Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Since many have undertaken to compile an ordered account of what has been accomplished among us. Bato mingi bamekaki kokoma makambo oyo elekaki kati na biso,
2 Just as eyewitnesses from the beginning and servants of the word handed these accounts to us, kolanda ndenge bayebisaki biso yango na bato oyo, wuta na ebandeli, bamonaki yango na miso mpe bakomaki basali ya Liloba na Nzambe.
3 I too, having traced everything accurately from the start, decided to write it in order for you, most excellent Theophilus, Yango wana, ngai mpe, sima na ngai kotuna-tuna mpo na koluka koyeba malamu makambo nyonso, banda na ebandeli, namonaki lisusu ete ezali malamu mpo na ngai kokomela yo yango ndenge elandanaki, Teofile ya lokumu,
4 so that you may know the certainty of the things you have been taught. mpo ete oyeba bosolo ya malakisi oyo ozwaki.
5 In the days of Herod, king of Judea, a priest named Zechariah was in Abijah's priestly division. His wife Elizabeth descended from Aaron. Na tango oyo Erode azalaki mokonzi ya Yuda, ezalaki na Nganga-Nzambe moko, kombo na ye ezalaki « Zakari ; » azalaki moko kati na Banganga-Nzambe ya lisanga ya Abiya. Mwasi na ye, Elizabeti, azalaki mokitani ya Aron.
6 They were both righteous before our Father, walking blamelessly in all his commandments and ordinances. Bango mibale bazalaki bato ya sembo liboso ya Nzambe, bazalaki kotosa, na ndenge esengeli, mibeko nyonso mpe mitindo nyonso ya Nkolo.
7 But they had no child, because Elizabeth was barren, and both were very old. Kasi bazalaki na mwana te, pamba te Elizabeti azalaki ekomba ; mpe bango mibale bakomaki mibange.
8 Now while he was serving as priest before our Father when his division was on duty, Mokolo moko, wana Zakari azalaki kosala mosala na ye lokola Nganga-Nzambe, liboso ya Nzambe, pamba te ezalaki ngala ya lisanga na ye,
9 by priestly custom, lot chose him to enter his sanctuary and burn incense. aponamaki na zeke, kolanda momesano ya bonganga-Nzambe, mpo na kokota kati na Esika ya bule ya Nkolo mpe kotumba kuna malasi ya ansa.
10 And the whole crowd of the people were praying outside at the hour of incense. Tango ekomaki ngonga ya kotumba malasi ya ansa, lisanga mobimba ya basambeli ezalaki kosambela na libanda.
11 Then an angel of our Father appeared to him, standing at the right of the altar of incense. Bongo anjelu moko ya Yawe abimelaki ye ya kotelema na ngambo ya loboko ya mobali ya etumbelo ya malasi ya ansa.
12 Zechariah was shaken when he saw him, and fear came over him. Tango Zakari amonaki ye, abangaki makasi, mpe somo monene ekangaki ye.
13 The angel said to him, "Don't be afraid, Zechariah—your prayer has been heard. Your wife Elizabeth will bear you a son; name him John. Kasi anjelu alobaki na ye : — Zakari, kobanga te ! Nzambe ayoki mabondeli na yo. Mwasi na yo, Elizabeti, akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo « Yoane. »
14 You will have joy and gladness; many will rejoice at his birth. Mwana yango akosala esengo na yo, mpe okosepela na ye makasi ; mpe bato ebele bakosepela mpo na mbotama na ye,
15 He will be great before our Father, must never drink wine or other alcoholic drinks, and he will be filled with the Holy Spirit even from his mother's womb. pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye.
16 And he will turn many of the children of Israel back to their Father. Akozongisa bato ebele ya Isalaele epai ya Nkolo, Nzambe na bango,
17 He will go before our Father in Elijah's spirit and power, turning fathers' hearts to their children, and the disobedient to the wisdom of the righteous, to prepare a people ready for our Father." mpe akotambola liboso ya Nzambe, elongo na molimo mpe nguya oyo ezalaki kovanda kati na Eliya, mpo na kozongisa boyokani kati na batata mpe bana na bango, mpo na kosala ete batomboki bakoma kokanisa lokola bato ya sembo, mpe mpo na kobongisa bato mpo na Nkolo.
