Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Nehemiah 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
3:33 When Sanballat heard that we were rebuilding the wall, he was furious and seething with rage, and he ridiculed the Jews. Tango Sanibala ayokaki ete tozali kotonga lisusu mir, asepelaki ata moke te mpe atombokaki makasi. Akomaki kotiola Bayuda
3:34 He said in front of his brothers and the army of Samaria, "What are these feeble Jews doing? Will they restore the wall for themselves? Will they offer sacrifices? Will they finish in a single day? Can they bring stones back to life out of the heaps of rubble, charred as they are?" mpe koloba liboso ya baninga na ye mpe ya mampinga ya Samari : — Bayuda oyo balemba-lemba boye bazali kosala nini ? Bakanisi ete bakotelemisa lisusu mir na bango to kobonza lisusu mbeka ? Bakanisi penza ete, mokolo moko, bakosilisa mosala oyo to bakokoka solo kopesa bomoi na mabanga oyo ekundama na se ya mabele mpe esila kozika ?
3:35 Tobiah the Ammonite was beside him, and he said, "That stone wall they are building—even if a fox climbed up on it, he would break it down!" Tobiya, moto ya Amoni, oyo azalaki pembeni na ye alobaki : — Nini yango penza bazali kotonga ! Mir oyo, soki ata mbwa moko ya zamba emati na likolo na yango, ekokweya !
3:36 Hear us, our Father, for we are despised. Turn their taunts back on their own heads, and hand them over as plunder to a land of exile. Oh Nzambe na biso, yoka biso, pamba te totiolami ! Sala ete kotiola na bango ezonga na mito na bango moko ! Kaba bango na mboka ya bowumbu lokola bomengo ya bitumba.
3:37 Do not overlook their guilt, and do not let their sin be wiped from your sight, for they have hurled insults in the face of the builders. Kozipa mabe na bango te mpe kolongola masumu na bango na miso na Yo te, pamba te basili kofinga bato oyo bazali kotonga mir.
3:38 So we rebuilt the wall until all of it was joined together to half its height, for the people worked with all their heart. Bongo tokobaki kotonga mir yango kino nyonso ekomaki na kati-kati ya bosanda, pamba te moto nyonso azalaki kosala mosala na motema na ye mobimba.
1 But when Sanballat, Tobiah, the Arabs, the Ammonites, and the Ashdodites heard that the repairs to Jerusalem's walls were making progress and the gaps were beginning to close, they were filled with rage. Tango Sanibala, Tobiya, bato ya mokili ya Arabi, ya Amoni mpe ya Asidodi bayokaki ete misala ya kobongisa bamir ya Yelusalemi mpe ya kobamba madusu na yango epusani, batombokaki makasi.
2 They all plotted together to come and fight against Jerusalem and to throw it into confusion. Bango nyonso basanganaki mpo na koya kobundisa Yelusalemi mpe kotia mobulu kati na yango.
3 But we prayed to our Father and posted a guard against them day and night. Kasi tosambelaki Nzambe na biso mpe totiaki bakengeli, butu mpe moyi, mpo ete babundela biso liboso na bango.
4 Meanwhile the people of Judah said, "The workers are losing their strength, and there is so much rubble that we cannot rebuild the wall." Nzokande, na tango yango kaka, bato ya Yuda bazalaki koyimayima : « Awa bato oyo bazali komema mabele bazali lisusu na makasi te, mpe mipiku ya mabanga ya mir oyo ekweya ezali nanu ya komata, tokotikala kolonga te kotonga lisusu mir oyo ! »
5 And our enemies said, "Before they know it or see us, we will be right among them; we will kill them and put an end to the work." Na ngambo ya banguna na biso, bazalaki koloba : « Liboso na bango koyeba ete ezali biso mpe komona biso na miso, tokomikotela kati na bango na pwasa mpo ete toboma bango mpe tosukisa mosala na bango. »
6 Then the Jews who lived near them came and told us ten times over, "Wherever you turn, they will come against us." Nzokande, Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na bango bayaki mbala zomi koyebisa biso mabongisi na bango : « Na bisika nyonso oyo bokozala, bakobundisa biso ! »
7 So I stationed people behind the lowest sections of the wall, in the exposed places, positioning them by families with their swords, spears, and bows. Yango wana, natiaki bato na se, na sima ya mir, na bisika ya polele ; natiaki bango na masanga kolanda bituka na bango ; mpe basimbaki mipanga, makonga mpe matolotolo na bango.
