Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In Tiberius Caesar's fifteenth year, when Pontius Pilate was governor of Judea, Herod was tetrarch of Galilee, his brother Philip of the region of Ituraea and Trachonitis, and Lysanias of Abilene, Tango Tibere Sezare akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Ponse Pilato azalaki moyangeli ya Yuda ; Erode azalaki moyangeli ya Galile ; Filipo, ndeko mobali ya Erode, azalaki moyangeli ya Itureya mpe ya Trakonitide ; mpe Lisaniasi azalaki moyangeli ya Abilene.
2 under high priests Annas and Caiaphas, our Father's word came to John son of Zechariah in the wilderness. Ana mpe Kayifa bazalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe. Na mobu yango, Nzambe alobaki na Yoane, mwana mobali ya Zakari, kati na esobe.
3 He went through the whole Jordan region, preaching a baptism of repentance for the forgiveness of sins, Yoane akomaki kotambola na etuka mobimba, zingazinga ya moluka Yordani ; na mateya na ye, azalaki koloba : « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino. »
4 as it is written in the book of the words of Isaiah the prophet: "A voice of one calling in the wilderness: Prepare the way for the Lord, make his paths straight. Boye nde ekokisamaki, makambo oyo mosakoli Ezayi akomaki kati na buku na ye : « Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe : ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike !
5 Every valley will be filled in, and every mountain and hill made low. The crooked roads will become straight, and the rough ways smooth, Mabwaku nyonso ekotondisama, bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse ekokitisama, babalabala oyo ezali nyoka-nyoka ekosembolama, banzela ya mabulu-mabulu ekobongisama,
6 and all flesh will see the salvation of our Father." mpe bato nyonso bakomona lobiko ya Nzambe. › »
7 John said then to the crowds coming to be baptized by him: "You brood of vipers! Who warned you to flee the coming wrath? Yoane alobaki na ebele ya bato oyo bayaki epai na ye mpo ete abatisa bango : « Bana ya banyoka, nani alakisaki bino kokima kanda oyo ezali koya ?
8 So produce fruit worthy of repentance. Don't start telling yourselves, 'We have Abraham as our father.' For I tell you, our Father can raise up children for Abraham from these stones. Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema, mpe bokoma te komilobela : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.
9 Already the axe lies at the root of the trees; every tree not bearing good fruit is cut down and thrown into the fire." Epasola esili kobongisama mpo na kokata banzete wuta na misisa, mpe nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto. »
10 And the crowds asked him, "What then should we do?" Ebele ya bato batunaki ye : — Tosengeli kosala nini ?
11 He replied, "Whoever has two shirts, share with the one who has none; whoever has food, do the same." Yoane azongiselaki bango : — Tika ete moto oyo azali na kazaka mibale apesa moko na moto oyo azangi kazaka, mpe tika ete moto oyo azali na bilei akabola na bato oyo bazangi bilei.
12 Tax collectors also came to be baptized, and they said to him, "Teacher, what should we do?" Bafutisi mpako mpe bayaki mpo ete babatisa bango ; batunaki Yoane : — Moteyi, tosengeli kosala nini ?
13 "Collect no more than you are required to," he told them. Azongiselaki bango : — Tango bofutisaka mpako, bobakisaka mbongo mosusu te na likolo ya oyo esengeli kofutama.
14 Soldiers also asked him, "And us—what should we do?" He said to them, "Don't extort anyone by force or false charges; be satisfied with your wages." Basoda mpe batunaki ye : — Bongo biso, tosengeli kosala nini ? Yoane azongiselaki bango : — Bobotola mbongo ya bato te mpe bokosela bato makambo te ; kasi bosepela kaka na lifuti na bino.
15 The people were expectant, all wondering in their hearts whether John himself might be the Christ. Lokola bato bazalaki kozela na elikya makasi, moko na moko azalaki komituna na se ya motema soki Yoane te nde azali Masiya.
16 John answered them all, "I baptize you with water. But one stronger than I is coming—I'm not worthy to untie his sandal strap. He will baptize you with the Holy Spirit and fire. Yoane azongiselaki bango : — Ngai nazali kobatisa bino na mayi ; kasi ezali na Moto moko oyo azali koya, aleki ngai na nguya, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe na moto.
17 Winnowing fork in hand, he will clear his threshing floor, gather the wheat into his barn, but burn the chaff with fire that can't be put out." Asimbi kiyungulu na loboko na Ye mpo na kopetola etando na Ye mpe mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba matiti oyo ekotikala na nzela ya moto oyo ekufaka te.
18 And with many other words of exhortation, John proclaimed the good news to the people. Yoane azalaki lisusu kolendisa bato mpe koteya bango Sango Malamu na nzela ya maloba mosusu ebele.
19 But John confronted Herod the tetrarch about Herodias, his brother's wife, and about all the evil Herod had done, Kasi Yoane apamelaki mokonzi Erode mpo ete azwaki na libala Erodiade, mwasi ya ndeko na ye, mpe mpo ete asalaki lisusu mabe ebele.
20 Herod added this to all the rest: he locked John up in prison. Na likolo ya mabe nyonso oyo Erode asalaki, abakisaki lisusu mabe ya kokanga Yoane kati na boloko.
