Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Numbers 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This is the family line of Aaron and Moses, when our Father spoke with Moses on Mount Sinai. Tala bakitani ya Aron mpe ya Moyize na tango oyo Yawe asololaki na Moyize, na ngomba Sinai.
2 These are the names of the sons of Aaron: Nadab the firstborn, then Abihu, Eleazar, and Ithamar. Bakombo ya bana mibali ya Aron ezalaki : Nadabi, mwana ya liboso ; Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
3 These are the names of Aaron's sons, the anointed priests whom Moses ordained to serve as priests. Yango nde bakombo ya bana mibali ya Aron, oyo babulisaki na nzela ya kopakola mafuta mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe.
4 Nadab and Abihu died before our Father in the wilderness of Sinai when they offered unauthorized fire before him; they had no children. So Eleazar and Ithamar served as priests before Aaron their father. Nadabi mpe Abiyu bakufaki liboso ya Yawe tango bazalaki kobonza mbeka, na nzela ya moto oyo ebulisama te, liboso ya Yawe, na esobe ya Sinai. Batikalaki kozala na bana te. Boye Eleazari mpe Itamari kaka nde batikalaki kosala mosala ya bonganga-Nzambe na bokambami ya tata na bango, Aron.
5 Then our Father said to Moses: Yawe alobaki na Moyize :
6 "Bring the tribe of Levi near and set them before Aaron the priest, to serve him. « Yeisa libota ya Levi pene ya Nganga-Nzambe Aron mpe pesa bango na maboko na ye mpo ete basunga ye.
7 They are to keep his duties and those of the whole community before the tent of meeting, performing the tabernacle's service. Bakosalisa ye mpe bakosunga lisanga mobimba liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na kosala misala ya Mongombo.
8 They are to guard all the tent of meeting's equipment and the Israelites' duty, doing the tabernacle's service. Bakobatela bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bakosalisa bana ya Isalaele na nzela ya kosala mosala ya Mongombo.
9 Give the Levites to Aaron and his sons; they are given entirely to him from among Israel's people. Pesa Balevi na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; bango nde kati na bana ya Isalaele basengeli komipesa mobimba epai na ye.
10 Appoint Aaron and his sons to guard their priesthood; any outsider who comes near must die." Tia Aron mpe bana na ye ya mibali pembeni mpo ete basala mosala na bango ya Bonganga-Nzambe. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye. »
11 Then our Father said to Moses: Yawe alobaki lisusu na Moyize :
12 "Look, I have taken the Levites from among the Israelites in place of every firstborn that opens the womb among the Israelites. The Levites are mine. « Nakamati Ngai moko Balevi kati na bana ya Isalaele na esika ya bana mibali nyonso ya liboso, mbuma ya liboso ya libumu ya mwasi nyonso ya Isalaele.
13 Every firstborn is mine. The day I struck down every firstborn in Egypt, I set apart for myself every firstborn in Israel—both man and animal. They will be mine. I am your Father." Pamba te, bana nyonso ya liboso bazali ya Ngai. Tango nabomaki bana nyonso ya liboso ya Ejipito, natiaki pembeni bana nyonso ya liboso ya Isalaele mpo ete bazala ya Ngai, ezala bana ya bato to ya banyama. Nazali Yawe. »
14 Then our Father spoke to Moses in the wilderness of Sinai: Yawe alobaki na Moyize kati na esobe ya Sinai :
15 "Count Levi's sons by fathers' houses and clans; count every male a month old and up." « Tanga motango ya Balevi kolanda mabota na bango mpe bituka na bango. Tanga bana mibali nyonso kobanda na ye oyo azali na sanza moko ya mbotama mpe koleka. »
16 So Moses counted them at the word of our Father, just as he had been commanded. Boye, Moyize atangaki bango ndenge Yawe atindaki ye.
17 These were the sons of Levi by their names: Gershon, Kohath, and Merari. Tala bakombo ya bakitani ya Levi : Gerishoni, Keati mpe Merari.
18 These are the names of the sons of Gershon by their clans: Libni and Shimei. Tala bakombo ya bakitani ya Gerishoni, kolanda etuka moko na moko : Libini mpe Shimei.
