Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Nehemiah 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After the wall was rebuilt and I set up the doors, the gatekeepers, singers, and Levites were appointed. Tango misala ya kotonga mir esilaki mpe natiaki bizipelo ya bikuke, batiaki bakengeli bikuke, bayembi mpe Balevi : bato na bato na mosala na bango.
2 I put my brother Hanani in charge of Jerusalem, with Hananiah commander of the fortress, since he was faithful and feared our Father more than many. Napesaki mokumba ya kokamba engumba Yelusalemi epai ya Anani, ndeko na ngai ya mobali, mpe epai ya Anania, moyangeli ya engumba batonga makasi, oyo, koleka bato ebele, azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa Nzambe.
3 I told them, "Don't open Jerusalem's gates until the sun is hot; and while the guards are on watch, let them shut and bar the doors. Appoint watchmen from Jerusalem's residents, each at his post, each opposite his own house." Nalobaki na bango : — Bikuke ya Yelusalemi esengeli te kofungwama liboso ete moyi engala, mpe, na pokwa, bakokanga makasi bizipelo na yango mpe bakokotisa yango bikangelo, wana bakengeli bikuke bakozala nanu na bisika na bango ya mosala. Botia lisusu lokola bakengeli, bavandi ya Yelusalemi : bamoko bakozala na bisika na bango ya mosala, mpe bamosusu bakokengela pembeni ya bandako na bango.
4 The city was large, but the people in it were few, with no houses yet rebuilt. Nzokande, etando ya engumba Yelusalemi ezalaki monene mpe ekenda mosika makasi, kasi bato kati na yango bazalaki moke mpe bandako etongamaki nanu te.
5 Then my Father put it in my heart to gather the nobles, the officials, and the people to register by genealogy. I found the genealogy record of the first returnees, and found written in it: Nzambe na ngai apesaki ngai makanisi ya kosangisa bankumu, bakambi mpe bato mosusu mpo na kotanga motango na bango kolanda mabota na bango. Bongo, namonaki buku ya bokoko ya ba-oyo bazongaki bato ya liboso longwa na bowumbu. Tala makomi oyo namonaki kuna :
6 These are the province's people who returned from exile, whom Nebuchadnezzar king of Babylon had carried away, back to Jerusalem and Judah, each to his own town, Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu ; mpe wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto na engumba na ye ;
7 coming with Zerubbabel, Jeshua, Nehemiah, Azariah, Raamiah, Nahamani, Mordecai, Bilshan, Mispereth, Bigvai, Nehum, and Baanah—the count of the men of Israel's people: bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Azaria, Raamia, Naamani, Maridoshe, Bilishani, Misipereti, Bigivayi, Neumi mpe Baana. Tala motango ya bana ya Isalaele :
8 The descendants of Parosh, 2,172; Bakitani ya Pareoshi : nkoto mibale na nkama moko na tuku sambo na mibale.
9 the descendants of Shephatiah, 372; Bakitani ya Shefatia : nkama misato na tuku sambo na mibale.
10 the descendants of Arah, 652; Bakitani ya Ara : nkama motoba na tuku mitano na mibale.
11 the descendants of Pahath-moab (through the line of Jeshua and Joab), 2,818; Bakitani ya Paati-Moabi na nzela ya Jozue mpe Joabi : nkoto mibale na nkama mwambe na zomi na mwambe.
12 the descendants of Elam, 1,254; Bakitani ya Elami : nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
13 the descendants of Zattu, 845; Bakitani ya Zatu : nkama mwambe na tuku minei na mitano.
14 the descendants of Zaccai, 760; Bakitani ya Zakayi : nkama sambo na tuku motoba.
15 the descendants of Binnui, 648; Bakitani ya Binuwi : nkama motoba na tuku minei na mwambe.
16 the descendants of Bebai, 628; Bakitani ya Bebayi : nkama motoba na tuku mibale na mwambe.
17 the descendants of Azgad, 2,322; Bakitani ya Azigadi : nkoto mibale na nkama misato na tuku mibale na mibale.
18 the descendants of Adonikam, 667; Bakitani ya Adonikami : nkama motoba na tuku motoba na sambo.
19 the descendants of Bigvai, 2,067; Bakitani ya Bigivayi : nkoto mibale na tuku motoba na sambo.
