Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Nehemiah 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Eliashib the high priest and his fellow priests rose and built the Sheep Gate. They dedicated it and set up its doors; they dedicated it up to the Tower of the 100, to the Tower of Hananel. Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na Banganga-Nzambe oyo bazalaki sima na ye bakotaki na mosala mpe batongaki lisusu Ekuke ya Bibwele. Babulisaki yango mpe batiaki bizipelo na yango ; bongo bakobaki kobongisa mir, babulisaki yango, longwa na ndako molayi ya Meya kino na ndako molayi ya Ananeyeli.
2 Next to them the men of Jericho built, and next to them Zaccur son of Imri built. Bato ya Jeriko babongisaki eteni ya mir oyo ekanganaki na yango ; mpe Zakuri, mwana mobali ya Imiri, atongaki pene na bango.
3 Hassenaah's sons rebuilt the Fish Gate, laid its beams, and set up its doors, bolts, and bars. Bana mibali ya Senaya basalaki Ekuke ya Mbisi ; balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo na yango elongo na basete mpe bakumba na yango.
4 Next to them, Meremoth son of Uriah son of Hakkoz repaired. Next to them, Meshullam son of Berechiah son of Meshezabel repaired. Next to them, Zadok son of Baana repaired. Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. Meshulami, mwana mobali ya Berekia, mwana mobali ya Meshezabeyeli, azalaki kosala pene na ye ; mpe Tsadoki, mwana mobali ya Baana, azalaki kosala mwa mosika na bango.
5 Next to them the Tekoites repaired, but their nobles wouldn't put their necks to their masters' work. Bato ya Tekoa babongisaki eteni ya mir oyo elandaki, kasi bakambi na bango baboyaki kosala na se ya mitindo ya batambolisi na bango ya misala.
6 Joiada son of Paseah and Meshullam son of Besodeiah repaired the Old Gate: laid its beams, set its doors, bolts, and bars. Yoyada, mwana mobali ya Paseya, mpe Meshulami, mwana mobali ya Besodia, babongisaki Ekuke ya Yeshana. Balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo, basete mpe bakumba.
7 Next to them, Melatiah the Gibeonite and Jadon the Meronothite—men of Gibeon and Mizpah—repaired the section belonging to the seat of the governor of the province Beyond the River. Melatia, moto ya Gabaoni, Yadoni, moto ya Meronoti, mpe bato mosusu ya Gabaoni mpe ya Mitsipa oyo bazalaki kosala na se ya bokonzi ya moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate bazalaki mpe kosala pene na bango.
8 Next to him, Uzziel son of Harhaiah, one of the goldsmiths, made repairs. Next to him, Hananiah, a perfumer, made repairs. They restored Jerusalem as far as the Broad Wall. Uzieli, mwana mobali ya Araya, moko kati na banyangwisi bibende na moto, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. Bongo Anania, moko kati na basali oyo basalaka malasi, abongisaki eteni mosusu ya mir oyo elandaki. Babongisaki mir ya Yelusalemi kino na esika ya mir monene.
9 Next to them Rephaiah son of Hur, ruler of half the district of Jerusalem, made repairs. Refaya, mwana mobali ya Wuri, mokambi ya ndambo ya etuka ya Yelusalemi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki.
10 Next to them Jedaiah son of Harumaph repaired opposite his house; next to him, Hattush son of Hashabneiah repaired. Yedaya, mwana mobali ya Arumafi, azalaki kosala pembeni na bango. Atushi, mwana mobali ya Ashabinia, azalaki kolanda ye. Boye atongaki eteni ya mir oyo etalanaki na ndako na ye.
11 Harim's son Malkijah and Pahath-moab's son Hasshub repaired another section and the Tower of the Ovens. Malikiya, mwana mobali ya Arimi, mpe Ashubi, mwana mobali ya Paati-Moabi, babongisaki eteni mosusu ya mir mpe ndako molayi ya Fulu.
