Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Jesus, full of the Holy Spirit, returned from the Jordan, led by the Spirit in the wilderness. Yesu atondisamaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani, mpe Molimo amemaki Ye kati na esobe
2 Forty days, tempted by the devil, eating nothing in those days; when they ended, he was hungry. epai wapi Satana amekaki Ye mikolo tuku minei. Na mikolo wana, alia eloko moko te ; mpe tango mikolo yango elekaki, ayokaki nzala.
3 The devil told him, "If you're the Son of God, tell this stone to become bread." Satana alobaki na Ye : — Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na libanga ete ebongwana lipa.
4 And Jesus answered him, "It is written, 'Man shall not live by bread alone.'" Yesu azongiselaki ye : — Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te. »
5 Then the devil led him up and showed him all the kingdoms of the world in an instant. Satana amemaki Yesu na esika moko ya likolo makasi, alakisaki Ye mbala moko bokonzi nyonso ya mokili.
6 He said to him, "I will give you all this authority and their glory, for it has been entrusted to me, and I give it to whomever I want. Satana alobaki na Yesu : — Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, pamba te epesamela ngai, mpe nakoki kopesa yango na moto nyonso oyo nalingi.
7 If you, then, will worship me, it will all be yours." Soki kaka ogumbameli ngai, nyonso ekokoma ya yo.
8 And Jesus answered him, "It is written, 'You will worship your Father, and serve only him.'" Yesu azongiselaki ye : — Ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »
9 Then he led him to Jerusalem, stood him on the temple's highest point, and said, "If you're the Son of God, throw yourself down from here, Bongo Satana amemaki Ye na Yelusalemi, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo mpe alobaki na Ye : — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ;
10 for it is written, 'He will command his angels concerning you, to guard you,' pamba te ekomama : « Akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye na tina na yo mpo ete babatela Yo malamu.
11 and 'On their hands they will bear you up, so that you won't strike your foot against a stone.'" Mpe bakomema Yo na maboko na bango mpo ete lokolo na Yo etutana na libanga te. »
12 And Jesus answered him, "It is said, 'You shall not put your Father to the test.'" Yesu azongisaki : — Ekomama : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »
13 And when the devil had ended every temptation, he departed from him until an opportune time. Tango Satana asilisaki komeka Yesu na lolenge nyonso, akendeki mosika na Ye kino na mokolo oyo ekatama.
14 Jesus returned to Galilee in the Holy Spirit's power, and news of him spread through the whole region. Yesu azongaki na Galile, atonda na nguya ya Molimo ; mpe basango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka wana mobimba.
15 And he taught in their synagogues, and everyone glorified him. Azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, mpe bato nyonso bazalaki kokumisa Ye.
16 He came to Nazareth, where he was raised, and as usual entered the synagogue on the Sabbath, then stood to read. Akendeki na Nazareti epai wapi akolaki ; mpe na mokolo ya Saba, akotaki na ndako ya mayangani, ndenge ezalaki momesano na ye. Atelemaki mpo na kotanga,
17 He was handed the scroll of the prophet Isaiah, unrolled it, and found where it was written: mpe bapesaki Ye buku ya mosakoli Ezayi. Afungolaki yango mpe amonaki esika epai wapi bakoma :
18 "The Spirit of our Father is upon me, because he has anointed me to proclaim good news to the poor. He has sent me to proclaim freedom for the captives and recovery of sight to the blind, to set free those who are oppressed, « Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola ; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama
19 to proclaim the year of our Father's favor." mpe kosakola mobu ya ngolu ya Nkolo. »
20 He rolled up the scroll, gave it back to the attendant, and sat down. Every eye in the synagogue was fixed on him. Bongo akangaki buku yango, azongisaki yango epai ya mosali ya ndako ya mayangani mpe avandaki. Miso ya bato nyonso kati na ndako ya mayangani ekomaki kotala Ye.
21 And he began to say to them, "Today this Scripture has been fulfilled in your hearing." Bongo akomaki koloba na bango : — Makomi oyo bowuti koyoka ekokisami lelo !
22 All spoke well of him, amazed at the gracious words from his mouth, and said, "Isn't this Joseph's son?" Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna : — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ?
23 He said to them, "Surely you'll quote this proverb to me: 'Doctor, heal yourself.' Do here in your hometown, too, what we heard happened in Capernaum." Yesu alobaki na bango : — Nayebi malamu ete bokoloba na Ngai lisese oyo : « Monganga, mibikisa yo moko ! » Mpe bokoloba na Ngai : « Sala mpe awa, kati na engumba na Yo, makambo oyo toyokaki ete osalaki yango kati na Kapernawumi ! »
24 And he said, "Truly, I say to you, no prophet is acceptable in his hometown. Abakisaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : « Mosakoli moko te andimamaka kati na ekolo na ye.
25 But truly I tell you, many widows lived in Israel in Elijah's days, when the sky was shut three years and six months and a great famine struck the whole land, Nazali koloba na bino penza ya solo : ezalaki na basi ebele bakufisa mibali kati na Isalaele, na tango ya Eliya, tango likolo ekangamaki mibu misato mpe basanza motoba, mpe nzala makasi ezalaki kati na ekolo mobimba.