20 the descendants of Adin, 655; Bakitani ya Adini : nkama motoba na tuku mitano na mitano.
21 the descendants of Ater (through Hezekiah), 98; Bakitani ya Ateri na nzela ya Ezekiasi : tuku libwa na mwambe.
22 the descendants of Hashum, 328; Bakitani ya Ashumi : nkama misato na tuku mibale na mwambe.
23 the descendants of Bezai, 324; Bakitani ya Betsayi : nkama misato na tuku mibale na minei.
24 the descendants of Hariph, 112; Bakitani ya Arifi : nkama moko na zomi na mibale.
25 the descendants of Gibeon, 95. Bakitani ya mboka Gabaoni : tuku libwa na mitano.
26 The men of Bethlehem and Netophah, 188; Bato ya bamboka Beteleemi mpe Netofa : nkama moko na tuku mwambe na mwambe.
27 the men of Anathoth, 128; Bato ya mboka Anatoti : nkama moko na tuku mibale na mwambe.
28 the men of Beth-azmaveth, 42; Bato ya mboka Beti-Azimaveti : tuku minei na mibale.
29 the men of Kiriath-jearim, Chephirah, and Beeroth, 743; Bato ya bamboka Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti : nkama sambo na tuku minei na misato.
30 the men of Ramah and Geba, 621; Bato ya bamboka Rama mpe Geba : nkama motoba na tuku mibale na moko.
31 the men of Michmas, 122; Bato ya mboka Mikimasi : nkama moko na tuku mibale na mibale.
32 the men of Bethel and Ai, 123; Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi : nkama moko na tuku mibale na misato.
33 the men of the other Nebo, 52. Bato ya mboka Nebo mosusu : tuku mitano na mibale.
34 The descendants of the other Elam, 1,254; Bato ya mboka ya Elami mosusu : nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
35 the descendants of Harim, 320; Bato ya mboka Arimi : nkama misato na tuku mibale.
36 the descendants of Jericho, 345; Bakitani ya mboka Jeriko : nkama misato na tuku minei na mitano.
37 the descendants of Lod, Hadid, and Ono, 721; Bato ya bamboka Lodi, Adidi mpe Ono : nkama sambo na tuku mibale na moko.
38 the descendants of Senaah, 3,930. Bakitani ya engumba Sena : nkoto misato na nkama libwa na tuku misato.
39 The priests: the descendants of Jedaiah (through the house of Jeshua), 973. Tala motango ya Banganga-Nzambe : Bakitani ya Yedaeya na nzela ya libota ya Jozue : nkama libwa na tuku sambo na misato.
40 The descendants of Immer, 1,052; Bakitani ya Imeri : nkoto moko na tuku mitano na mibale.
41 the descendants of Pashhur, 1,247; Bakitani ya Pashuri : nkoto moko na nkama mibale na tuku minei na sambo.
42 the descendants of Harim, 1,017. Bakitani ya Arimi : nkoto moko na zomi na sambo.
43 The Levites: the descendants of Jeshua (through Kadmiel and the line of Hodevah), 74. Tala motango ya Balevi : Bakitani ya Jozue na nzela ya Kadimieli mpe ya Odeva : tuku sambo na minei.
44 The singers: the descendants of Asaph, 148. Tala motango ya bayembi : Bakitani ya Azafi : nkama moko na tuku minei na mwambe.
45 The gatekeepers: the descendants of Shallum, Ater, Talmon, Akkub, Hatita, and Shobai, 138. Tala motango ya bakengeli bikuke : Bakitani ya Shalumi, Ateri, Talimoni, Akubi, Atita mpe Shobayi : nkama moko na tuku misato na mwambe.
46 The temple servants: the descendants of Ziha, Hasupha, Tabbaoth, Basali ya Tempelo : Bakitani ya Tsika, Asufa, Tabaoti,
