Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Mark 15 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 At dawn the chief priests, elders, scribes, and the whole council consulted together, bound Jesus, led him away, and handed him over to Pilate. Tango tongo etanaki, bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato, balakisi ya Mobeko mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda basanganaki mpo na kokata likambo. Bakangaki Yesu na basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya Pilato.
2 Pilate asked him, "Are you the King of the Jews?" "You say so," Jesus replied. Pilato atunaki Yesu : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ? Yesu azongisaki : — Olobi yango.
3 The chief priests kept accusing him of many things. Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki kofunda Ye na makambo ebele.
4 So Pilate questioned him again: "Have you no answer? See how many charges they bring against you." Pilato atunaki Ye lisusu : — Boni, ozali te na eyano ya kopesa, na makambo nyonso oyo bazali koloba mpo na kofunda yo ?
5 But Jesus said nothing more, and Pilate was amazed. Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te ; mpe Pilato akamwaki makasi.
6 Now at the festival, Pilate used to release one prisoner for them—whoever they asked for. Na feti nyonso ya Pasika, azalaki kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kosenga.
7 A man called Barabbas was in prison with the rebels who had committed murder during the uprising. Na tango wana, moto oyo bazalaki kobenga « Barabasi » azalaki kati na boloko elongo na batomboki oyo bayeisaki mobulu kati na engumba mpe babomaki moto.
8 The crowd came up and began asking Pilate to do for them what he always did. Ebele ya bato bayaki mpe basengaki na Pilato ete asalela bango makambo oyo amesana kosalela bango mbala na mbala.
9 "Do you want me to release for you the King of the Jews?" Pilate answered, Pilato atunaki : — Bolingi nabimisela bino mokonzi ya Bayuda ?
10 for he knew it was out of envy that the chief priests had handed him over. Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakonzi ya Banganga-Nzambe bakabaki Yesu na maboko na ye.
11 But the chief priests stirred up the crowd to have him release Barabbas for them instead. Bakonzi ya Banganga-Nzambe batindikaki ebele ya bato mpo ete basenga na Pilato ete abimisela bango Barabasi longwa na boloko.
12 "So what do you want me to do with the one you call King of the Jews?" Pilate asked them again. Pilato atunaki bango : — Nasala nini na moto oyo bozali kobenga mokonzi ya Bayuda ?
13 Crucify him!" they shouted back. Bagangaki lisusu : — Baka ye na ekulusu !
14 "Why? What evil has he done?" Pilate asked. But they shouted all the louder, "Crucify him!" Pilato atunaki bango lisusu : — Mabe nini asali ? Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka : — Baka ye na ekulusu !
15 To satisfy the crowd, Pilate released Barabbas to them. He had Jesus flogged, and handed him over to be crucified. Lokola Pilato alingaki kosepelisa ebele ya bato, abimiselaki bango Barabasi longwa na boloko. Sima na kobetisa Yesu fimbu, Pilato apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.
16 Soldiers led him away into the palace (the governor's headquarters) and called together the whole company of soldiers. Basoda bakumbaki Yesu kati na ndako ya moyangeli, na esambiselo, mpe basangisaki lisanga mobimba ya basoda.
17 They dressed him in purple, twisted together a crown of thorns, and set it on him. Balatisaki Yesu nzambala ya motane mpe ekoti oyo basalaki na banzube ;
18 And they began to salute him: "Hail, King of the Jews!" mpe babandaki kopesa ye mbote : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! »
19 They kept beating his head with a staff, spat on him, and knelt in mock homage to him. Bazalaki kosalela lingenda moke mpo na kobeta Ye na moto, bazalaki kobwakela Ye soyi mpe kofukama mpo na kogumbama liboso na Ye.
20 After mocking him, they stripped off the purple and put his own clothes on him, then led him out to crucify him. Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala ya motane, balatisaki Ye lisusu bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu.
21 They forced a passerby coming from the countryside—Simon of Cyrene, father of Alexander and Rufus—to carry his cross. Bakangaki na makasi moleki nzela moko oyo awutaki na bilanga, mpo ete amema ekulusu ya Yesu ; kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene mpe tata ya Alekizandre mpe Rifisi.
22 They brought Jesus to the place called Golgotha (which means Place of a Skull). Bamemaki Yesu na esika oyo babengaka « Gologota, » oyo elingi koloba : esika ya mokuwa ya moto,
23 They offered him wine mixed with myrrh, but he did not take it. bapesaki Ye masanga ya vino basangisa na mire, kasi amelaki yango te.
24 They crucified him. They divided his clothes among them, casting lots for what each would get. Babakaki Ye na ekulusu, mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke mpo na koyeba oyo moko na moko akozwa.