12 Next to him Shallum son of Hallohesh, ruler of half the district of Jerusalem, repaired—he and his daughters. Shalumi, mwana mobali ya Aloeshi, mokambi ya ndambo ya etuka ya Yelusalemi, elongo na bana na ye ya basi babongisaki eteni ya mir oyo elandaki.
13 Hanun and Zanoah's people repaired the Valley Gate, rebuilding it, setting up its doors, bolts, and bars, and repairing about 1,500 feet of wall to the Dung Gate. Anuni mpe bavandi ya Zanoa babongisaki Ekuke ya Lubwaku. Balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo, basete mpe bakumba. Babongisaki lisusu bametele pene nkama mitano ya mir kino na Ekuke ya Fulu.
14 Malkijah son of Rechab, ruler of the Beth-haccherem district, repaired the Dung Gate—rebuilding it and setting its doors, bolts, and bars. Malikiya, mwana mobali ya Rekabi, mokambi ya etuka ya Beti-Akeremi, abongisaki Ekuke ya Fulu. Alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba.
15 Shallun son of Col-hozeh, ruler of the Mizpah district, repaired the Fountain Gate—rebuilding it, roofing it, and setting its doors, bolts, and bars. He also repaired the wall of the Pool of Siloam by the King's Garden, to the stairs going down from the City of David. Shalumi, mwana mobali ya Koli-Oze, mokambi ya etuka ya Mitsipa, abongisaki Ekuke ya Liziba ; atiaki mwanza likolo na yango, alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba. Atongaki lisusu mir ya Liziba ya Siloe, pembeni ya elanga ya mokonzi, kino na bibutelo oyo ewuta na engumba ya Davidi.
16 After him Nehemiah son of Azbuk, ruler of half the district of Beth-zur, repaired up to the point opposite David's tombs, the built pool, and the House of the Warriors. Neyemi, mwana mobali ya Azibuki, mokambi ya ndambo ya etuka ya Beti-Tsuri, abongisaki wuta na esika oyo Shalumi asukelaki kino na esika oyo etalana na bakunda ya Davidi, kino na liziba oyo bato batimola na maboko mpe kino na ndako ya basoda ya mpiko oyo bazalaki kokengela Davidi.
17 After him the Levites repaired: Rehum son of Bani. Next to him, Hashabiah, ruler of half the district of Keilah, repaired for his district. Balevi, na bokambami ya Rewumi, mwana mobali ya Bani, batongaki longwa na esika oyo Neyemi asukelaki. Ashabia, mokambi ya ndambo ya etuka ya Keila, atongaki mpe pembeni na bango mpo na etuka na ye.
18 After him their fellow Levites repaired next: Binnui son of Henadad, ruler of half the district of Keilah. Bandeko na ye batongaki pembeni na ye, na bokambami ya Binuwi, mwana mobali ya Enadadi, mokambi ya ndambo mosusu ya etuka ya Keila.
19 Beside him, Ezer son of Jeshua, Mizpah's ruler, repaired a second section opposite the armory ascent at the Angle. Ezeri, mwana mobali ya Jozue, mokambi ya Mitsipa, abongisaki esika mosusu, longwa na esika oyo etalani na ndako oyo babombelaka bibundeli kino na esika oyo bamir ekutana.
20 After him Baruch son of Zabbai eagerly repaired another section, from the Angle to the entrance of Eliashib the high priest's house. Bongo na mopanzi na ye, Baruki, mwana mobali ya Zakayi, abongisaki na bolingo oyo eleka ndelo eteni mosusu ya mir, longwa na esika oyo bamir ekutana kino na Ekuke ya Ndako ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe.
21 After him Meremoth son of Uriah son of Hakkoz repaired another section, from the entrance to the end of Eliashib's house. Pene na ye, Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni mosusu ya mir oyo ezalaki longwa na Ekuke ya Ndako ya Eliashibi kino na suka na yango.