19 The sons of Kohath by their clans: Amram, Izhar, Hebron, and Uzziel. Bana mibali ya Keati, kolanda etuka moko na moko : Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
20 Merari's sons by clan: Mahli and Mushi. These are the Levite clans by fathers' houses. Bana mibali ya Merari, kolanda etuka moko na moko : Maali mpe Mushi. Bango nde bato ya bituka ya Balevi kolanda mabota na bango.
21 From Gershon: the Libnite clan and the Shimeite clan—these are the Gershonite clans. Tala bakitani oyo babimelaki na Gerishoni : etuka ya bato ya Libini mpe etuka ya Shimei. Bango nde bato ya bituka ya Gerishoni.
22 The number of males counted, a month old or older, was 7,500. Motango ya mibali nyonso oyo batangamaki kobanda sanza moko ya mbotama mpe koleka ezalaki nkoto sambo na nkama mitano.
23 The clans of the Gershonites camped behind the tabernacle on the west. Bato ya bituka ya Gerishoni batongaki molako na bango na sima ya Mongombo, na ngambo ya weste.
24 The leader of the fathers' house of the Gershonites was Eliasaph son of Lael. Eliazafi, mwana mobali ya Laele, nde azalaki mokambi ya libota ya Gerishoni.
25 Gershon's sons at the tent of meeting cared for the tabernacle, the tent, its covering, and the entrance screen of the tent of meeting. Na Ndako ya kapo ya Bokutani, bakitani ya Gerishoni bazalaki na mokumba ya kobatela Mongombo mpe ndako ya kapo, bizipelo na yango, rido ya ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani,
26 The courtyard's curtains and its entrance screen, surrounding the tabernacle and altar, and its cords for all its service. barido ya lopango, rido ya ekuke ya lopango oyo ezingela Mongombo mpe etumbelo, basinga mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela na basinga wana.
27 From Kohath came the Amramite clan, the Izharite clan, the Hebronite clan, and the Uzzielite clan; these are the clans of the Kohathites. Tala bakitani oyo babimelaki na Keati : bituka ya bato ya Amirami, ya Yitseari, ya Ebron mpe ya Uzieli. Bango nde bazalaki bato ya bituka ya Keati.
28 Males a month old and up numbered 8,600, in charge of the sanctuary. Motango ya mibali nyonso oyo bazalaki kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka ezalaki nkoto mwambe na nkama motoba. Bato ya Keati bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule.
29 The clans of the sons of Kohath camped on the south side of the tabernacle. Bato ya bituka ya Keati batongaki molako na bango pembeni ya Mongombo, na ngambo ya sude.
30 The leader of the fathers' house of the Kohathite clans was Elizaphan son of Uzziel. Elitsafani, mwana mobali ya Uzieli, nde azalaki mokambi ya bato ya bituka ya Keati.
31 They cared for the ark, the table, the lampstand, the altars, the sanctuary vessels used in service, the screen, and all its work. Bazalaki na mokumba ya kobatela Sanduku, mesa, etelemiselo ya minda, bitumbelo mpe bisalelo ya Esika ya bule oyo basalelaka mosala, rido mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela.
32 Eleazar son of Aaron the priest was chief leader of the Levites, in charge of those guarding the sanctuary. Mokambi ya bakambi ya Balevi ezalaki Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron. Aponamaki mpo ete akamba bato oyo bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule.
33 From Merari: the Mahlite clan and the Mushite clan—these are Merari's clans. Tala bakitani oyo babimelaki na Merari : bato ya etuka ya Maali mpe bato ya etuka ya Mushi. Bango nde bazalaki bato ya bituka ya Merari.
34 The number of males counted, a month old or older, was 6,200. Motango ya mibali nyonso oyo bazalaki na sanza moko ya mbotama mpe koleka, oyo batangamaki ezalaki nkoto motoba na nkama mibale.
35 Leader of Merarite clans' ancestral house: Zuriel son of Abihail; they camped on the tabernacle's north side. Tsurieli, mwana mobali ya Abiyaili, nde azalaki mokambi ya bato ya bituka ya Merari. Batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya Mongombo.
36 Merari's sons were charged with the tabernacle's frames, crossbars, posts, bases, all its equipment, and all its service, Bato ya Merari bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso ya Mongombo, oyo basala na mabaya : balate na yango, makonzi na yango, makolo na yango mpe biloko nyonso ya mike oyo bazalaki kokangisela yango.
