Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In those days Caesar Augustus issued a decree to register the whole inhabited world. Na tango wana, Sezare Ogisite abimisaki mobeko ya kotanga motango ya bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mikili nyonso oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Rome.
2 This was the first registration, when Quirinius was governor of Syria. Ezalaki mbala ya liboso ya kotanga motango ya bato, wana Kiriniusi azalaki moyangeli ya Siri.
3 Everyone went to be registered, each to his own town. Bato nyonso bazalaki kokende komikomisa, moto na moto kati na engumba na ye.
4 Joseph too went up from Galilee, from the town of Nazareth, to Judea, to the city of David called Bethlehem, since he belonged to David's house and family, Jozefi mpe alongwaki na engumba Nazareti, kati na etuka ya Galile, mpo na kokende na Beteleemi, engumba ya Davidi, kati na etuka ya Yuda, pamba te azalaki moto ya ndako mpe ya libota ya Davidi.
5 to be registered with Mary, his fiancée, who was expecting a child. Akendeki kuna mpo na kokomisa kombo na ye mpe kombo ya Mari, mobandami na ye ya libala, oyo azalaki na zemi.
6 While they were there, the time came for her to give birth. Wana bazalaki na Beteleemi, mokolo na ye ya kobota ekokaki.
7 She gave birth to her firstborn son, wrapped him in cloths, and laid him in a manger, because the inn had no place for them. Mari abotaki mwana mobali, mwana na ye ya liboso ; alingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye kati na elielo ya bibwele, pamba te esika ezalaki te mpo na bango kati na ndako ya bapaya.
8 Shepherds were in that same region, staying out in the fields, keeping watch over their flock by night. Kati na etuka yango, ezalaki na babateli bibwele oyo bazalaki kolekisa babutu na bango kati na bilanga ya pembeni mpo na kobatela bitonga na bango.
9 An angel of our Father stood before them; the glory of our Father shone around them, and great fear seized them. Anjelu moko ya Nkolo abimelaki bango, mpe nkembo ya Nkolo engengaki zingazinga na bango ; mpe bayokaki somo makasi.
10 The angel told them, "Don't be afraid—I bring good news of great joy for everyone: Kasi anjelu alobaki na bango : — Bobanga te ! Namemeli bino sango moko ya malamu, oyo ekopesa bato nyonso esengo makasi.
11 Today in the city of David, a Savior was born to you—Christ the Lord. Mobikisi abotameli bino lelo, kati na engumba ya Davidi ; Ye nde azali Masiya, Nkolo.
12 This is your sign: you'll find a baby wrapped in cloths, lying in a manger." Tala elembo oyo ekosunga bino mpo na koyeba Ye : bokomona mwana moko abotami sika, balingi ye na bilamba mpe balalisi ye kati na elielo ya bibwele.
13 Suddenly there was with the angel a multitude of the heavenly host, praising our Father and saying, Mbala moko, ba-anjelu ebele ya mampinga ya Likolo bayaki kosangana na anjelu oyo ya liboso, bazalaki kokumisa Nzambe mpe koloba :
14 "Glory to our Father in the highest, and on earth peace among those with whom he is pleased!" « Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo, mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka ! »
15 When the angels left them for heaven, the shepherds said to each other, "Let's go straight to Bethlehem and see this thing that has happened, which our Father has made known to us." Tango ba-anjelu bakabwanaki na bango mpo na kozonga na Likolo, babateli bibwele balobanaki bango na bango : « Tokende kino na Beteleemi, mpo na kotala makambo oyo esalemi kuna, makambo oyo Nkolo ayebisi biso. »
16 They hurried off and found Mary and Joseph, and the baby lying in the manger. Bakendeki kuna na lombangu mpe bakutaki Mari, Jozefi mpe mwana oyo abotami sika alala kati na elielo ya bibwele.
17 When they saw him, they made known what had been told them about this child. Sima na bango komona ye, balobaki makambo oyo bayebisaki bango na tina na mwana yango.
18 All who heard were amazed at what the shepherds told them. Bato nyonso oyo bayokaki bango bakamwaki mingi makambo oyo babateli bibwele balobaki.