26 and Elijah was sent to none of them but only to a widow in Zarephath of Sidon. Nzokande, Eliya atindamaki te epai ya moko kati na bango, kasi atindamaki kaka epai ya mwasi moko akufisa mobali mpe azalaki kovanda na mboka Sarepita, kati na ekolo Sidoni.
27 Many had leprosy in Israel in the days of the prophet Elisha, yet none was made clean except Naaman the Syrian." Mpe na tango ya mosakoli Elize, bato na maba bazalaki ebele kati na Isalaele, kasi moko te kati na bango apetolamaki, longola kaka Namani, moto ya Siri. »
28 When they heard these things, everyone in the synagogue was furious. Bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako ya mayangani basilikaki makasi tango bayokaki bongo ;
29 They got up, drove him out of town, and took him to the edge of the hill their town was built on, to throw him off the cliff. batelemaki, bakumbaki Yesu na libanda ya engumba, mpe bamemaki Ye kino na songe ya ngomba epai wapi batongaki engumba na bango, mpo ete babwaka Ye na se.
30 But he walked through the crowd and went away. Kasi Yesu alekaki na kati-kati na bango mpe akobaki mobembo na Ye.
31 He went down to Capernaum, a town in Galilee, and taught them on the Sabbath, Bongo Yesu akendeki na Kapernawumi, engumba ya Galile, mpe ateyaki kuna bato na mokolo ya Saba.
32 and they were astonished at his teaching, for his word possessed authority. Bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te maloba na Ye ezalaki na bokonzi.
33 In the synagogue was a man with the spirit of an unclean demon; he cried out in a loud voice, Kati na ndako ya mayangani, ezalaki na mobali moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe. Agangaki na mongongo makasi :
34 Ha! What do you want with us, Jesus of Nazareth? Have you come to destroy us? I know who you are—God's Holy One. — Ah Yesu ya Nazareti, likambo nini kati na biso na Yo ? Oyei mpo na kobebisa biso ? Nayebi nani oyo Yo ozali : Mosantu ya Nzambe !
35 Jesus rebuked him: "Be silent and come out of him!" The demon threw him down before them all, came out, and did him no harm. Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo : — Kanga monoko na yo ! Bima kati na moto oyo ! Molimo mabe ebwakaki moto yango na mabele, liboso ya bato nyonso, ebimaki kati na ye mpe esalaki ye ata mabe moko te.
36 All were amazed and asked each other, "What word is this? With authority and power he orders unclean spirits, and they leave!" Bato nyonso bakamwaki mpe bakomaki kotunana : — Oyo ezali lisusu maloba nini ! Azali kopesa mitindo epai ya milimo mabe, na bokonzi mpe na nguya nyonso, mpe yango ezali kobima !
37 And reports about him went out into every place in the surrounding region. Mpe sango na tina na Yesu epanzanaki na bamboka ya etuka mobimba.
38 And he arose and left the synagogue and entered Simon's house. Now Simon's mother-in-law was ill with a high fever, and they asked him to help her. Yesu abimaki na ndako ya mayangani mpe akendeki na ndako ya Simona. Mama-bokilo ya Simona azalaki kobela fievele makasi. Basengaki na Yesu ete abikisa ye.
39 He stood over her and rebuked the fever; it left her, and she rose at once and began serving them. Yesu agumbamaki pembeni na ye, apesaki mitindo na fievele, mpe fievele esilaki. Kaka na tango yango, mama-bokilo ya Simona atelemaki mpe akomaki kobongisela bango bilei.
40 As the sun set, all who had someone sick with various diseases brought them to him; laying his hands on each one, he healed them. Na pokwa, bato nyonso oyo bazalaki na babeli ya bokono ya ndenge na ndenge bamemaki bango epai ya Yesu. Yesu atielaki moko na moko kati na bango maboko mpe abikisaki bango.
41 Demons also came out of many, shouting, "You are the Son of God!" He silenced them, forbidding them to speak, since they knew he was the Christ. Milimo mabe mpe ebimaki kati na bato ebele na koganga : « Ozali solo Mwana na Nzambe ! » Kasi Yesu apesaki yango mitindo ete eloba te, pamba te eyebaki ete Yesu azali Klisto.
42 At daybreak he went out to a remote place. Crowds looked for him, came to him, and tried to keep him from leaving them. Tango tongo etanaki, Yesu abimaki na ndako yango mpe akendeki na esika moko epai wapi azalaki kaka Ye moko. Ebele ya bato bazalaki koluka Ye ; mpe tango bakomaki na esika oyo azalaki, bamekaki kokangama na Ye mpe kopekisa Ye kotika bango.
43 But he told them, "I must announce the good news of our Father's kingdom to the other towns too—this is why I was sent." Kasi Yesu alobaki na bango : — Nasengeli mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya bingumba mosusu, pamba te ezali mpo na yango nde Nzambe atindaki Ngai.
44 And he was preaching in the synagogues of Judea. Mpe Yesu akobaki koteya kati na bandako ya mayangani ya Yuda.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]