Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Numbers 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father spoke to Moses in the Sinai wilderness, in the tent of meeting, on the first day of the second month of the second year after they left the land of Egypt. He said: Kati na esobe ya Sinai, Yawe asololaki na Moyize kati na Ndako ya kapo ya Bokutani ; ezalaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mibale, na mobu ya mibale, sima na bango kobima na mokili ya Ejipito. Alobaki na ye :
2 "Count the whole community of Israel's people, by clans and fathers' houses—every male, by name, head by head. « Tanga motango ya lisanga mobimba ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango mpe bituka na bango ; mpe koma bakombo ya mibali nyonso, moto moko na moko.
3 Register everyone in Israel twenty and older who can serve in the army—you and Aaron—by their divisions. Yo mpe Aron, bokotanga motango ya mibali oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, ba-oyo nyonso bazali na makoki ya kosala mosala ya soda kati na Isalaele ; bokotanga bango kolanda milongo na bango ya mampinga.
4 A man from each tribe is to be with you, each one the head of his family. Kati na libota moko na moko, ekozala na mobali moko mpo na kosunga bino : asengeli kozala mokambi ya etuka na ye.
5 "Names of the men who will stand with you: from Reuben, Elizur son of Shedeur. Tala bakombo ya mibali oyo bakosunga bino : mpo na libota ya Ribeni : Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri ;
6 "From Simeon, Shelumiel son of Zurishaddai; mpo na libota ya Simeoni : Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi ;
7 "From Judah, Nahshon son of Amminadab; mpo na libota ya Yuda : Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi ;
8 "From Issachar, Nethanel son of Zuar; mpo na libota ya Isakari : Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari ;
9 "From Zebulun, Eliab son of Helon; mpo na libota ya Zabuloni : Eliabi, mwana mobali ya Eloni ;
10 "From the sons of Joseph: from Ephraim, Elishama son of Ammihud; from Manasseh, Gamaliel son of Pedahzur; mpo na bana mibali ya Jozefi : mpo na libota ya Efrayimi : Elishama, mwana mobali ya Amiwudi ; mpo na libota ya Manase : Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri ;
11 "From Benjamin, Abidan son of Gideoni; mpo na libota ya Benjame : Abidani, mwana mobali ya Gideoni ;
12 "From Dan, Ahiezer son of Ammishaddai; mpo na libota ya Dani : Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi ;
13 "From Asher, Pagiel son of Ochran; mpo na libota ya Aseri : Pagieli, mwana mobali ya Okirani ;
14 "From Gad, Eliasaph son of Deuel; mpo na libota ya Gadi : Eliazafi, mwana mobali ya Deweli ;
15 "From Naphtali, Ahira son of Enan. mpo na libota ya Nefitali : Akira, mwana mobali ya Enani. »
16 "These were the community's called ones, leaders of their ancestral tribes, heads of Israel's clans." Ezali bango nde baponamaki kati na lisanga : bazalaki bakambi ya mabota na bango, bakambi ya mampinga ya Isalaele.
17 So Moses and Aaron took these men who had been designated by name, Moyize mpe Aron bakamataki bato oyo baponamaki na bakombo mpo ete basala na bango elongo.
18 on the first day of the second month they gathered the whole community. The people registered their ancestry by clan and family—every male twenty years old and older, listed by name, one by one, Basangisaki lisanga mobimba na mokolo ya liboso, na sanza ya mibale ; boye bana ya Isalaele batalisaki bokoko na bango kolanda mabota na bango mpe bituka na bango. Bakomaki bakombo ya mibali nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, mobali moko na moko na kombo na ye,
19 as our Father had commanded Moses. So Moses counted them in the wilderness of Sinai. ndenge Yawe atindaki Moyize oyo atangaki motango na bango na esobe ya Sinai.
20 From Reuben's descendants, Israel's firstborn: recorded by clan and family, name by name, every male twenty years old and up, able to serve in war. Mpo na bakitani ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
21 Those counted from the tribe of Reuben were 46,500. Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Ribeni ezalaki nkoto tuku minei na motoba na nkama mitano.
22 Simeon's descendants, by clans and families, counted by name, head by head: every male twenty years old and up, fit for the army. Mpo na bakitani ya Simeoni : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
23 Those counted from the tribe of Simeon were 59,300. Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Simeoni ezalaki nkoto tuku mitano na libwa na nkama misato.
24 From Gad's descendants: by clans, families, and names, every man twenty and older fit for military service. Mpo na bakitani ya Gadi : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
25 Those counted from the tribe of Gad were 45,650. Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Gadi ezalaki nkoto tuku minei na mitano na nkama motoba.
26 Judah's descendants, listed by clans and families, by name, every man twenty and older able to serve in the army: Mpo na bakitani ya Yuda : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
27 those counted from the tribe of Judah were 74,600. Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Yuda ezalaki nkoto tuku sambo na minei na nkama motoba.