25 It was nine in the morning when they crucified him. Babakaki Ye na ekulusu na ngonga ya libwa ya tongo.
26 The written notice of the charge against him read: THE KING OF THE JEWS. Tala makomi oyo ezalaki kotalisa mpo na nini bakatelaki Ye etumbu : Mokonzi ya Bayuda.
27 They crucified two rebels with him, one on his right and one on his left. Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. [
28 Not in this edition Ezali boye nde ekokisamaki Makomi oyo ezali koloba : « Batangaki Ye na molongo ya bato ya mabe. »]
29 Those passing by insulted him, shaking their heads, saying, "Ha! You who tear down the temple and build it in three days, Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango ; bazalaki koloba : — Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato,
30 save yourself and come down from the cross!" mibikisa yo moko mpe kita longwa na ekulusu !
31 Likewise the chief priests and scribes mocked him among themselves: "He saved others; himself he can't save. Bakonzi ya Banganga-Nzambe elongo na balakisi ya Mobeko bazalaki mpe kotiola kati na bango : — Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te !
32 Let the Christ, King of Israel, come down from the cross now, so we can see and believe." Those crucified with him also insulted him. Tika ete Klisto, Mokonzi ya Isalaele, akita sik’oyo longwa na ekulusu, mpo ete tomona mpe tondima ! Bato oyo babakamaki elongo na Yesu na ba-ekulusu bazalaki mpe kofinga Ye.
33 At noon, darkness came over the whole land until three in the afternoon. Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.
34 At three in the afternoon Jesus cried out loudly, "Eloi, Eloi, lema sabachthani?" meaning, "My God, my God, why have you forsaken me?" Na ngonga yango ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ? Elingi koloba : « Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ? »
35 When some of those standing nearby heard this, they said, "Listen, he's calling Elijah." Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Yesu ; boye bakomaki koloba : — Boyoka, azali kobenga Eliya !
36 One ran, filled a sponge with sour wine, put it on a reed, and gave him a drink. "Let him be," he said, "let's see if Elijah comes to take him down." Moto moko akimaki mbangu, azindisaki eponze moko na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela ; alobaki : — Totala soki Eliya akoya kokitisa ye.
37 With a loud cry, Jesus breathed his last. Kasi Yesu agangaki makasi mpe akataki motema.
38 And the curtain of the temple was torn in two from top to bottom. Rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se.
39 The centurion facing Jesus saw how he breathed his last and said, "Truly this man was the Son of God." Mpe tango mokonzi ya basoda ya Rome, oyo atelemaki liboso ya Yesu, amonaki ndenge Yesu akufaki, alobaki : — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !
40 Women were also watching from a distance, including Mary Magdalene, Mary the mother of James the younger and Joses, and Salome. Ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kotala na mosika. Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake oyo ya elenge, ya Joze mpe ya Salome ;
41 These women had followed him in Galilee and served him; many others who came up with him to Jerusalem were also there. oyo bazalaki kolanda Yesu mpe kosunga Ye tango azalaki kati na Galile ; ezalaki mpe na basi mosusu ebele oyo bakendeki na Yelusalemi elongo na Yesu.
42 Evening had come, and since it was Preparation Day—the day before the Sabbath. Wana pokwa ekomaki, lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo ete etikalaki ngonga moke mpo na kokota na mokolo ya Saba,
43 Joseph of Arimathea, a prominent council member who himself was waiting for the kingdom of our Father, dared to go to Pilate and ask for Jesus' body. Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moto ya lokumu kati na Likita-Monene ya Bayuda mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe, abangaki te kokende epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu.
44 Pilate was surprised he was already dead; summoning the centurion, he asked if Jesus had been dead long. Pilato akamwaki tango ayokaki ete Yesu asilaki kokufa ; abengaki mokonzi ya basoda mpo na kotuna ye soki solo Yesu asilaki kokufa.
45 When he learned from the centurion that it was so, he granted the body to Joseph. Tango ayokaki na monoko ya mokonzi ya basoda ete ezali bongo, apesaki Jozefi ndingisa ya kokamata nzoto ya Yesu.
46 Joseph bought linen, took the body down, wrapped it in the cloth, and laid it in a tomb cut from rock. Then he rolled a stone against the tomb's entrance. Jozefi asombaki liputa ya lino, akitisaki nzoto ya Yesu longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa yango ; atiaki nzoto yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene, mpe atindikaki libanga mosusu liboso ya ekotelo ya kunda yango.
47 Mary Magdalene and Mary the mother of Joses saw where he was laid. Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Joze, bazalaki kotala esika oyo akotia nzoto ya Yesu.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]