Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Numbers 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then our Father spoke to Moses and Aaron, saying: Yawe alobaki na Moyize mpe Aron :
2 "The Israelites are to camp, each by his standard, with banners of their ancestral houses, facing the tent of meeting all around, they are to camp. « Bana ya Isalaele bakotelemisa bandako na bango ya kapo kolanda milongo na bango ya mampinga ; moto na moto akozala kati na molako na ye, na se ya bendele na ye, zingazinga ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mwa mosika na yango. »
3 "To the east, toward sunrise: the camp of Judah, by their divisions, under its standard. Leader of Judah's people: Nahshon son of Amminadab. Na ngambo ya este epai wapi moyi ebimaka, milongo ya mampinga ya Yuda bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Yuda ezali Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi.
4 His division, those counted, numbered 74,600. Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku sambo na minei na nkama motoba.
5 "Camping next to him: the tribe of Issachar; the leader of Issachar's sons is Nethanel son of Zuar. Bato ya libota ya Isakari bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Yuda. Mokambi ya bato ya Isakari ezali Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari.
6 His division, those counted, numbered 54,400. Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na minei na nkama minei.
7 "Then the tribe of Zebulun; leader of Zebulun's sons: Eliab son of Helon. Mpe bato ya libota ya Zabuloni bakozala pembeni ya bato ya libota ya Isakari. Mokambi ya bato ya Zabuloni ezali Eliabi, mwana mobali ya Eloni.
8 His division, those counted, numbered 57,400. Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na sambo na nkama minei.
9 "All counted in Judah's camp: 186,400, by their divisions. They set out first. Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Yuda ezali bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na motoba na nkama minei kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakozala liboso.
10 "South side: the banner of Reuben's camp, by divisions. Leader of Reuben's people: Elizur son of Shedeur. Na ngambo ya sude, milongo ya mampinga ya Ribeni bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Ribeni ezali Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri.
11 His division, those counted, numbered 46,500. Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na motoba na nkama mitano.
12 "Camping beside him: the tribe of Simeon; leader of Simeon's people, Shelumiel son of Zurishaddai. Bato ya libota ya Simeoni bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Ribeni. Mokambi ya bato ya Simeoni ezali Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi.
13 His division, those counted, numbered 59,300. Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na libwa na nkama misato.
14 "Then the tribe of Gad: leader of Gad's people, Eliasaph son of Deuel. Mpe bato ya libota ya Gadi bakozala pembeni ya bato ya libota ya Simeoni. Mokambi ya bato ya Gadi ezali Eliazafi, mwana mobali ya Deweli.
15 His division, those counted, numbered 45,650. Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na mitano na nkama motoba na tuku mitano.
16 "Those counted in Reuben's camp, by their divisions: 151,450. They set out second. Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Ribeni ezali bato nkoto nkama moko na tuku mitano na moko na nkama minei na tuku mitano kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakolanda na sima.
17 "Then the tent of meeting sets out, with the Levites' camp in the middle of the camps. They set out in the order they camp, each in place, under their banners. Bongo Ndako ya kapo ya Bokutani mpe molako ya Balevi ekozala na kati-kati ya milako. Bakokende na molongo ndenge batielaki milako na bango, moko na moko na esika na ye mpe na se ya bendele na ye.
18 "West side: Ephraim's camp standard, by their divisions; leader of Ephraim's people is Elishama son of Ammihud. Na ngambo ya weste, milongo ya mampinga ya Efrayimi bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Efrayimi ezali Elishama, mwana mobali ya Amiwudi.
19 His division, those counted, numbered 40,500. Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na nkama mitano.
20 "Beside him: the tribe of Manasseh, led by Gamaliel son of Pedahzur. Bato ya libota ya Manase bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Efrayimi. Mokambi ya bato ya Manase ezali Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri.
21 His division, those counted, numbered 32,200. Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku misato na mibale na nkama mibale.
22 "Then the tribe of Benjamin, led by Abidan son of Gideoni. Mpe bato ya libota ya Benjame bakozala pembeni ya bato ya libota ya Manase. Mokambi ya bato ya libota ya Benjame ezali Abidani, mwana mobali ya Gideoni.
23 His division, those counted, numbered 35,400. Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku misato na mitano na nkama minei.
24 "All counted in Ephraim's camp: 108,100, by their divisions. They set out third. Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Efrayimi ezali bato nkoto nkama moko na mwambe na nkama moko, kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakolanda na molongo ya misato.
25 "Dan's camp standard stands on the north side, by divisions. Ahiezer son of Ammishaddai leads Dan's people. Na ngambo ya nor, milongo ya mampinga ya Dani bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Dani ezali Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi.
26 His division, those counted, numbered 62,700. Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku motoba na mibale na nkama sambo.
27 "Camping next to it: the tribe of Asher, its leader Pagiel son of Ochran. Bato ya libota ya Aseri bakotia molako na bango pembeni ya bato ya libota ya Dani. Mokambi ya bato ya Aseri ezali Pagieli, mwana mobali ya Okirani.
28 His division, those counted, numbered 41,500. Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na moko na nkama mitano.
29 "Then the tribe of Naphtali; Naphtali's leader is Ahira son of Enan. Mpe bato ya libota ya Nefitali bakozala pembeni ya bato ya libota ya Aseri. Mokambi ya bato ya Nefitali ezali Akira, mwana mobali ya Enani.
30 His division, those counted, numbered 53,400. Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.
31 "All counted in Dan's camp: 157,600. They set out last, by their standards." Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Dani ezali bato nkoto nkama moko na tuku mitano na sambo na nkama motoba, kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakozala na sima na bango nyonso, na se ya bendele na bango.
32 These are Israelites counted by their clans, all camp divisions: 603,550. Bango nde bana ya Isalaele oyo batangamaki, kolanda mabota na bango. Motango ya bato nyonso oyo bazalaki kati na milako, kolanda milongo ya mampinga na bango, ezalaki bato nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano.
33 But the Levites were not counted among the Israelites, just as our Father had commanded Moses. Kasi batangaki Balevi te elongo na bato mosusu ya Isalaele, ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
34 So the Israelites did all our Father commanded Moses. So they camped by their standards, and so they set out, each by clan, by ancestral family. Boye, bana ya Isalaele basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize. Na lolenge wana nde batiaki milako na bango na se ya babendele na bango mpe batambolaki bongo, moto na moto na libota na ye mpe na etuka na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]