Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ezra 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When this was done, the officials came to me: "The people of Israel, the priests, and the Levites have not kept separate from the surrounding peoples with their detestable things—the Canaanites, Hittites, Perizzites, Jebusites, Ammonites, Moabites, Egyptians, and Amorites. Sima na makambo nyonso oyo esalemaki, bakambi ya Isalaele bayaki epai na ngai mpe balobaki : « Bato ya Isalaele, Banganga-Nzambe mpe Balevi bakabwani te na bato ya bikolo, oyo bazali kati na bango ; bakabwani mpe te na misala na bango ya mbindo. Batamboli kaka kolanda misala ya mbindo ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Yebusi, ya Amoni, ya Moabi, ya Ejipito mpe ya Amori,
2 They took some of their daughters as wives for themselves and their sons, mixing the holy offspring with the surrounding peoples. And the officials and leaders led the way in this unfaithfulness." pamba te babali bana basi ya bikolo wana ya bapaya mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango ya mibali. Boye, basangisi libota ya bule na bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bango. Bakambi mpe bakalaka bazalaki bato ya liboso ya kosala makambo wana ya mbindo. »
3 Hearing this, I tore my garment and robe, pulled hair from my head and beard, and sat down appalled. Tango nayokaki bongo, napasolaki nzambala mpe kazaka na ngai, napikolaki suki ya moto na ngai mpe mandefu na ngai mpe namivandisaki wana na mabele.
4 Then all who trembled at the words of Israel's God, our Father, gathered to me over the exiles' unfaithfulness, and I sat appalled until the evening offering. Bato nyonso oyo bazalaki kolenga mpo na maloba na Nzambe ya Isalaele basanganaki pene na ngai, mpo na misala ya mbindo ya bato oyo bawutaki na bowumbu. Navandaki na mawa kino na tango ya likabo ya pokwa.
5 At the evening offering I rose from my humbling, with my garment and robe torn, and fell on my knees, spreading my hands to my Father, Bongo na tango ya likabo ya pokwa, nasalaki makasi atako nazalaki na pasi makasi kati na motema, natelemaki na nzambala mpe kazaka na ngai, oyo epasuka ; nafukamaki mpe natombolaki maboko na ngai epai na Yawe, Nzambe na ngai.
6 and I said: "My Father, I am ashamed and disgraced to lift my face to you, my Father, for our sins have risen higher than our heads, and our guilt has grown to the heavens. Nalobaki : « Oh Nzambe na ngai ! Nazali kati na mobulu mpe nazali koyoka soni makasi mpo na kotombola elongi na ngai epai na Yo, Nzambe na ngai ; pamba te masumu mpe mabe na biso ekomi ebele penza mpe emati kino na Likolo !
7 From our ancestors' days until now we have been in deep guilt, and for our sins we—our kings and priests—were handed to the kings of the lands, to the sword, captivity, plunder, and open shame on our faces, as it is today. Wuta na tango ya bakoko na biso kino na mokolo ya lelo, mabe na biso ekomi ebele. Likolo ya masumu na biso, biso elongo na bakonzi mpe Banganga-Nzambe na biso tokabamaki na mopanga, na bowumbu, na kobebisama mpe na soni makasi na maboko ya bakonzi ya bapaya, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
8 But now, for a brief moment, grace has come from our Father, leaving us a remnant and giving us a firm foothold in his holy place, to brighten our eyes and grant us a little reviving in our slavery. Kasi sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, na mwa tango moke, osaleli biso ngolu ya kobikisa ndambo ya bato kati na biso mpe ya kopesa biso esika kati na mokili na Yo ya bule. Na boye, Yo Nzambe na biso, ongengisi miso na biso na pole mpe opesi biso lisungi kati na bowumbu na biso.
9 We are slaves; yet our Father has not abandoned us in our slavery. He extended his covenant love to us before the kings of Persia, reviving us to raise our Father's house, repair its ruins, and give us a wall of protection in Judah and Jerusalem. Pamba te, atako tozali bawumbu, kasi Yo Nzambe na biso, osundoli biso te kati na bowumbu na biso. Omonisi biso bolamu na Yo na nzela ya bakonzi ya Persi : bapesi biso makasi ya sika mpo na kotonga lisusu Ndako ya Nzambe na biso, na kobongisa bamir na yango oyo ebukanaki-bukanaki mpe na kopesa biso mir ya kobombamela kati na Yuda mpe na Yelusalemi.
10 And now, our Father, what can we say after this? For we have forsaken your commandments, Sik’oyo, oh Nzambe na biso, toloba lisusu nini na makambo oyo ezali kosalema ? Pamba te tobateli te mibeko na Yo,
11 which you commanded through your servants the prophets: "The land you are entering to possess is defiled by the impurity of its peoples, whose detestable practices have filled it end to end with their uncleanness. oyo opesaki na nzela ya basali na Yo, basakoli, tango olobaki : ‹ Mokili oyo bozali kokota mpo na kokamata yango ezali mokili oyo ebebisami na mbindo ya bato wana. Na nzela ya misala na bango ya nkele, batondisi mokili yango nyonso na mbindo na bango.
12 So now do not give your daughters to their sons or take their daughters for your sons, and never seek their peace or their prosperity, so you may be strong, eat the good of the land, and leave it as an inheritance to your children forever." Boye, bopesa te na libala bana na bino ya basi epai ya bana na bango ya mibali to bozwa te na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali. Tango nyonso, bosalaka te boyokani ya bondeko elongo na bango mpo ete bokoka kozala makasi, bokoka kolia bambuma malamu ya mokili mpe bokoka kotikela yango bana na bino lokola libula mpo na libela. ›
13 After all that has come on us for our evil deeds and great guilt—even then you, our Father, held back, punishing us less than our sins deserved, and gave us a remnant like this, Makambo nyonso oyo ekomeli biso ezali mbano ya etamboli mabe na biso mpe ya ngambo na biso monene. Mpe lisusu, oh Nzambe na biso, na kotala ebele ya masumu oyo tosali, etumbu oyo opesi biso ezali moke penza, mpo ete otikeli biso kutu ndambo ya bato oyo !
14 will we again break your commands and intermarry with peoples who do these detestable things? Would you not be angry with us until you destroyed us, leaving no remnant or survivor? Boni, tozongela lisusu kobuka mibeko na Yo mpe kobalana na bato oyo basalaka makambo ya nkele ? Boni, kanda makasi na Yo ekopela te kino kosilisa koboma biso mpe kotikela biso moto ata moko te na bomoi ?
15 Our Father, God of Israel, you are righteous, for we are left a surviving remnant, as it is today. Here we are before you in our guilt, though none can stand before you because of it." Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, ozali penza sembo ! Na ngolu na Yo, na mokolo ya lelo, tozali batikali kati na bato na biso mpe tozali awa liboso na Yo, elongo na masumu na biso ; nzokande moko te kati na biso akoki kotelema bongo liboso na Yo ! »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]