37 as well as the posts of the surrounding courtyard with their bases, pegs, and cords. Bazalaki mpe lisusu na mokumba ya kobatela makonzi oyo ezalaki zingazinga ya lopango, bapike ya Ndako ya kapo mpe basinga na yango.
38 Camped east of the tabernacle, in front of the tent of meeting toward sunrise, were Moses, Aaron, and his sons, who kept charge of the sanctuary for the Israelites; any outsider who approached was to be put to death. Moyize, Aron mpe bana mibali ya Aron batongaki molako na bango na ngambo ya este ya Mongombo, epai wapi moyi ebimaka, etalana na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule mpo na bolamu ya bana ya Isalaele. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye.
39 All the Levites whom Moses and Aaron counted at our Father's command, by their clans, every male a month old and up: 22,000. Motango nyonso ya Balevi oyo Moyize mpe Aron batangaki kolanda mitindo ya Yawe, mpe bato ya bituka na bango, mibali nyonso kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, ezalaki bato nkoto tuku mibale na mibale.
40 Then our Father said to Moses, "Count every firstborn male of Israel a month old or older, and record the number of their names. Yawe alobaki na Moyize : « Tanga motango ya bana mibali nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele, oyo bazali na sanza moko ya mbotama mpe koleka, mpe koma bakombo na bango.
41 Take the Levites for me—I am your Father—in place of every firstborn among the people of Israel, and the Levites' livestock in place of every firstborn among Israel's livestock." Okotia Balevi pembeni mpo na Ngai, na esika ya bana nyonso ya liboso ya Isalaele, mpe bibwele nyonso ya Balevi, na esika ya bana ya liboso ya bibwele nyonso ya Isalaele. Nazali Yawe. »
42 So Moses counted every firstborn among the people of Israel, just as our Father had commanded him. Boye, Moyize atangaki motango ya bana mibali nyonso ya liboso ya Isalaele ndenge Yawe atindaki ye.
43 All firstborn males, a month or older, listed by name: 22,273. Motango nyonso ya bana mibali ya liboso, oyo bakomaki bango bakombo, wuta na sanza moko ya mbotama mpe koleka, ezalaki nkoto tuku mibale na mibale na nkama mibale na tuku sambo na misato.
44 Then our Father spoke to Moses: Yawe alobaki lisusu na Moyize :
45 "Take the Levites instead of every firstborn among Israel's people, and the Levites' livestock instead of theirs. The Levites will be mine. I am your Father. « Tia Balevi pembeni, na esika ya bana nyonso ya liboso ya Isalaele, mpe bibwele ya Balevi, na esika ya bibwele ya bana ya Isalaele. Balevi bazali ya Ngai. Nazali Yawe.
46 To redeem the 273 firstborn Israelites exceeding the Levites' count. Mpo na kosikola bana ya liboso ya Isalaele nkama mibale na tuku sambo na misato oyo baleki na motango ya Balevi,
47 Collect about 2 ounces per person, by sanctuary standard (each measure about half an ounce of silver). okokongola mbongo ya bibende, nkama mitano, kolanda ndenge batangaka mbongo kati na Esika ya bule, mpo na moto moko na moko. Mbongo moko ya ebende esengeli kozala na bagrame zomi na mibale.
48 Give the money to Aaron and his sons as the redemption price for the extra firstborn sons." Okopesa mbongo oyo osikoleli bana mibali nyonso, oyo baleki na motango ya Balevi, epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali. »
49 So Moses collected the redemption money from the firstborn sons who exceeded the number of the Levites; Boye Moyize akongolaki mbongo ya lisiko epai ya bato oyo balekaki na motango ya bana liboso oyo Balevi oyo basikolaki.
50 from Israel's firstborn sons he took 1,365—about 2 ounces, by the sanctuary standard. Azwaki na maboko ya bana liboso ya Isalaele mbongo ya bibende nkoto moko na nkama misato na tuku motoba na mitano kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule.
51 Moses gave the redemption money to Aaron and his sons, by our Father's word, just as our Father commanded Moses. Bongo Moyize apesaki mbongo yango ya lisiko epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali, ndenge kaka Yawe atindaki ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]