ya bato ya sembo, mpe tika ete suka na ngai ezala lokola ya bango ! › »
11 Balak said to Balaam, "What have you done to me? I brought you to curse my enemies, and look—you've only blessed them!" Balaki alobaki na Balami : — Likambo nini osali ngai ? Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe ; kasi tala, opamboli bango koleka.
12 He answered, "Must I not be careful to say what God puts in my mouth?" Balami azongisaki : — Boni, naloba te maloba oyo Yawe atie na monoko na ngai ?
13 Then Balak said, "Please come with me to another place where you can see them. You will see only their outer edge, not all of them, and curse them for me from there." Balaki alobaki na Balami : — Yaka elongo na ngai esika mosusu, epai okoki komona bango ; okomona bango nyonso te, kasi kaka ndambo. Mpe wuta na esika yango, lakela bango mabe mpo na ngai.
14 He took him to the field of Zophim, to the top of Pisgah, built seven altars, and offered a bull and a ram on each. Boye, Balaki amemaki Balami na elanga ya Tsofimi, na songe ya ngomba Pisiga, mpe atongaki kuna bitumbelo sambo mpe abonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko.
15 Balaam said to Balak, "Stand here by your burnt offering while I meet with him over there." Balami alobaki na Balaki : — Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, wana ngai nakopusana mwa mosika mpo na kokutana na ye.
16 Our Father met Balaam, put a word in his mouth, and said, "Return to Balak and say this." Yawe akutanaki na Balami, atiaki maloba na monoko na ye mpe alobaki : — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.
17 He came to him—there, standing by his burnt offering, with Moab's princes. Balak said to him, "What has God spoken?" Bongo, Balami azongaki epai ya Balaki mpe akutaki ye atelemi pembeni ya mbeka na ye, elongo na bakambi nyonso ya Moabi. Balaki atunaki ye : — Yawe alobi nini ?
18 He took up his oracle: "Rise, Balak, and hear; listen to me, son of Zippor: Bongo Balami akomaki koloba maloba oyo : « Balaki, telema mpe yoka ! Mwana mobali ya Tsipori, yoka ngai malamu !
19 Our Father is not a man, that he should lie, nor a son of man, that he should change his mind. Has he ever said something and not done it? Has he ever spoken and not fulfilled it? Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?
20 Look, I have received a command to bless. He has blessed, and I cannot revoke it. Nazwaki nde mokumba ya kopambola. Asila kopambola, mpe ngai nakokoka kobongola te.
21 He has seen no misfortune in Jacob, nor seen trouble in Israel. Our Father is with him, and the shout of a King is among them. Amonaka mbeba moko te epai ya Jakobi, amonaka minyoko te kati na Isalaele. Yawe, Nzambe na bango, azali elongo na bango ; koganga ya mokonzi ezalaka kati na bango.
22 Our Father, who brought them out of Egypt, is for them like the horns of the wild ox. Nzambe abimisaki bango na Ejipito ; bazalaka makasi lokola mpakasa.
23 There is no enchantment against Jacob, no divination against Israel. Now it will be said of Jacob and of Israel, 'See what our Father has done!' Elakeli mabe moko te ekoki kozwa Jakobi, mpe kindoki ezali na nguya te likolo ya Isalaele. Bakoloba sik’oyo mpo na Jakobi mpe Isalaele : ‹ Tala makambo oyo Nzambe asali ! ›
24 Look, a people rising up like a lioness, rousing itself like a lion; it will not lie down until it devours the prey and drinks the blood of the slain." Bato oyo batelemi lokola nkosi ya mwasi ; epemaka te soki epasoli te mosuni na yango mpe emeli te makila ya nyama oyo ekangi. »
25 Balak said to Balaam, "Don't curse them at all, and don't bless them at all!" Bongo Balaki alobaki na Balami : — Ezala soki okoki te kolakela bango mabe, kasi kopambola bango te.
26 But Balaam answered Balak, "Didn't I tell you I must do all that God says?" Balami azongiselaki Balaki : — Nayebisaki yo te ete nakosala kaka makambo oyo Yawe akoloba na ngai ?
27 Balak said to Balaam, "Come, let me take you elsewhere. Maybe God will let you curse them for me from there." Balaki alobaki na Balami : — Yaka, tika ete namema yo esika mosusu ! Tango mosusu Nzambe akosepela ete olakela bango mabe mpo na ngai wuta na esika yango.
28 So Balak took Balaam to the top of Peor, which overlooks the wasteland. Balaki amemaki Balami na likolo ya ngomba Peori, esika oyo emonisaka esobe mobimba.
29 Balaam told Balak, "Build me seven altars here, and prepare seven bulls and seven rams here." Balami alobaki na Balaki : — Tongela ngai bitumbelo sambo mpe bongisela ngai bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali sambo.
30 Balak did as Balaam had said, and offered a bull and a ram on each altar. Balaki asalaki ndenge Balami alobaki, mpe abonzaki ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali na etumbelo moko na moko.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]