19 But Mary treasured up all these things, pondering them in her heart. Kasi Mari azalaki kobomba maloba wana nyonso mpe kokanisa na tina na yango mbala na mbala.
20 The shepherds returned, glorifying and praising our Father for all they'd heard and seen, just as they were told. Babateli bibwele bazongaki na kokumisa mpe kosanzola Nzambe mpo na makambo nyonso oyo bayokaki mpe bamonaki, pamba te makambo nyonso esalemaki ndenge anjelu ayebisaki bango yango.
21 When eight days for his circumcision were complete, he was named Jesus, the name the angel gave before he was conceived in the womb. Na mokolo ya mwambe, tango ngonga ya kokatisa mwana ngenga ekokaki, bapesaki mwana kombo « Yesu, » kombo oyo anjelu apesaki ye liboso ete mama na ye akoma na zemi.
22 When their days of purification under the Law of Moses ended, they brought him up to Jerusalem to present him to our Father, Tango mikolo na bango ya komipetola ekokaki, kolanda ndenge ekomama kati na mobeko ya Moyize, Jozefi mpe Mari bamemaki Yesu na Yelusalemi mpo na kotalisa Ye epai ya Nkolo,
23 (as it is written in our Father's Law, "Every firstborn male will be called holy to our Father"), kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko ya Nkolo : « Mwana mobali nyonso ya liboso akobulisama mpo na Nkolo ; »
24 and to offer a sacrifice as the Law of our Father says: a pair of turtledoves or two young pigeons. mpe mpo na kobonza mbeka, kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko ya Nkolo : bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka.
25 In Jerusalem lived a man named Simeon, righteous and devout, waiting for Israel's comfort, with the Holy Spirit on him. Na tango wana, kati na Yelusalemi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki Simeoni. Azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa makambo ya Nzambe ; azalaki kozela kobondisama ya Isalaele, mpe Molimo Mosantu azalaki likolo na ye.
26 The Holy Spirit had revealed to him he wouldn't die before seeing our Father's Christ. Molimo Mosantu alakisaki ye ete akokufa te kino akomona Masiya, Motindami ya Nkolo.
27 Prompted by the Spirit, he entered the temple. As the parents brought in the child Jesus to do for him what the Law required, Wana Molimo akambaki ye, akendeki na Tempelo. Mpe, lokola baboti ya Mwana Yesu bamemaki Ye mpo na kokokisa makambo oyo Mobeko etindaki,
28 Simeon took him up in his arms and blessed our Father, saying, Simeoni ayambaki Yesu na maboko na ye mpe akumisaki Nzambe na maloba oyo :
29 "Sovereign Father, now you are letting your servant depart in peace, according to your word. « Nkolo, sik’oyo, kolanda elaka na Yo, tika ete mowumbu na Yo akende na kimia !
30 For my eyes have seen your salvation, Pamba te miso na ngai emoni Mobikisi oyo awuti epai na Yo,
31 which you have prepared in the presence of all peoples: Mobikisi oyo obongisi mpo na bikolo nyonso :
32 a light for revelation to the Gentiles, and for glory to your people Israel." pole mpo na kongengisa bikolo, mpe nkembo ya bato na Yo, Isalaele. »
33 His father and mother were amazed at what was said about him. Tata mpe mama ya Yesu bakamwaki mingi maloba oyo Simeoni alobaki na tina na Ye.
34 And Simeon blessed them and told Mary, his mother, "This child is appointed for the fall and rising of many in Israel, and to be a sign that is opposed, Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu : — Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato.
35 and a sword will pierce through your own soul also—so that thoughts from many hearts may be revealed." Boye, makanisi oyo ebombama kati na mitema ya bato ebele ekoyebana. Bongo yo mpe, okoyoka lokola nde batubi motema na yo na mopanga.
