Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ezra 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 As Ezra prayed, confessed, wept, and fell before the house of our Father, a huge assembly of Israel—men, women, children—gathered to him, and the people wept bitterly. Wana Esidrasi azalaki kobondela mpe kotubela masumu, azalaki ya kofukama mpe azalaki kolela liboso ya Ndako ya Nzambe. Ebele ya bana ya Isalaele : mibali, basi mpe bana, basanganaki pene na ye mpe, bango nyonso, bazalaki kolela makasi.
2 Then Shecaniah son of Jehiel, one of Elam's descendants, said to Ezra, "We have broken faith with our Father and married foreign women from the peoples of the land. Yet there's still hope for Israel despite this. Bongo Shekania, mwana mobali ya Yeyeli, moko kati na bakitani ya Elami, alobaki na Esidrasi : « Solo, tosalaki makambo ya mbindo na miso ya Nzambe na biso, pamba te tobali basi ya bapaya kati na bikolo oyo ezali elongo na biso kati na mboka oyo ; kasi atako bongo, elikya ezali nanu mpo na Isalaele !
3 So now, let's covenant with our Father to send away all these wives and their children, as advised by my lord and those who tremble at our Father's command; let it be done by the Law. Sik’oyo, tika ete tosala boyokani elongo na Nzambe na biso mpo na kobengana basi wana nyonso elongo na bana na bango, kolanda toli na yo Esidrasi, nkolo na ngai, mpe kolanda toli ya bato nyonso oyo balengaka liboso ya mibeko ya Nzambe na biso ! Tika ete esalema kolanda Mobeko !
4 Get up, for this matter rests on you, and we are with you. Be strong and act." Telema, pamba te yo nde osengeli kotala likambo oyo ! Tozali elongo na yo mpo na kosunga yo. Yika mpiko mpe sala ! »
5 Ezra then stood and had the chief priests, Levites, and all Israel swear to do as agreed. They took the oath. Esidrasi atelemaki mpe asengaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, Balevi mpe bana nyonso ya Isalaele kolapa ndayi ete bakosalela makambo oyo ndenge elobami. Mpe balapaki ndayi.
6 Then Ezra rose from before the house of our Father and went to the room of Jehohanan son of Eliashib, staying the night without bread or water, for he mourned over the unfaithfulness of the exiles. Bongo Esidrasi alongwaki liboso ya Ndako ya Nzambe mpe akendeki na shambre ya Yoanani, mwana mobali ya Eliashibi. Wana azalaki kuna, atikalaki kolia eloko moko te mpe komela mayi te ; pamba te azalaki kokoba kosala matanga likolo ya makambo ya mbindo ya bato oyo bawutaki na bowumbu.
7 Then they sent word through Judah and Jerusalem for all the returned exiles to gather at Jerusalem. Bapanzaki sango kati na Yuda mpe na Yelusalemi ete bato nyonso oyo bawutaki na bowumbu basangana na Yelusalemi.
8 Whoever failed to come within three days, by decision of the officials and elders, forfeited all his property and was excluded from the assembly of the exiles. Kolanda mokano ya bakalaka mpe bakambi ya bato, moto nyonso oyo akomonana te sima na mikolo misato, bakobotola biloko na ye nyonso mpe bakolongola ye na lisanga ya bato oyo bawutaki na bowumbu.
9 All the men of Judah and Benjamin gathered in Jerusalem within three days—on the twentieth day of the ninth month. All the people sat in the square before the house of our Father, trembling over this matter and the heavy rains. Sima na mikolo yango misato, bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame basanganaki na Yelusalemi. Na mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, bato nyonso bavandaki kati na lopango, liboso ya Ndako ya Nzambe, mpe bazalaki kolenga makasi likolo ya makambo oyo mpe mpo ete mvula ezalaki kobeta makasi.
10 Ezra the priest rose and said to them, "You have been unfaithful, marrying foreign women, adding to Israel's guilt. Nganga-Nzambe Esidrasi atelemaki mpe alobaki na bango : — Bosalaki makambo ya mbindo awa bobalaki basi ya bapaya ; mpe, na nzela na yango, bobakiselaki Isalaele ngambo.