18 Zechariah said to the angel, "How will I know this? I'm old, and my wife is well along in years." Zakari atunaki anjelu : — Ndenge nini nakoki koyeba ete ezali ya solo ? Pamba te, ngai, nazali mobange, mpe mibu ya mbotama ya mwasi na ngai esili kopusana makasi.
19 The angel answered him, "I am Gabriel, who stands in our Father's presence, sent to speak to you and bring you this good news. Anjelu azongiselaki ye : — Nazali Gabrieli ; natelemaka liboso ya Nzambe oyo atindi ngai mpo na koyebisa yo mpe kopesa yo basango oyo ya malamu.
20 And now you will be silent, unable to speak, until the day these things happen, because you did not believe my words, which will come true in their time." Lokola ondimeli maloba na ngai te, oyo ekokokisama solo na tango na yango oyo ekatama, okokoma baba mpe okokoka lisusu koloba te kino na mokolo oyo makambo yango ekokokisama.
21 Meanwhile the people waited for Zechariah, wondering why he stayed so long in the sanctuary. Na tango yango, bato bazalaki kozela Zakari mpe komituna mpo na nini azali kowumela tango molayi kati na Esika ya bule.
22 When he came out, he could not speak to them, and they knew he had seen a vision in the sanctuary. He kept motioning to them and stayed mute. Tango abimaki, azalaki lisusu te na makoki ya koloba na bango ; boye basosolaki ete azwi emoniseli kati na Esika ya bule, pamba te akomaki koloba na bango na nzela ya bilembo mpe atikalaki baba.
23 And when his days of service were ended, he went home. Tango mikolo na ye ya mosala ekokaki, azongaki na ndako na ye.
24 After these days his wife Elizabeth became pregnant, and for five months she kept herself hidden, saying, Sima na mwa tango, mwasi na ye, Elizabeti, akomaki na zemi mpe abombamaki sanza mitano.
25 "This is what our Father did for me, in the days he looked on me, to remove my disgrace among people." Azalaki komilobela : « Tala likambo oyo Nkolo asali mpo na ngai ! Na mikolo oyo, atalisi ngai ngolu na Ye mpe alongoli soni na ngai na miso ya bato. »
26 In month six our Father sent the angel Gabriel to a Galilee town called Nazareth, Sima na basanza motoba, Nzambe atindaki anjelu Gabrieli kati na engumba moko ya Galile, kombo na yango ezalaki « Nazareti. »
27 to a virgin engaged to a man named Joseph, of the house of David; the virgin's name was Mary. Atindaki ye epai ya elenge mwasi Mari oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe azalaki mobandami ya libala na mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jozefi, mokitani ya Davidi.
28 And he came to her and said, "Greetings, favored one! Our Father is with you." Anjelu akotaki epai ya Mari mpe alobaki na ye : — Mbote na yo, yo oyo osili kozwa ngolu monene ! Nkolo azali elongo na yo !
29 But she was greatly troubled by his words, and wondered what kind of greeting this might be. Tango Mari ayokaki maloba ya anjelu, amitungisaki makasi mpe akomaki komituna soki mbote yango elakisi nini.
30 The angel said to her, "Don't be afraid, Mary, for you have found favor with our Father. Kasi anjelu alobaki na ye : — Mari, kobanga te ! Pamba te Nzambe asaleli yo ngolu !
31 You will conceive in your womb and bear a son, and you will call his name Jesus. Okozwa zemi, okobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo « Yesu. »
32 He will be great and called Son of the Most High, and our Father will give him the throne of his father David, Akozala Moto monene, mpe bakobenga Ye : Mwana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Nkolo Nzambe akopesa Ye kiti ya bokonzi ya Davidi, koko na Ye.
33 and he will reign over Jacob's house forever; his kingdom will never end." Akozala Mokonzi ya libota ya Jakobi mpo na libela, mpe bokonzi na Ye ekozala na suka te.
34 And Mary said to the angel, "How will this be, since I am a virgin?" Mari atunaki anjelu : — Ekosalema ndenge nini, pamba te nayebi nanu nzoto ya mibali te ?
35 The angel answered her, "The Holy Spirit will come over you, and the Most High's power will shadow you; so the holy child born will be called the Son of our Father. Anjelu azongiselaki ye : — Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe.
36 Look, your relative Elizabeth has also conceived a son in her old age—this is the sixth month for her called barren. Ndeko na yo ya mwasi, Elizabeti, azali mpe na zemi ; akobota mwana mobali, atako akomi mobange. Ye oyo bazalaki kobenga « ekomba » akomi sik’oyo na zemi ya sanza motoba.