47 Keros, Sia, Padon, Kerosi, Siya, Padoni,
48 Lebana, Hagaba, Shalmai, Lebana, Agaba, Shalimayi,
49 Hanan, Giddel, Gahar, Anani, Gideli, Gaari,
50 Reaiah, Rezin, Nekoda, Reaya, Retsini, Nekoda,
51 Gazzam, Uzza, Paseah, Gazami, Uza, Paseya,
52 Besai, Meunim, Nephushesim, Besayi, Mewunimi, Nefusimi,
53 Bakbuk, Hakupha, Harhur, Bakibuki, Akufa, Aruri,
54 Bazlith, Mehida, Harsha, Batsiliti, Meyida, Arisha,
55 Barkos, Sisera, Temah, Barikosi, Sisera, Tama,
56 Neziah, and Hatipha. Netsia mpe Atifa.
57 The descendants of Solomon's servants: the descendants of Sotai, Sophereth, Perida, Tala bakitani ya basali ya Salomo : Bakitani ya Sotayi, Sofereti, Perida,
58 Jaala, Darkon, Giddel, Yala, Darikoni, Gideli,
59 Shephatiah, Hattil, Pochereth-hazzebaim, and Amon. Shefatia, Atili, Pokereti-Atsebayimi mpe Amoni.
60 All the temple servants and the descendants of Solomon's servants numbered 392. Motango ya basali ya Tempelo mpe ya bakitani ya basali ya Salomo : nkama misato na tuku libwa na mibale.
61 These came up from Tel-melah, Tel-harsha, Cherub, Addon, and Immer, unable to show their father's house or lineage, whether from Israel: Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adoni mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele :
62 The descendants of Delaiah, Tobiah, and Nekoda, 642. Bakitani ya Delaya, Tobiya mpe Nekoda : nkama motoba na tuku minei na mibale.
63 From the priests: descendants of Hobaiah, Hakkoz, and Barzillai—who married one of Barzillai the Gileadite's daughters and took that family's name. Mpe kati na Banganga-Nzambe : bakitani ya Obaya, ya Akotsi mpe ya Barizilayi oyo abengamaki « Barizilayi » mpo ete abalaki mwana mwasi ya Barizilayi, moto ya Galadi.
64 These looked for their genealogical records, but found none, so were excluded from the priesthood as unclean. Balukaki mikanda oyo bakoma bakombo ya bakoko na bango, kasi batikalaki komona yango te. Boye balongolaki bango na mosala ya bonganga-Nzambe, pamba te bazalaki mbindo.
65 The governor told them not to eat the most holy food until a priest could consult Urim and Thummim. Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango na nzela ya Urimi mpe Tumimi.
66 The whole assembly together numbered 42,360, Motango ya lisanga mobimba ya bato oyo bawutaki na bowumbu ezalaki nkoto tuku minei na mibale na nkama misato na tuku motoba,
67 besides their 7,337 male and female servants; and they had 245 male and female singers. bakisa bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi nkoto sambo na nkama misato na tuku misato na sambo ; bazalaki mpe na bayembi ya basi mpe ya mibali nkama mibale na tuku minei na mitano, bampunda nkama sambo na tuku misato na motoba, bamile nkama mibale na tuku minei na mitano,
68 They had 736 horses, 245 mules, Not in this edition
68 435 camels, and 6,720 donkeys. bashamo nkama minei na tuku misato na mitano mpe ba-ane nkoto motoba na nkama sambo na tuku mibale.
69 Some family heads gave to the work. The governor gave to the treasury 1,000 gold coins, 50 bowls, and 530 priestly garments. Bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki kopesa wuta na mitema na bango moko, mpo na misala ya kotonga Tempelo. Moyangeli apesaki na libenga ya misala mbongo ya bibende ya wolo nkoto moko, bakopo tuku mitano mpe banzambala nkama mitano na tuku misato ya mosala ya bonganga-Nzambe.
70 Some family heads gave the work's treasury 20,000 gold coins and about 2,750 pounds of silver. Bakambi mosusu ya mabota bapesaki na libenga ya misala mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku mibale mpe mbongo ya bibende ya palata nkoto mibale na nkama mibale na tuku mibale.
71 The rest of the people gave 20,000 gold coins, about 2,500 pounds of silver, and 67 priestly garments. Batikali kati na bato bapesaki mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku mibale, mbongo ya bibende ya palata nkoto mibale mpe banzambala tuku motoba na sambo ya mosala ya bonganga-Nzambe.
72 The priests, Levites, gatekeepers, singers, some of the people, temple servants, and all Israel settled in their towns. By the seventh month, Israel's people were in their towns. Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango moko. Tango sanza ya sambo ekomaki, bana ya Isalaele bakomaki kovanda kati na bingumba na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]