28 Issachar's descendants, listed by clan and family, by name, every man twenty years and older fit for war: Mpo na bakitani ya Isakari : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
29 those counted from the tribe of Issachar were 54,400. Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Isakari ezalaki nkoto tuku mitano na minei na nkama minei.
30 Zebulun's descendants: registered by clan and family, by name, every man twenty years old or older fit for military service. Mpo na bakitani ya Zabuloni : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
31 Those counted from the tribe of Zebulun were 57,400. Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Zabuloni ezalaki nkoto tuku mitano na sambo na nkama minei.
32 Sons of Joseph, Ephraim's line: recorded by clan and family, by name, every man twenty and older fit for military service. Mpo na bana mibali ya Jozefi : Mpo na bakitani ya Efrayimi : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
33 Those counted from the tribe of Ephraim were 40,500. Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Efrayimi ezalaki nkoto tuku minei na nkama mitano.
34 Manasseh's descendants, listed by clans and families, by name, each man twenty years or older able to serve in the army: Mpo na bakitani ya Manase : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
35 those counted from the tribe of Manasseh were 32,200. Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Manase ezalaki nkoto tuku misato na mibale na nkama mibale.
36 From Benjamin's descendants, recorded by clan and family, by name, every man twenty years old and older, fit for military service: Mpo na bakitani ya Benjame : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
37 those counted from the tribe of Benjamin were 35,400. Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Benjame ezalaki nkoto tuku misato na mitano na nkama minei.
38 From Dan's descendants, listed by clan and family, by name, every man twenty years old and older fit for war: Mpo na bakitani ya Dani : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
39 those counted from the tribe of Dan were 62,700. Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Dani ezalaki nkoto tuku motoba na mibale na nkama sambo.
40 Asher's descendants, listed by clan and family, by name: every man twenty years old and up, fit for military service. Mpo na bakitani ya Aseri : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
41 Those counted from the tribe of Asher were 41,500. Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Aseri ezalaki nkoto tuku minei na moko na nkama mitano.
42 Naphtali's descendants: by clan and family, counted by name, every man twenty and older fit for war. Mpo na bakitani ya Nefitali : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
43 Those counted from the tribe of Naphtali were 53,400. Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Nefitali ezalaki nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.
44 Moses, Aaron, and Israel's twelve leaders counted these men, each for his family. Bango nde bato oyo Moyize mpe Aron elongo na bakambi zomi na mibale ya Isalaele, oyo moko na moko azalaki kotalisa libota na ye, batangaki.
45 All Israel's people were counted by families, every man twenty years old and older, fit to serve in Israel's army. Bongo bato nyonso ya Isalaele oyo batangamaki kolanda mabota na bango mpo ete bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, mpe bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda,
46 All those counted came to 603,550. bazalaki bango nyonso nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano.
47 But the Levites were not counted among them by their ancestral tribe. Nzokande batangaki te nzela moko na mabota mosusu motango ya bato ya libota ya Levi.
48 For our Father had said to Moses: Yawe alobaki na Moyize :
49 "Do not count the tribe of Levi or list them among the Israelites. « Kotanga te motango ya bato ya libota ya Levi, kokotisa bango te na molongo ya bato mosusu ya Isalaele.
50 Instead, put the Levites in charge of the tabernacle of the testimony, all its furnishings, and everything belonging to it. They must carry the tabernacle and its furnishings, care for it, and camp around it. Okopesa na bato ya libota ya Levi mokumba ya Mongombo ya Litatoli mpe ya bisalelo na yango nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezalaka kati na Mongombo. Bango bakozwa mokumba ya komemaka yango elongo na bisalelo na yango mpe bakovanda zingazinga na yango.
51 When the tabernacle sets out, Levites take it down; when it is pitched, Levites set it up. Any outsider who comes near is to be put to death. Tango nyonso Mongombo ekolongwa na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, Balevi nde bakolongola yango ; mpe tango ekotelema, bango mpe kaka nde bakotelemisa yango. Moto mosusu oyo akopusana pembeni na yango asengeli kokufa.
52 Israel's people are to camp, each by his own camp, each under his own banner, by their companies. Bana ya Isalaele bakotelemisa bandako na bango ya kapo kolanda milongo na bango ya mampinga, mpe moto na moto akozala kati na molako na ye, na se ya bendele na ye.
53 The Levites must camp around the tabernacle of the testimony, so no wrath falls on the Israelite community; the Levites are to guard the tabernacle of the testimony." Kasi bato ya libota ya Levi bakotelemisa bandako na bango ya kapo zingazinga ya Mongombo ya Litatoli mpo ete kanda makasi ya Yawe ekoka kokweya likolo ya lisanga ya bana ya Isalaele te. Bato ya libota ya Levi nde bakosala mosala ya kobatela Mongombo ya Litatoli. »
54 The people of Israel did everything our Father had commanded Moses; that is exactly what they did. Bana ya Isalaele basalaki makambo oyo nyonso, ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]