37 For nothing will be impossible with our Father." Pamba te Nzambe alembanaka eloko te.
38 Mary said, "I am the servant of our Father; let it happen to me as you said." Then the angel left her. Mari azongiselaki ye : — Nazali mwasi mowumbu ya Nkolo, tika ete maloba na yo ekokisamela ngai ! Bongo anjelu akabwanaki na ye.
39 In those days Mary got up and hurried to the hill country, to a town in Judah, Sima na mwa mikolo, Mari atelemaki mpe akendeki na lombangu, na engumba moko kati na mokili ya bangomba ya Yuda.
40 and she entered the house of Zechariah and greeted Elizabeth. Kuna, akotaki na ndako ya Zakari mpe apesaki Elizabeti mbote.
41 When Elizabeth heard Mary's greeting, her baby leaped in her womb, and she was filled with the Holy Spirit. Tango kaka Elizabeti ayokaki mbote ya Mari, mwana aninganaki kati na libumu na ye. Elizabeti atondisamaki na Molimo Mosantu
42 She cried out with a loud voice, "Blessed are you among women, blessed is the fruit of your womb! mpe agangaki na mongongo makasi : — Ozali ya kopambolama kati na basi, mpe esengo na mwana oyo azali kati na libumu na yo !
43 And why is this granted to me, that the mother of my Lord should come to me? Ngai nde nani mpo ete mama ya Nkolo na ngai aya epai na ngai ?
44 For the moment I heard your greeting, the baby in my womb leaped for joy. Pamba te, tango kaka nayoki mbote na yo, mwana aningani na esengo kati na libumu na ngai.
45 Blessed is she who believed that there would be a fulfillment of what our Father spoke to her." Esengo na mwasi oyo andimaki ete Nkolo akokokisa elaka oyo apesaki ye !
46 And Mary said, "My soul magnifies our Father, Bongo Mari alobaki : — Molimo na ngai ezali kokumisa Nkolo,
47 and my spirit rejoices in our Father, my Savior, mpe natondi na esengo mpo na Nzambe, Mobikisi na ngai,
48 for he has looked on the humble estate of his servant. For from now on all generations will call me blessed; pamba te atali kozanga lokumu ya mwasi mowumbu na Ye. Yango wana, kobanda lelo, bato ya tango nyonso bakobanda kobengaka ngai mwasi ya esengo,
49 for the Mighty One has done great things for me, and holy is his name. pamba te Nzambe-Na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo minene ; Kombo na Ye ezali Bule.
50 And his mercy is for those who fear him from generation to generation. Atalisaka boboto na Ye tango nyonso epai ya bato oyo batosaka Ye.
51 He has shown strength with his arm; he has scattered the proud in the thoughts of their hearts; Asali misala minene na nguya ya loboko na Ye, apanzi bato oyo batonda na lolendo,
52 he has brought down the mighty from their thrones and lifted up the humble; akitisi bakambi wuta na bakiti na bango ya bokonzi, kasi atomboli bato oyo bamikitisaka.
53 he has filled the hungry with good things, and the rich he has sent away empty. Atondisi na biloko ya malamu bato oyo bazalaki na nzala, mpe azongisi bazwi maboko pamba.
54 He has helped his servant Israel, in remembrance of his mercy, Solo, asungi Isalaele, mosali na Ye, abosani te kotalisa boboto na Ye,
55 just as he spoke to our fathers, to Abraham and to his offspring forever." ndenge alakaki yango epai ya bakoko na biso, epai ya Abrayami mpe epai ya bakitani na ye, mpo na tango nyonso.
56 And Mary remained with her about three months and then returned to her home. Mari avandaki basanza pene misato elongo na Elizabeti ; sima, azongaki na ndako na ye.
57 Now the time came for Elizabeth to give birth, and she bore a son. Wana eleko oyo Elizabeti asengelaki kobota ekokaki, abotaki mwana mobali.
58 Her neighbors and relatives heard our Father had shown her great mercy, and rejoiced with her. Baninga mpe bandeko ya Elizabeti bayokaki ete Nkolo asaleli ye ngolu monene, mpe basepelaki na ye elongo.
59 On the eighth day they came to circumcise the child, and were going to call him Zechariah after his father, Na mokolo ya mwambe, sima na mbotama ya mwana, bakendeki kokatisa mwana ngenga ; balingaki kopesa ye kombo ya tata na ye, Zakari.
