Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Nehemiah 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The words of Nehemiah son of Hacaliah. In the month of Kislev, in the twentieth year, I was in the citadel of Susa, Maloba ya Neyemi, mwana mobali ya Akalia. Na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi, na sanza ya kisilevi, wana nazalaki nanu na Size, mboka mokonzi,
2 Hanani, one of my brothers, came with men from Judah. I asked them about the Jews who survived, who were left from the exile, and about Jerusalem. Anani, moko kati na bandeko na ngai, ayaki elongo na bato mosusu wuta na Yuda. Natunaki bango sango ya Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu, mpe sango ya Yelusalemi.
3 They told me, "The remnant left from the captivity, there in the province, are in great trouble and disgrace. Jerusalem's wall is broken down, its gates burned with fire." Balobaki na ngai : « Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu bazali kovanda kati na etuka ya Yuda mpe bazali na pasi mingi mpe na soni makasi ; mir ya Yelusalemi etondi na madusu, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto. »
4 Hearing these words, I sat and wept, mourning for days, fasting and praying before our Father in heaven. Tango kaka nayokaki makambo oyo nyonso, namivandisaki na mabele mpe nakomaki kolela. Nasalaki mikolo mwa mingi ya matanga, na kokila bilei mpe na kosambela Nzambe ya Likolo.
5 I said: Please, my Father in heaven, the great and awesome God, who keeps covenant and loyal love with those who love him and keep his commands, Nabondelaki : « Oh Yawe, Nzambe ya Likolo, Nzambe monene mpe Nzambe ya somo ! Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo epai ya bato oyo balingaka Yo mpe batosaka mibeko na Yo,
6 let your ear be attentive and your eyes open, to hear this prayer I, your servant, pray before you now, day and night, for Israel, your servants—confessing the sins we Israelites have sinned against you. I and my father's house have sinned. tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi mpe miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na koyoka libondeli oyo mowumbu na Yo azali kosala liboso na Yo, butu mpe moyi, na tina na basali na Yo, bana ya Isalaele. Nazali kotubela masumu oyo biso bana ya Isalaele, ezala ngai mpe libota ya tata na ngai, tosalaki liboso na Yo.
7 We have wronged you deeply, not keeping the commands, statutes, and rulings you commanded your servant Moses. Tosalaki solo mabe makasi liboso na Yo ; totosaki te mitindo, bikateli mpe mibeko oyo opesaki na nzela ya Moyize, mosali na Yo.
8 Please remember your instruction to your servant Moses: "If you are unfaithful, I will scatter you among the peoples, Nabondeli Yo, kanisa maloba oyo otindaki Moyize, mosali na Yo, koloba : ‹ Soki botamboli na bosembo te, nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya.
9 but if you return to me, keep my commands, and do them, even if your exiles are at the far edge of the heavens, I will gather them from there and bring them to the place I chose to make my name dwell there." Kasi soki bozongeli Ngai mpe botosi mibeko na Ngai, wana, ezala soki bato na bino bakenda mosika na bowumbu kino na suka ya mokili, nakosangisa bango wuta kuna mpe nakomema bango na esika oyo naponaki mpo na kovandisa Kombo na Ngai. ›
10 They are your servants, your people, whom you redeemed by your great power and your strong hand. Bazali basali na Yo mpe bato na Yo, oyo osilaki kokangola na nguya monene na Yo mpe na makasi ya loboko na Yo !
11 Please, my Sovereign Father, may your ear attend to your servant's prayer, and to your servants' prayer—those who delight to fear your name. Give your servant success today, and grant him mercy before this man. I was cupbearer to the king at that time. Oh Nkolo, nabondeli Yo, tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi libondeli ya mowumbu na Yo mpe libondeli ya bawumbu na Yo mosusu oyo bazali kosepela kopesa lokumu na Kombo na Yo ! Na mokolo ya lelo, longisa mowumbu na Yo mpe salela ye ngolu na miso ya moto oyo ! » Nzokande, na tango wana, nazalaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]