Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Nehemiah 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Sanballat, Tobiah, Geshem the Arab, and our other enemies heard I had rebuilt the wall with no gap left—though I hadn't yet set the doors in the gates. Tango Sanibala, Tobiya, Geshemi, moto ya mokili ya Arabi, mpe banguna na biso mosusu bayokaki ete nasilisi kotonga lisusu mir mpe etikali na lidusu ata moko te, atako na tango wana namitielaki nanu bizipelo ya bikuke te,
2 Sanballat and Geshem sent word: "Come, let's meet in one of the villages on Ono's plain"—but they planned to harm me. Sanibala mpe Geshemi batindelaki ngai maloba oyo : — Yaka, tokutana na Kefirimi, kati na lubwaku ya Ono. Bazalaki na likanisi ya kosala ngai mabe.
3 So I sent messengers back: "I'm doing a great work and can't come down. Why let the work stop while I leave it to come down to you?" Natindelaki bango bamemi sango koyebisa bango eyano oyo : — Nazali na mosala monene ya kosala, nakokoka te koya kuna. Mpo na nini mosala etelema tango nakotika yango mpo na koya kokutana na bino ?
4 Four times they sent me the same message, and each time I gave them the same answer. Mbala minei, batindelaki ngai sango kaka moko ; mpe tango nyonso, ngai mpe nazalaki kozongisela bango eyano kaka moko.
5 Sanballat sent his servant to me this way a fifth time, with an open letter in his hand. Na mbala ya mitano, Sanibala atindelaki ngai sango moko kaka wana na nzela ya mosali na ye, oyo asimbaki mokanda ya kofungwama na loboko na ye.
6 It read: Word among the nations—Geshem says it too—is that you and the Jews plan to revolt; that's why you're building the wall, and you're about to become their king, so these reports say. Kati na mokanda yango, bakomaki : « Sango ezali kopanzana kati na bikolo, Geshemi abeti kutu sete mpo na koloba na ngai ete ezali penza solo, ete yo mpe Bayuda bozali komibongisa mpo na kotomboka, mpe ezali mpo na yango nde bozali kotonga lisusu mir oyo. Kolanda sango yango, ozali na posa ya kokoma mokonzi na bango ;
7 You've even appointed prophets to proclaim about you in Jerusalem, 'A king is in Judah!' Now this will reach the king. So come, let's talk it over. mpe osili kutu kopona basakoli mpo ete bapanza sango kati na Yelusalemi ete okomi mokonzi ya Yuda ! Sik’oyo, yeba ete sango oyo ekokoma kino penza na matoyi ya mokonzi. Boye, yaka mpo ete tosolola na tina na yango ! »
8 I replied: Nothing you're saying has happened—you're inventing it from your own mind. Natindelaki ye eyano oyo : — Kati na nyonso oyo olobi, moko te ezali solo. Ezali makambo oyo yo moko ozali kokanisa na moto na yo !
9 They all tried to frighten us, saying, "Their hands will weaken at the work, and it won't be finished." But now, my Father, strengthen my hands. Bato wana nyonso bazalaki koluka kobangisa biso ; bazalaki komilobela : — Maboko na bango ekolemba makasi, ekokoka lisusu kosala te ; mpe mosala ekosila te, ekotelema ! Bakolemba nzoto mpe bakosundola mosala ! Kasi ngai nasambelaki : — Sik’oyo, oh Yawe, lendisa maboko na ngai !
10 I went to the house of Shemaiah son of Delaiah, son of Mehetabel, who was confined. He said, "Let's meet in the house of God, inside the temple, and shut the temple doors—they're coming to kill you, coming by night to kill you." Mokolo moko, nakendeki na ndako ya Shemaya, mwana mobali ya Delaya, koko ya Metabeyeli, oyo amikangelaki na ndako na ye. Alobaki : — Tokutana kati na Ndako ya Nzambe, na kati-kati ya Esika ya bule, mpe tokanga bikuke na yango, pamba te bato bazali koya mpo na koboma yo ; bakoya na butu mpo na koboma yo.
11 But I said, "Should a man like me flee? Should someone like me enter the temple to survive? I won't go in." Kasi nazongiselaki na ye : — Boni, moto lokola ngai akoki penza kokima ! Kutu, moto nani lokola ngai akoki kokimela kati na Ndako ya Nzambe mpe abikisa bomoi na ye ? Nakokende te !
12 I realized our Father hadn't sent him—he'd spoken this prophecy against me because Tobiah and Sanballat hired him. Nasosolaki mbala moko ete ezali Nzambe te nde atindi ye. Kasi apesaki lisakoli wana na tina na ngai, pamba te Tobiya mpe Sanibala bapesaki ye kanyaka.
13 He was hired to scare me into sinning, so they could give me a bad name and disgrace me. Bapesaki ye kanyaka mpo na kobangisa ngai, mpo ete nasala masumu tango nakolanda toli na ye ; mpe mpo ete babebisa lokumu ya kombo na ngai mpe bayokisa ngai soni.
14 Remember, my Father, Tobiah and Sanballat for these deeds, and also Noadiah the woman prophet and the rest of the prophets who tried to frighten me. Oh Nzambe na ngai, kanisa Tobiya mpe Sanibala mpo na misala na bango ! Kanisa lisusu Noadia, mwasi mosakoli, elongo na basakoli mosusu oyo bazalaki komeka kobangisa ngai !
15 So the wall was completed on the twenty-fifth day of Elul, in fifty-two days. Boye, misala ya kotonga mir esilaki na mokolo ya tuku mibale na mitano ya sanza ya Eluli ; esalaki mikolo tuku mitano na mibale.
16 When all our enemies heard, and all the nations around us saw, they were badly shaken in their own eyes, for they knew our Father had done this work. Tango banguna na biso bayokaki sango yango, bato ya bikolo nyonso ya zingazinga bakomaki kobanga mpe koyoka soni na miso na bango moko, mpo ete basosolaki ete ezali kaka na lisungi ya Nzambe na biso nde mosala ya ndenge wana esalemaki.
17 Also in those days, Judah's nobles sent many letters to Tobiah, and Tobiah's letters kept coming back to them. Na mikolo wana, bankumu ya Yuda bazalaki kotinda mikanda ebele epai ya Tobiya, mpe biyano ya Tobiya ezalaki kokomela bango.
18 Many in Judah were bound to him by oath, for he was Shecaniah son of Arah's son-in-law, and his son Jehohanan had married Meshullam son of Berekiah's daughter. Pamba te bato ebele ya Yuda basalaki boyokani elongo na ye, na nzela ya ndayi, mpo ete azalaki bokilo ya Shekania, mwana mobali ya Ara, mpe mpo ete Yoanani, mwana na ye ya mobali, abalaki mwana mwasi ya Meshulami, mwana mobali ya Berekia.
19 They also kept telling me his good deeds, and reported my words to him. Tobiah sent letters to frighten me. Bazalaki kutu kokumisa misala na ye na miso na ngai mpe koyebisa ye maloba na ngai. Ezalaki Tobiya wana moto azalaki kotinda mikanda mpo na kobangisa ngai.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]