11 Now confess to our Father, the God of your fathers, and do his will. Separate from the peoples of the land and from the foreign women." Sik’oyo, boyambola masumu na bino epai na Yawe, Nzambe ya batata na bino, mpe bokokisa mokano na Ye ! Bokabwana na bato ya bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bino mpe bokabwana na basi na bino ya bapaya.
12 Then the whole assembly answered with a loud voice, "Yes! We must do as you have said. Lisanga mobimba ezongisaki na mongongo makasi : — Ezali se bongo, tokosala ndenge olobi !
13 But the people are many, and it's the rainy season, so we can't stand outside. This isn't a job of one or two days, for we've sinned greatly in this matter. Nzokande tozali bato ebele awa, mpe ezali eleko ya mvula ; tokoki kowumela na libanda te. Kutu, ezali te likambo ya mokolo moko to ya mikolo mibale, pamba te ebele kati na biso basali masumu kati na likambo oyo.
14 Let our leaders act for the whole assembly. Let all in our towns who married foreign women come at set times, with each town's elders and judges, until our Father's burning anger over this matter turns from us." Tika ete bakambi na biso batikala awa na esika ya lisanga mobimba ! Mpe tika ete bato nyonso oyo, kati na bingumba na biso, babalaki basi ya bapaya bakende liboso ya bakambi mpe basambisi ya engumba moko na moko, na mikolo oyo bakokatela bango, kino kanda makasi ya Nzambe na biso ekolongwa kati na biso na tina na likambo yango.
15 Only Jonathan son of Asahel and Jahzeiah son of Tikvah opposed this; Meshullam and Shabbethai the Levite supported them. Kaka Jonatan, mwana mobali ya Azaeli, mpe Yakizia, mwana mobali ya Tikiva, elongo na Meshulami mpe Shabetayi, moto ya libota ya Levi, nde batelemelaki mokano oyo.
16 So the exiles did this. Ezra the priest chose men, heads of fathers' houses, each named, for their father's house. On the first day of the tenth month they sat to examine the matter, Kasi bato oyo bawutaki na bowumbu basalaki ndenge elobamaki. Nganga-Nzambe Esidrasi aponaki bakambi ya mabota, moko mpo na libota moko na moko, mpe abengaki bango nyonso na bakombo na bango. Babandaki kovanda mpo na koyekola makambo yango na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi.
17 by day one of the first month, they finished with all the men who had married foreign women. Mpe, na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, basilisaki koyekola makambo ya mibali nyonso oyo babalaki basi ya bapaya.
18 Among the priests' sons found to have married foreign women: sons of Jeshua son of Jozadak and his brothers—Maaseiah, Eliezer, Jarib, and Gedaliah. Tala kati na bakitani ya Banganga-Nzambe, mibali oyo babalaki basi ya bapaya : Kati na bakitani ya Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki elongo na bandeko na ye ya mibali : Maaseya, Eliezeri, Yaribi mpe Gedalia.
19 They pledged to send away their wives; guilty, they offered a ram from the flock for their guilt. Bango nyonso batombolaki maboko mpo na kozwa mokano ya kobengana basi na bango mpe ya kobonza meme ya mobali lokola mbeka mpo na masumu na bango.
20 Of the sons of Immer: Hanani and Zebadiah. Kati na bakitani ya Imeri : Anani mpe Zebadia.
21 Of the sons of Harim: Maaseiah, Elijah, Shemaiah, Jehiel, and Uzziah. Kati na bakitani ya Arimi : Maaseya, Eli, Shemaya, Yeyeli mpe Oziasi.
22 Of the sons of Pashhur: Elioenai, Maaseiah, Ishmael, Nethanel, Jozabad, and Elasah. Kati na bakitani ya Pashuri : Eliowenayi, Maaseya, Isimaeli, Netaneeli, Yozabadi mpe Eleasa.