21 When all the people were baptized, Jesus was baptized too. As he prayed, heaven opened, Wana bato nyonso bazalaki kokende kozwa libatisi, Yesu mpe azwaki libatisi. Mpe wana Yesu azalaki kosambela, Likolo efungwamaki,
22 and the Holy Spirit descended on him in bodily form like a dove. And a voice came from heaven: "You are my beloved Son; in you I delight." mpe Molimo Mosantu akitelaki Ye na lolenge ya nzoto, lokola ebenga. Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi. »
23 Jesus was about thirty when he began his ministry, the son—so it was thought—of Joseph, son of Heli, Yesu azalaki na mibu pene tuku misato ya mbotama tango abandaki mosala na Ye. Bato bazalaki kokanisa ete azali mwana mobali ya Jozefi ; Jozefi, mwana mobali ya Eli ;
24 the son of Matthat, the son of Levi, the son of Melchi, the son of Jannai, the son of Joseph, Eli, mwana mobali ya Matati ; Matati, mwana mobali ya Levi ; Levi, mwana mobali ya Meliki ; Meliki, mwana mobali ya Yanai ; Yanai, mwana mobali ya Jozefi ;
25 the son of Mattathias, the son of Amos, the son of Nahum, the son of Esli, the son of Naggai, Jozefi, mwana mobali ya Matatiasi ; Matatiasi, mwana mobali ya Amosi ; Amosi, mwana mobali ya Naumi ; Naumi, mwana mobali ya Esili ; Esili, mwana mobali ya Nagai ;
26 the son of Maath, the son of Mattathias, the son of Semein, the son of Josech, the son of Joda, Nagai, mwana mobali ya Maati ; Maati, mwana mobali ya Matatiasi ; Matatiasi, mwana mobali ya Semeini ; Semeini, mwana mobali ya Yoze ; Yoze, mwana mobali ya Yoda ;
27 the son of Joanan, the son of Rhesa, the son of Zerubbabel, the son of Shealtiel, the son of Neri, Yoda, mwana mobali ya Yoanani ; Yoanani, mwana mobali ya Reza ; Reza, mwana mobali ya Zorobabeli ; Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Shealitieli, mwana mobali ya Neri ;
28 the son of Melchi, the son of Addi, the son of Cosam, the son of Elmadam, the son of Er, Neri, mwana mobali ya Meliki ; Meliki, mwana mobali ya Adi ; Adi, mwana mobali ya Kosami ; Kosami, mwana mobali ya Elimadami ; Elimadami, mwana mobali ya Eri ;
29 the son of Joshua, the son of Eliezer, the son of Jorim, the son of Matthat, the son of Levi, Eri, mwana mobali ya Jozue ; Jozue, mwana mobali ya Eliezeri ; Eliezeri, mwana mobali ya Yorimi ; Yorimi, mwana mobali ya Matati ; Matati, mwana mobali ya Levi ;
30 the son of Simeon, the son of Judah, the son of Joseph, the son of Jonam, the son of Eliakim, Levi, mwana mobali ya Simeoni ; Simeoni, mwana mobali ya Yuda ; Yuda, mwana mobali ya Jozefi ; Jozefi, mwana mobali ya Yonami ; Yonami, mwana mobali ya Eliakimi ;
31 the son of Melea, the son of Menna, the son of Mattatha, the son of Nathan, the son of David, Eliakimi, mwana mobali ya Meleya ; Meleya, mwana mobali ya Mena ; Mena, mwana mobali ya Matata ; Matata, mwana mobali ya Natani ; Natani, mwana mobali ya Davidi ;
32 the son of Jesse, the son of Obed, the son of Boaz, the son of Salmon, the son of Nahshon, Davidi, mwana mobali ya Izayi ; Izayi, mwana mobali ya Obedi ; Obedi, mwana mobali ya Boazi ; Boazi, mwana mobali ya Salimoni ; Salimoni, mwana mobali ya Nashoni ;
33 the son of Amminadab, the son of Admin, the son of Arni, the son of Hezron, the son of Perez, the son of Judah, Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi ; Aminadabi, mwana mobali ya Adimini ; Adimini, mwana mobali ya Arini ; Arini, mwana mobali ya Etsironi ; Etsironi, mwana mobali ya Peretsi ; Peretsi, mwana mobali ya Yuda ;
34 the son of Jacob, the son of Isaac, the son of Abraham, the son of Terah, the son of Nahor, Yuda, mwana mobali ya Jakobi ; Jakobi, mwana mobali ya Izaki ; Izaki, mwana ya Abrayami ; Abrayami, mwana mobali ya Tera ; Tera, mwana mobali ya Naori ;
35 the son of Serug, the son of Reu, the son of Peleg, the son of Eber, the son of Shelah, Naori, mwana mobali ya Serugi ; Serugi, mwana mobali ya Rewu ; Rewu, mwana mobali ya Pelegi ; Pelegi, mwana mobali ya Eberi ; Eberi, mwana mobali ya Shela ;
36 the son of Cainan, the son of Arphaxad, the son of Shem, the son of Noah, the son of Lamech, Shela, mwana mobali ya Kayinami ; Kayinami, mwana mobali ya Aripakishadi ; Aripakishadi, mwana mobali ya Semi ; Semi, mwana mobali ya Noa ; Noa, mwana mobali ya Lemeki ;
37 the son of Methuselah, the son of Enoch, the son of Jared, the son of Mahalalel, the son of Cainan, Lemeki, mwana mobali ya Matusalemi ; Matusalemi, mwana mobali ya Enoki ; Enoki, mwana mobali ya Yeredi ; Yeredi, mwana mobali ya Malaleeli ; Malaleeli, mwana mobali ya Kenani ;
38 the son of Enosh, the son of Seth, the son of Adam, the son of our Father. Kenani, mwana mobali ya Enoshi ; Enoshi, mwana mobali ya Seti ; Seti, mwana mobali ya Adamu ; Adamu, mwana mobali ya Nzambe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]