8 After I looked things over, I stood up and said to the nobles, the officials, and the rest of the people, "Do not be afraid of them. Remember the Sovereign Father, great and awesome, and fight for your brothers, your sons and daughters, your wives and your homes." Sima na ngai kolandela malamu makambo nyonso, natelemaki mpe nalobaki na bankumu, na bakalaka mpe na bato mosusu : « Bobanga bango te ! Bokanisa Yawe oyo azali Nzambe Monene mpe ya somo, mpe bobunda mpo na bandeko na bino, mpo na bana na bino ya mibali mpe ya basi, mpo na basi na bino mpe mpo na bandako na bino ! »
9 When our enemies heard that we knew of their plot and that our Father had frustrated it, we all returned to the wall, each to his own work. Tango banguna na biso bayokaki ete toyebi mabongisi na bango mpe ete Nzambe abebisi yango, biso nyonso tozongaki na mir ; moko na moko azongelaki mosala na ye.
10 From that day on, half of my men did the work while the other half were equipped with spears, shields, bows, and armor. The officers stationed themselves behind all the people of Judah, Wuta mokolo wana, kati-kati kaka ya bato na ngai nde bazalaki kosala mosala ; kati-kati mosusu basimbaki makonga, banguba, matolotolo mpe balataki bilamba ya bibende oyo batiaka na tolo. Bakonzi ya basoda batelemaki na sima ya bato nyonso ya Yuda.
11 who were building the wall. Those who carried materials did their work with one hand and held a weapon with the other, Ezala ba-oyo bazalaki kotonga mir mpe ba-oyo bazalaki komema mabele mpe biloko ya mosala, bango nyonso bazalaki kosala na loboko moko ; bongo na loboko mosusu, basimbaki ebundeli.
12 and each of the builders wore his sword strapped to his side as he worked. But the man who sounded the trumpet stayed beside me. Moko na moko kati na batongi ndako azalaki na mopanga na ye na loketo, mpe azalaki kosala mosala na ye ndenge wana. Na mopanzi na ngai, ezalaki na moto moko abongama mpo na kobeta kelelo.
13 Then I said to the nobles, the officials, and the rest of the people, "The work is vast and spread out, and we are separated from one another along the wall. Bongo nalobaki na bankumu, bakalaka mpe bato mosusu : — Mosala ezali nanu monene mpe ekenda na etando molayi ; kasi biso topanzani mingi na mir, tozali mosika-mosika, bamoko na bamosusu.
14 Wherever you hear the trumpet sound, rally to us there. Our Father will fight for us!" Na esika nyonso oyo bokoyoka lolaka ya kelelo, boya noki kosangana na biso ; Nzambe na biso akobundela biso.
15 So we kept working, with half the men holding spears, from the break of dawn until the stars came out. Ezali ndenge wana nde tokobaki mosala na biso elongo na ndambo ya bato basimba makonga na maboko, kobanda na tongo kino na tango oyo minzoto ebimaka.
16 At that time I also told the people, "Let everyone and his helper stay inside Jerusalem at night, so they can serve as guards by night and laborers by day." Na tango yango kaka, nalobaki lisusu na bato : « Tika ete moto nyonso alekisaka butu kati na Yelusalemi elongo na mowumbu na ye ; boye na butu, bakokengela mpo na biso, mpe na moyi, bakokoba mosala. »
17 So neither I, nor my brothers, nor my men, nor the guards who followed me ever took off our clothes; each kept his weapon at hand, even when going for water. Ezala ngai, bandeko na ngai, basali na ngai to bakengeli oyo bazalaki elongo na ngai, moko te azalaki kolongola bilamba na ye ; moto nyonso azalaki na ebundeli na ye na loboko ata tango azalaki kokende kosukola.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]