60 but his mother answered, "No; he will be called John." Kasi mama na ye alobaki : — Te ! Kombo na ye ezali Yoane.
61 And they said to her, "None of your relatives is called by this name." Kasi balobaki na ye : — Ezali na moto moko te, kati na libota na yo, oyo azali na kombo wana.
62 And they made signs to his father, asking what Zechariah wanted the child to be called. Bongo batunaki tata ya mwana, na nzela ya bilembo, mpo ete bayeba soki kombo nini alingaki kopesa na mwana.
63 He asked for a tablet and wrote, "His name is John." And everyone was amazed. Zakari asengaki mwa libaya mpe akomaki : « Kombo na ye ezali Yoane. » Mpe bango nyonso bakamwaki.
64 And immediately his mouth was opened and his tongue loosed, and he spoke, blessing our Father. Mbala moko, monoko ya Zakari efungwamaki mpe lolemo na ye ekangolamaki ; akomaki lisusu koloba mpe kokumisa Nzambe.
65 Fear fell on all their neighbors, and all these things were talked about throughout Judea's hill country. Baninga na bango nyonso ya pembeni batondaki na somo mpe bazalaki kolobela makambo yango nyonso, kati na mokili ya bangomba ya Yuda.
66 And all who heard kept these things in their hearts, saying, "What then will this child become?" For our Father's hand was with him. Bato nyonso oyo bayokaki sango yango bazalaki kokamwa yango mpe komituna : « Yango mwana oyo akozala nani ? » Pamba te loboko ya Nkolo ezalaki elongo na ye.
67 And his father Zechariah was filled with the Holy Spirit and prophesied, saying, Tata na ye, Zakari, atondisamaki na Molimo Mosantu mpe akomaki kosakola :
68 "Blessed be our Father of Israel, for he has visited and redeemed his people, « Tika ete Nkolo, Nzambe ya Isalaele, akumisama, pamba te ayei mpe akangoli bato na Ye ;
69 and has raised up a mighty Savior for us in the house of his servant David, abimiseli biso Mobikisi ya nguya, kati na libota ya Davidi, mosali na Ye ;
70 as he spoke through the mouth of his holy prophets long ago, akokisi elaka na Ye, oyo apesa wuta kala na nzela ya basakoli na Ye ya bule,
71 that we should be saved from our enemies and from the hand of all who hate us; lobiko liboso ya banguna na biso, mpe kokangolama wuta na maboko ya bayini na biso ;
72 to show the mercy promised to our fathers and to remember his holy covenant, atalisi boboto na Ye epai ya bakoko na biso mpe akanisi Boyokani na Ye ya bule ;
73 the oath that he swore to our father Abraham, to grant us, akokiseli biso ndayi oyo alapaki epai ya Abrayami, koko na biso,
74 that we, being delivered from the hand of our enemies, might serve him without fear, ete akokangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe akopesa biso nzela ya kosalela Ye na kobanga te,
75 in holiness and righteousness before him all our days. kati na bosantu mpe bosembo, liboso na Ye, mikolo nyonso ya bomoi na biso.
76 And you, child, will be called the prophet of the Most High; for you will go before the Lord to prepare his ways, Bongo yo, mwana na ngai, bakobenga yo : mosakoli ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te okotambola na liboso ya Nkolo mpo na kobongisela Ye nzela
77 to give his people the knowledge of salvation through the forgiveness of their sins, mpe mpo na koyebisa bato na Ye ete Nzambe akobikisa bango mpe akolimbisa masumu na bango,
78 because of the tender mercy of our Father, by which the sunrise from on high will visit us, mpo na mawa mpe boboto ya Nzambe na biso, oyo na nzela na yango moyi ya tongo ekongengela biso wuta na likolo,
79 to give light to those who sit in darkness and in the shadow of death, to guide our feet into the way of peace." mpo na kopesa pole na bato nyonso oyo bavandi kati na molili mpe kati na elili ya kufa, mpe mpo na kotambolisa makolo na biso kati na nzela ya kimia. »
80 The child grew, became strong in spirit, and lived in the wilderness until the day he appeared publicly to Israel. Mwana azalaki kokola, mpe molimo na ye ezalaki kokemba ; azalaki kovanda kati na bisobe kino na mokolo oyo ayaki komimonisa na miso ya bato ya Isalaele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]