23 Of the Levites: Jozabad, Shimei, Kelaiah (that is, Kelita), Pethahiah, Judah, and Eliezer. Kati na Balevi : Yozabadi, Shimei, Kelaya oyo bazalaki kobenga lisusu Kelita, Petaya, Yuda mpe Eliezeri.
24 Of the singers: Eliashib. Of the gatekeepers: Shallum, Telem, and Uri. Kati na babeti mindule : Eliashibi. Kati na bakengeli bikuke : Shalumi, Telemi mpe Uri.
25 And of Israel: of the sons of Parosh—Ramiah, Izziah, Malchijah, Mijamin, Eleazar, Malchijah, and Benaiah. Kati na bato mosusu ya Isalaele : kati na bakitani ya Pareoshi : Ramia, Yiziya, Malikiya, Miyamini, Eleazari, Malikiya mpe Benaya.
26 Of the sons of Elam: Mattaniah, Zechariah, Jehiel, Abdi, Jeremoth, and Elijah. Kati na bakitani ya Elami : Matania, Zakari, Yeyeli, Abidi, Yeremoti mpe Eli.
27 Of the sons of Zattu: Elioenai, Eliashib, Mattaniah, Jeremoth, Zabad, and Aziza. Kati na bakitani ya Zatu : Eliowenayi, Eliashibi, Matania, Yeremoti, Zabadi mpe Aziza.
28 Of the sons of Bebai: Jehohanan, Hananiah, Zabbai, and Athlai. Kati na bakitani ya Bebayi : Yoanani, Anania, Zabayi mpe Atilayi.
29 Of the sons of Bani: Meshullam, Malluch, Adaiah, Jashub, Sheal, and Jeremoth. Kati na bakitani ya Bani : Meshulami, Maluki, Adaya, Yashubi, Sheali mpe Ramoti.
30 Of the sons of Pahath-moab: Adna, Chelal, Benaiah, Maaseiah, Mattaniah, Bezalel, Binnui, and Manasseh. Kati na bakitani ya Paati-Moabi : Adina, Kelali, Benaya, Maaseya, Matania, Betisaleyeli, Binuwi mpe Manase.
31 Of the sons of Harim: Eliezer, Isshijah, Malchijah, Shemaiah, Shimeon, Kati na bakitani ya Arimi : Eliezeri, Yishiya, Malikiya, Shemaya, Simeoni,
32 Benjamin, Malluch, and Shemariah. Benjame, Maluki mpe Shemaria.
33 Of the sons of Hashum: Mattenai, Mattattah, Zabad, Eliphelet, Jeremai, Manasseh, and Shimei. Kati na bakitani ya Ashumi : Matinayi, Matata, Zabadi, Elifeleti, Yeremayi, Manase mpe Shimei.
34 Of the sons of Bani: Maadai, Amram, Uel, Kati na bakitani ya Bani : Madayi, Amirami, Ueli,
35 Benaiah, Bedeiah, Cheluhi, Benaya, Bedia, Keluwu,
36 Vaniah, Meremoth, Eliashib, Vania, Meremoti, Eliashibi,
37 Mattaniah, Mattenai, and Jaasu. Matania, Matinayi, Yasayi,
38 Of the sons of Binnui: Shimei, Bani, Binuwi, Shimei,
39 Shelemiah, Nathan, Adaiah, Shelemiya, Natan, Adaya,
40 Machnadebai, Shashai, Sharai, Makinadibayi, Shashayi, Sharayi,
41 Azarel, Shelemiah, Shemariah, Azareyeli, Shelemiya, Shemaria,
42 Shallum, Amariah, and Joseph. Shalumi, Amaria mpe Jozefi.
43 Of the sons of Nebo: Jeiel, Mattithiah, Zabad, Zebina, Jaddai, Joel, and Benaiah. Kati na bakitani ya Nebo : Yeyeli, Matitia, Zabadi, Zebina, Yadayi, Joeli mpe Benaya.
44 All these had married foreign women, and some of them had wives by whom they had children. Mibali oyo nyonso nde babalaki basi ya bapaya, mpe mingi kati na bango bazwaki bana na nzela ya basi yango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]