Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Mark 16 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When the Sabbath ended, Mary Magdalene, Mary the mother of James, and Salome bought spices to go anoint him. Tango mokolo ya Saba elekaki, Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Jake mpe Salome, basombaki mafuta ya solo kitoko mpo na kokende kokawusa nzoto ya Yesu mpo ete ebeba te.
2 Very early on the first day of the week, just after sunrise, they went to the tomb. Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana moyi ebandi kobima, bakendeki na kunda.
3 They asked each other, "Who will roll the stone away from the tomb's entrance for us?" Bazalaki kotunana kati na bango : — Nani akotindikela biso libanga mpo ete elongwa na ekotelo ya kunda ?
4 But looking up, they saw the stone—very large—already rolled away. Mpe tango batombolaki miso, bamonaki ete libanga esilaki kotindikama mpe ezalaki lisusu te na ekotelo ya kunda ; nzokande, libanga yango ezalaki ya monene penza.
5 They entered the tomb and saw a young man dressed in a white robe, seated on the right. They were alarmed. Sima na bango kokota kati na kunda, bamonaki elenge mobali moko, avandi na ngambo ya loboko ya mobali, alata nzambala ya pembe ; somo ekangaki bango.
6 "Don't be alarmed," he said. "You're looking for Jesus the Nazarene, who was crucified. He's risen—he isn't here. Look, the place they laid him. Kasi alobaki na bango : — Bobanga te ! Bozali koluka Yesu ya Nazareti, oyo babakaki na ekulusu ? Azali awa te, asili kosekwa. Botala esika oyo batiaki Ye.
7 But go, tell his disciples and Peter, 'He goes ahead of you to Galilee. You will see him there, as he told you.'" Bokende sik’oyo koyebisa Petelo mpe bayekoli mosusu : « Akei liboso na bino, na Galile ; ezali kuna nde bokomona Ye, ndenge kaka ayebisaki bino. »
8 Trembling and amazed, the women fled the tomb, telling no one—they were afraid. Babimaki na lombangu mpe bakimaki mosika ya kunda ya Yesu, pamba te bango nyonso bazalaki kolenga na somo, mpe makanisi na bango epalanganaki. Balobaki eloko te na moto nyonso, pamba te bazalaki kobanga.
9 Rising early the first day of the week, Jesus appeared first to Mary Magdalene, from whom he had driven seven demons. Na tongo ya mokolo ya liboso ya poso, tango Yesu asekwaki, abimelaki liboso Mari, moto ya mboka Magidala, oyo, kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo.
10 She went and told those who had been with him, who were mourning and weeping. Bongo Mari akendeki koyebisa bato oyo batambolaki elongo na Yesu ; akutaki bango batondi na mawa mpe bazali kolela.
11 Hearing Jesus was alive and seen by her, they did not believe it. Kasi tango bayokaki ye koloba : « Yesu azali na bomoi, awuti kobimela ngai, » bandimaki ye te.
12 Afterward Jesus appeared, in a different form, to two of them walking in the country. Sima na yango, Yesu abimelaki mibale kati na bango na lolenge mosusu, wana bazalaki kokende na mboka.
13 They went back and reported it to the others, but they did not believe them either. Bazongaki mpe bayebisaki yango epai ya bayekoli mosusu ; kasi bayekoli yango bandimaki bango te.
14 Later Jesus appeared to the eleven as they reclined at a meal and rebuked their lack of faith and hardness of heart, because they hadn't believed those who saw him risen. Sima na yango, abimelaki bantoma zomi na moko, wana bazalaki kolia, mpe apamelaki bango mpo ete bazalaki na kondima te, mpe mpo ete bazalaki mitema mabanga ; pamba te bandimaki te bato oyo bamonaki Ye sima na lisekwa na Ye.
15 He said to them, "Go into all the world and proclaim the good news to all creation. Alobaki na bango : — Bokende na mokili mobimba, mpe boteya bato nyonso Sango Malamu.
16 Whoever believes and is baptized will be saved, but whoever does not believe will be condemned. Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi moto oyo akondima te akozwa etumbu.
17 And these signs will follow those who believe: in my name they'll drive out demons, speak in new tongues. Tala bilembo oyo ekolanda bato oyo bakondima : na Kombo na Ngai, bakobengana milimo mabe ; bakoloba nkota ya sika,
18 They will pick up snakes with their hands; if they drink deadly poison, it won't harm them; they will lay hands on the sick, and they will recover." bakokanga banyoka na maboko na bango ; mpe soki bameli ngenge, ekosala bango pasi ata moke te ; bakotiela babeli maboko, mpe babeli bakobika na bokono na bango.
19 After speaking to them, the Lord Jesus was taken up into heaven and sat at the right hand of our Father. Sima na Nkolo Yesu koloba na bango, amemamaki kati na Likolo mpe avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.
20 They went out and preached everywhere, the Lord working with them, confirming his word through accompanying signs. Bayekoli bakendeki koteya na bisika nyonso. Nkolo azalaki kosala elongo na bango mpe azalaki kokokisa liloba na Ye na nzela ya bilembo ya kokamwa oyo ezalaki kolanda liloba na Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]