36 Also there was Anna, a woman prophet, daughter of Phanuel of Asher's tribe, very old, having lived with her husband seven years after her virginity, Ezalaki mpe na mwasi mosakoli moko, Ana, mwana ya Fanwele, moto ya libota ya Aseri ; akomaki mobange makasi. Na bolenge na ye, asalaki mibu sambo ya libala elongo na mobali na ye ;
37 and a widow until eighty-four, never leaving the temple, worshiping with fasting and prayer night and day. sima na yango, akufisaki mobali mpe atikalaki lisusu kobala te kino akokisaki mibu tuku mwambe na minei ya mbotama. Azalaki kolongwa te na Tempelo, kasi azalaki kosalela Nzambe, butu mpe moyi ; azalaki kokila bilei mpe kosambela.
38 Coming up at that same hour, she gave thanks to our Father and spoke of the child to all awaiting Jerusalem's redemption. Awa ayaki mpe kaka na ngonga wana, abandaki kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe koloba na tina na Mwana Yesu, epai ya bato nyonso oyo bazalaki kozela ete Nzambe akangola Yelusalemi.
39 When they finished everything required by our Father's Law, they returned to Galilee, to their own town of Nazareth. Sima na bango kokokisa nyonso oyo Mobeko ya Nkolo ezalaki kotinda, Mari mpe Jozefi bazongaki kati na Galile, na Nazareti, engumba na bango.
40 The child grew, becoming strong, filled with wisdom, and our Father's favor was on him. Mwana azalaki kokola mpe kokoma makasi ; atondaki na bwanya, mpe ngolu ya Nzambe ezalaki likolo na Ye.
41 Now his parents went to Jerusalem every year at the Feast of Passover. Baboti ya Yesu bazalaki kokende na Yelusalemi mibu nyonso mpo na feti ya Pasika.
42 When he was twelve years old, they went up according to the custom of the feast. Tango Yesu akokisaki mibu zomi na mibale ya mbotama, bakendeki na feti lokola momesano.
43 When the festival ended and they left for home, the boy Jesus stayed behind in Jerusalem, unknown to his parents. Bongo tango feti esilaki, wana baboti na Ye bazongaki, Elenge Yesu atikalaki na Yelusalemi ; kasi baboti na Ye bayebaki te ete atikali.
44 Thinking he was in the group, they traveled a day's journey, then searched for him among relatives and acquaintances. Lokola bazalaki kokanisa ete azali elongo na baninga na Ye ya mobembo, basalaki mokolo mobimba na nzela. Bongo bakomaki koluka Ye epai ya bandeko mpe baninga na bango.
45 When they did not find him, they returned to Jerusalem, searching for him. Kasi bamonaki Ye te ; mpe wana bakobaki koluka Ye, bazongaki kino na Yelusalemi.
46 After three days they found him in the temple, sitting among the teachers, listening to them and asking them questions. Sima na mikolo misato, bamonaki Ye kati na lopango ya Tempelo avandi na kati-kati ya balakisi ya Mobeko, azali koyoka bango mpe kopesa bango mituna.
47 All who heard him were amazed at his understanding and his answers. Bato nyonso oyo bazalaki koyoka Ye bazalaki kokamwa mingi mayele na Ye mpe biyano na Ye.
48 When his parents saw him, they were astonished. His mother said, "Child, why have you done this to us? Look, your father and I have been anguished, searching for you." Tango baboti na Ye bamonaki Ye, bakamwaki mingi. Mama na Ye alobaki na Ye : — Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye ? Tata na yo mpe ngai tozalaki mitema likolo, mpe toluki Yo bisika nyonso !
49 He said to them, "Why were you searching for me? Didn't you know I must be in my Father's house?" Yesu azongiselaki bango : — Mpo na nini koluka Ngai ? Boyebaki te ete nasengeli kosala misala ya Tata na Ngai ?
50 But they did not understand the saying that he spoke to them. Kasi basosolaki te maloba na Ye.
51 Then he went down with them and came to Nazareth, remaining obedient to them. His mother kept all these things in her heart. Bongo azongaki na Nazareti elongo na baboti na Ye ; azalaki kotosa bango. Mama na Ye azalaki kobomba makambo wana nyonso kati na motema na ye.
52 Jesus increased in wisdom and stature and in favor with our Father and with people. Yesu azalaki kokola na bwanya mpe na nzoto ; Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]