Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Nehemiah 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In the month of Nisan, in King Artaxerxes' twentieth year, wine was before him; I took it and gave it to the king—I had never been sad in his presence before. Na sanza ya Nisani, na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi, lokola vino ezalaki liboso ya mokonzi, nazwaki vino mpe napesaki ye mpo ete amela. Ezalaki mbala na ngai ya liboso ya kozala mawa-mawa liboso ya mokonzi.
2 The king asked, "Why is your face sad, though you aren't sick? This can only be a sad heart." Then I was very afraid. Boye mokonzi atunaki ngai : — Mpo na nini elongi na yo ezali mawa-mawa lokola nde ozali kobela, nzokande ozali kobela te ? Boni, ozali na mawa na motema ? Nabangaki makasi ;
3 I said to the king, "May the king live forever! Why shouldn't my face be sad, when the city, my ancestors' burial place, lies in ruins and its gates are burned by fire?" kasi nazongiselaki mokonzi : — Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! Ndenge nini elongi na ngai ezala mawa-mawa te tango engumba epai wapi bakunda batata na ngai ebebi mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto ?
4 The king asked me, "What do you request?" Then I prayed to our Father in heaven, Mokonzi atunaki ngai : — Olingi nini ? Nasambelaki Nzambe ya Likolo,
5 and said to the king, "If it pleases the king, and if your servant has your favor, send me to Judah, to the city of my ancestors' graves, to rebuild it." mpe nazongiselaki mokonzi : — Soki esepelisi mokonzi mpe soki mowumbu na ye azwi ngolu na miso na ye, tika ete mokonzi atinda ngai na engumba Yuda epai wapi bakunda batata na ngai, mpo ete nakende kotonga yango lisusu.
6 The king, with the queen seated beside him, asked me, "How long will your journey take, and when will you return?" He was pleased to send me, so I gave him a time. Mokonzi, oyo mwasi na ye avandaki pembeni na ye, atunaki ngai : — Mobembo na yo ekosala mikolo boni mpe okozonga tango nini. Esepelisaki mokonzi kotinda ngai ; mpe nakataki tango oyo mobembo yango ekokaki kosala.
7 I also said to the king, "If it pleases the king, give me letters to the governors of the province Beyond the River, so they let me cross until I reach Judah. Nalobaki na ye lisusu : — Soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi apesa ngai mikanda mpo na bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpo ete batika ngai koleka kino nakokoma kati na Yuda ;
8 Also a letter to Asaph, keeper of the king's forest, to give me timber for beams for the fortress gates by the temple, the city wall, and the house I will live in." The king granted my requests, for my Father's good hand was on me. mpe tika ete nazwa mokanda mpo na Azafi, mokengeli ya zamba ya mokonzi, mpo ete apesa ngai mabaya ya motondo mpo na bikuke ya engumba batonga makasi pene ya Tempelo, mpo na mir ya engumba mpe mpo na ndako oyo nakovanda. Lokola loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai, mokonzi apesaki ngai mikanda yango.
9 I went to the governors of the province Beyond the River and gave them the king's letters. He had also sent army officers and horsemen with me. Nakendeki epai ya bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate mpe napesaki bango mikanda ya mokonzi. Mokonzi atindaki lisusu bakonzi ya basoda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda mpo ete bazala elongo na ngai.
10 Hearing this, Sanballat the Horonite and Tobiah the Ammonite official were greatly displeased that someone had come to seek the good of Israel's people. Tango kaka Sanibala, moto ya Oroni, mpe Tobiya, kalaka ya mboka Amoni, bayokaki ete nazali koya, basepelaki ata moke te komona moto moko koya mpo na bolamu ya bana ya Isalaele.
11 So I arrived in Jerusalem and stayed there three days. Nakomaki na Yelusalemi mpe, sima na ngai kosala kuna mikolo misato,
12 I got up at night with a few men. I told no one what my Father had put in my heart to do for Jerusalem. No animal was with me except the one I rode. nabimaki na butu elongo na ndambo ya bato. Nalobaki na moto ata moko te makambo oyo Nzambe na ngai atiaki kati na motema na ngai, makambo oyo nasengeli kokokisa mpo na bolamu ya Yelusalemi. Ezalaki na nyama mosusu te elongo na ngai longola kaka nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango.
13 By night I went out through the Valley Gate, toward the Jackal's Well, to the Dung Gate, examining Jerusalem's broken walls and its burned gates. Na butu, nabimelaki na ekuke oyo ememaka na Lubwaku, nakendeki na nzela oyo ekenda na etima ya Dalagona mpe na Ekuke ya Fulu, mpo na kotala malamu-malamu bamir ya Yelusalemi, oyo etondaki na madusu mpe bikuke na yango esilaki kobebisama na moto.
14 I passed to the Fountain Gate and the King's Pool, but there was no room for my mount to pass. Nalekaki pembeni ya Ekuke ya Etima mpe pembeni ya Liziba ya mokonzi, kasi nzela ezalaki penza te mpo ete nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango ekoka koleka.
15 At night I went up the valley, examining the wall, turned back, entered the Valley Gate, and returned. Namataki wuta na lubwaku, kaka na butu, mpo na kokoba kotala malamu-malamu mir. Nabalukaki mpe nazongelaki na nzela ya Ekuke ya Lubwaku.
16 The officials did not know where I went or what I was doing; I had not yet told the Jews, the priests, the nobles, the officials, or the rest who would do the work. Bakalaka bayebaki te esika oyo nakendeki to likambo oyo nazalaki kosala ; pamba te kino na ngonga wana, nalobaki nanu ata likambo moko te, ezala epai ya Bayuda, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya bankumu, epai ya bayangeli to mpe epai ya bakambi mosusu oyo bazalaki kosala mosala.
17 Then I said, "You see our trouble: Jerusalem lies in ruins, its gates burned. Come, let's rebuild Jerusalem's wall so we're no longer a disgrace." Bongo nalobaki na bango : — Bozali komona pasi oyo tozali na yango ! Yelusalemi ebebi, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto ! Boya, totonga lisusu mir ya Yelusalemi mpo ete tolongwa kati na soni oyo !
18 I told them how my Father's good hand was on me, and what the king had said. They said, "Let's rise and build." So they strengthened their hands for the good work. Nayebisaki bango lisusu ndenge nini loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai mpe makambo oyo mokonzi alobaki na ngai. Mbala moko, bazongisaki : — Totelema mpe totonga ! Boye bazwaki mpiko mpe babandaki mbala moko mosala kitoko yango.
19 When Sanballat the Horonite, Tobiah the Ammonite official, and Geshem the Arab heard, they jeered and despised us, saying, "What is this you're doing? Are you rebelling against the king?" Kasi tango Sanibala, moto ya Oroni ; Tobiya, kalaka ya mboka Amoni ; mpe Geshemi, moto ya mboka Arabi, bayokaki sango na yango, basekaki mpe batiolaki biso. Balobaki : — Eloko nini oyo bozali kosala ? Bozali kotombokela mokonzi ?
20 I answered: "Our Father in heaven will give us success. We his servants will start rebuilding, but you have no share, right, or claim in Jerusalem." Nazongiselaki bango : — Nzambe ya Likolo akolongisa biso solo. Biso bawumbu na Ye, tokotelema mpe tokotonga. Kasi bino, bozali ata na eteni moko te ya mabele to na bokonzi moko te kati na Yelusalemi, mpe moto moko te akozala kuna na ekaniseli malamu mpo na bino !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]