Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Nehemiah 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Now there arose a great outcry from the people and their wives against their fellow Jews. Mibali elongo na basi na bango bayimaki-yimaki makasi mpo na kotelemela bandeko na bango, Bayuda.
2 Some said, "We, our sons and daughters, are many; let us get grain to eat and live." Bamoko bazalaki koloba : — Biso elongo na bana na biso ya mibali mpe ya basi, tozali ebele ; tozali na posa ya ble oyo ekoki na motango na biso mpo ete tolia mpe towumela na bomoi.
3 Others said, "We're mortgaging our fields, vineyards, and houses to get grain in the famine." Bamosusu bazalaki mpe koloba : — Tozali kosimbisa bilanga na biso, bilanga na biso ya vino mpe bandako na biso lokola ndanga mpo na kozwa ble na tango ya nzala makasi.
4 Others said, "We've borrowed money for the king's tax on our fields and vineyards. Bamosusu lisusu bazalaki koloba : — Topesaki bilanga na biso mpe bilanga na biso ya vino lokola ndanga mpo na kodefa mbongo ya kofuta mpako ya mokonzi.
5 We are flesh of our own brothers, our children like theirs—yet we're forcing our sons and daughters into slavery. Some daughters are already enslaved, and we're powerless: our fields and vineyards belong to others." Nzokande tozali nzoto moko mpe makila moko na bandeko na biso, mpe bana na biso bakeseni te na bana na bango ; kasi tala ndenge nini tosili kosambwa : tosengeli koteka bana na biso ya mibali mpe ya basi lokola bawumbu ; mpe bana na biso mosusu ya basi bakomi bawumbu, mpe tozangi nguya ya kosikola bango, mpo ete bilanga na biso mpe bilanga na biso ya vino ekomi ya bato mosusu !
6 I became very angry when I heard their outcry and these words. Tango nayokaki koyimayima na bango mpe maloba wana nyonso, nasilikaki makasi.
7 I thought it over, then confronted the nobles and officials: "Each of you is charging interest on loans to your own brothers!" So I called a great assembly against them. Nazwaki mokano ya kopamela bakambi mpe bankumu ; nalobaki na bango : — Tango bodefisaka bandeko na bino, bosengaka bango mileki ! Bozali nde komemisa bandeko na bino moko mokumba monene boye ! Nabengisaki mayangani moko ya monene mpo na kolobela makambo yango elongo na bango.
8 I told them, "We've done what we could to buy back our Jewish brothers sold to other nations. Now you're selling your own brothers, only for them to be sold back to us!" They fell silent, with nothing to say. Nalobaki na bango : — Biso, kolanda makoki na biso, tosikolaki bandeko na biso, Bayuda, oyo batekamaki epai ya bapagano. Kasi bino sik’oyo, bozali bino moko koteka bandeko na bino, mpe bozali koteka bango kaka epai ya bato ya ekolo na biso ! Bavandaki kimia mpe bazangaki liloba ya kozongisa.
9 So I said, "What you're doing is not good. Shouldn't you walk in fear of our Father, to avoid the taunts of our enemy nations? Nabakisaki : — Makambo oyo bozali kosala ezali malamu te. Bosengelaki te kotambola na kotosa Nzambe na biso mpo ete topesa te na bapagano oyo bazali banguna na biso nzela ya kotiola biso ?
10 My brothers, my servants, and I also lend them money and grain. Let's stop this interest. Ngai, bandeko na ngai mpe basali na ngai, todefisaki bango mbongo mpe ble. Nabondeli bino, totikela bango niongo yango !
11 Return their fields, vineyards, olive groves, and houses today, plus the interest you've charged them on money, grain, new wine, and oil." Bozongisela bango na lombangu bilanga na bango, bilanga na bango ya vino, bilanga na bango ya banzete ya olive mpe bandako na bango ; mpe botikela bango eteni ya nkama moko ya mbongo, ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta oyo bokatelaki bango lokola mileki.
12 They replied, "We will return it and demand nothing more from them. We will do as you say." So I summoned the priests and made the nobles swear to keep this promise. Bazongisaki : — Tokosala ndenge olobi, tokozongisa yango mpe tokosenga bango lisusu eloko moko te na likolo. Bongo nabengisaki Banganga-Nzambe ; mpe nasengaki na bakambi mpe bakalaka ete balapa ndayi, liboso ya Banganga-Nzambe, ete bakosala ndenge balaki.
13 I also shook out the fold of my robe and said, "May our Father shake out, from his house and property, every man who fails to keep this promise—shaken out and left empty." The whole assembly said, "Amen," and praised our Father. And the people did as promised. Mpe napupolaki songe ya nzambala na ngai na koloba : — Tika ete Nzambe apupola ndenge ngai nazali kosala mpe abengana, mosika ya ndako na ye mpe ya biloko na ye, moto nyonso oyo akokokisa te elaka na ye ; mpe tika ete bapupola ye ndenge wana mpe atikala maboko pamba ! Lisanga mobimba ezongisaki : — Amen ! Bakumisaki Yawe mpe bakokisaki makambo oyo balakaki.
14 From the day I was appointed governor of Judah—from King Artaxerxes' twentieth year to his thirty-second, twelve years—neither I nor my brothers ate the governor's food allowance. Wuta mokolo oyo mokonzi akomisaki ngai moyangeli kati na mokili ya Yuda, elingi koloba : kobanda na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi kino na mobu ya tuku misato na mibale, elekaki mibu zomi na mibale, ezala ngai to bandeko na ngai, totikalaki mokolo moko te kobika na mpako oyo bapesaka na moyangeli.
15 But the earlier governors before me burdened the people, taking food and wine from them, besides about a pound of silver. Even their servants ruled over the people. But I did not do that, because I feared our Father. Nzokande, bayangeli oyo bakambaki liboso na ngai bazalaki konyokola bato mpe kosenga na makasi ete bapesa bilei, vino mpe mbongo ya bibende ya palata, tuku minei. Ezala bakalaka na bango mpe bazalaki kaka konyokola bato. Kasi ngai, natikalaki kosala bongo te, pamba te nazalaki kotosa Nzambe.
16 I also held to the work on this wall; we bought no land. All my servants gathered there for the work. Kutu, namipesaki lisusu koleka na mosala ya kobongisa mir oyo ; basali na ngai nyonso bamipesaki mpe na mosala mpe totikalaki kosomba ata eteni moko te ya mabele.
17 150 Jews and officials also ate at my table, besides those from the surrounding nations. Na mesa na ngai, bato nkama moko na tuku mitano, Bayuda mpe bakalaka, bazalaki kolia elongo na bato oyo bazalaki koya epai na biso wuta na bikolo ya bapaya ya zingazinga.
18 Each day's provisions: one ox, six choice sheep, and birds—all prepared at my expense; every ten days, wine of every kind in plenty. Even so, I did not claim the governor's food allowance, since the labor weighed heavily on this people. Mikolo nyonso, bazalaki kolambela ngai ngombe moko ya mobali, meme motoba ya malamu mpe basoso ; mpe sima na mikolo zomi nyonso, bazalaki koya kotikela ngai vino ebele. Atako bongo, natikalaki kosenga eloko moko te kati na biloko oyo esengeli mpo na moyangeli, pamba te mokumba ya misala ezalaki makasi na mito ya bato.
19 Remember me for good, my Father, for all that I have done for this people. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai mpe talisa ngai ngolu na Yo mpo na nyonso oyo nasili kosala mpo na bato oyo !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]