22 After him the priests from the surrounding plain made repairs. Banganga-Nzambe oyo bazalaki kovanda na bamboka mike-mike ya zingazinga, bango mpe babongisaki sima na ye.
23 Next, Benjamin and Hasshub repaired opposite their house. Next, Azariah son of Maaseiah son of Ananiah repaired beside his own house. Benjame mpe Ashubi, bango mpe babongisaki eteni ya mir oyo ezalaki liboso ya bandako na bango, longwa na esika oyo basukelaki. Pene na bango, Azaria, mwana mobali ya Maaseya mpe koko ya Anania, abongisaki pembeni ya ndako na ye.
24 After him Binnui son of Henadad repaired another section, from Azariah's house to the Angle and corner. Pene na ye, Binuwi, mwana mobali ya Enadadi, abongisaki eteni mosusu, longwa na ndako ya Azaria kino na esika oyo bamir ekutana mpe kino na songe.
25 Palal son of Uzai repaired opposite the Angle and the tower jutting from the king's upper palace, by the guard's court. After him, Pedaiah son of Parosh. Palali, mwana mobali ya Uzayi, abongisaki longwa na esika oyo etalani na esika oyo bamir ekutana, esika oyo etalani na ndako molayi oyo eleki ndako ya mokonzi na molayi, pembeni ya lopango ya Boloko. Pene na ye, Pedaya, mwana mobali ya Pareoshi,
26 The temple servants living on Ophel repaired up to opposite the Water Gate eastward, and the projecting tower. elongo na basali ya Tempelo, oyo bazalaki kovanda na ngomba Ofeli, babongisaki kino na esika oyo etalani na Ekuke ya Mayi, na ngambo ya este, mpe na ndako oyo eleki na molayi.
27 After them the Tekoites repaired a second section, from opposite the great projecting tower to the wall of Ophel. Pembeni na bango, bato ya Tekoa babongisaki eteni mosusu ya mir longwa na ndako molayi oyo eleki molayi kino na mir ya Ofeli.
28 Above the Horse Gate the priests made repairs, each one opposite his own house. Longwa na Ekuke ya Bampunda, moko na moko kati na Banganga-Nzambe abongisaki liboso ya ndako na ye.
29 After him Zadok son of Immer repaired, opposite his house. After him Shemaiah son of Shecaniah, keeper of the East Gate, repaired. Pene ya Banganga-Nzambe, Tsadoki, mwana mobali ya Imeri, abongisaki liboso ya ndako na ye. Bongo pembeni na ye, Shemaya, mwana mobali ya Shekania, mokengeli Ekuke ya ngambo ya este, abongisaki eteni na ye.
30 After him Hananiah son of Shelemiah and Hanun, Zalaph's sixth son, repaired another section. After them Meshullam son of Berechiah repaired opposite his living quarters. Pene na ye, Anania, mwana mobali ya Shelemiya, mpe Anuni, mwana mobali ya motoba ya Tsalafi, babongisaki eteni mosusu ya mir. Bongo pene na bango, Meshulami, mwana mobali ya Berekia, abongisaki liboso ya ndako na ye.
31 After him Malkijah, one of the goldsmiths, repaired as far as the house of the temple servants and traders, opposite the Inspection Gate, and to the upper room at the corner. Pene na Meshulami, Malikiya, moko kati na basali oyo banyangwisaka bibende na moto, abongisaki eteni na ye kino na ndako ya basali ya Tempelo mpe ya bato ya mombongo. Eteni yango etalani na Ekuke ya Kokengela mpe kino na shambre ya likolo, na esika oyo bamir ekutana.
32 Between the upper room at the corner and the Sheep Gate, the goldsmiths and merchants made repairs. Bongo banyangwisi bibende na moto mpe bato ya mombongo babongisaki longwa na shambre ya likolo, na esika oyo bamir ekutani, kino na Ekuke ya Bibwele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]