Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Mark 14 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Two days before Passover and Unleavened Bread, the chief priests and scribes were looking for a way to seize Jesus by trickery and kill him. Wana etikalaki mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire ebanda, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini kokanga Yesu na mayele mpo na koboma Ye ;
2 For they said, "Not during the feast, or the people might riot." pamba te balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. »
3 While he was in Bethany, in Simon the leper's house, reclining at the table, a woman came with an alabaster flask of pure nard perfume, very costly. She broke the flask and poured it on his head. Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba, mwasi moko akotaki, wana Yesu azalaki na mesa. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi ; afungolaki molangi yango mpe asopaki malasi yango na moto ya Yesu.
4 There were some who said to themselves indignantly, "Why was this perfume wasted like that? Kati na bato oyo bazalaki wana, bamosusu basilikaki mpe balobaki : — Mpo na nini kobebisa malasi oyo na pamba kaka boye ?
5 For this perfume could have sold for over 300 denarii and given to the poor." And they scolded her. Bakokaki ata koteka malasi yango na motuya ya mbongo ya bibende koleka nkama misato mpe kopesa mbongo yango epai ya babola ! Bazalaki kopamela mwasi yango makasi.
6 But Jesus said, "Leave her alone. Why trouble her? She has done a beautiful thing for me. Kasi Yesu alobaki : — Botika ye ! Mpo na nini kotungisa ye ? Asali Ngai likambo moko ya malamu.
7 For the poor are always with you, and you can do good for them whenever you want; but you won't always have me. Bokozalaka na babola tango nyonso mpe bokoki tango nyonso kosalelaka bango bolamu oyo bolingi ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.
8 She has done what she could; she has anointed my body beforehand for burial. Mwasi oyo asali likambo oyo akoki, asili kosopela nzoto na Ngai malasi mpo na kobongisa kokundama na Ngai.
9 Truly, I tell you, wherever the gospel is preached worldwide, what she did will be told in memory of her." Nazali koloba na bino penza ya solo : Esika nyonso bakosakola Sango Malamu kati na mokili mobimba, bakobanda mpe kolobela likambo mwasi oyo awuti kosala, mpo na kokanisa ye.
10 Then Judas Iscariot, one of the twelve, went to the chief priests to betray Jesus to them. Bongo Yuda Isikarioti, moko kati na bantoma zomi na mibale, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpo na koteka Yesu epai na bango.
11 Hearing this, they were glad and promised him money. So he looked for a chance to betray Jesus. Tango bayokaki bongo, basepelaki makasi mpe balakaki kopesa ye mbongo. Boye, Yuda akomaki koluka libaku ya kokaba Yesu.
12 On the first day of Unleavened Bread, when they sacrificed the Passover lamb, his disciples asked him, "Where do you want us to go and prepare for you to eat the Passover?" Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo bazalaki koboma mwana meme lokola mbeka ya Pasika, bayekoli batunaki Ye : — Esika nini olingi ete tokende kobongisela Yo bilei ya Pasika ?
13 He sent two of his disciples, "Go into the city; a man carrying a jar of water will meet you. Follow him, Bongo, kati na bayekoli na Ye, Yesu atindaki mibale ; alobaki na bango : — Bokende kati na engumba, bokokutana na moto moko amemi eloku ya mayi ; bolanda ye
14 and wherever he enters, tell the house's owner, 'The Teacher says: Where is my guest room, where I may eat the Passover with my disciples?' mpe, tango akokota na ndako, boloba na nkolo ndako yango : « Moteyi azali kotuna yo : ‹ Wapi shambre na Ngai epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › »
15 And he will show you a large upper room furnished and ready; there prepare for us." Bongo ye akolakisa bino, na etaje ya suka, shambre moko ya monene, babongisa malamu mpe bakoki kosalela yango. Ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika mpo na biso.
16 The disciples left, went to the city, found things as he had told them, and prepared the Passover. Tango bayekoli bakendeki, bakotaki na engumba mpe bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango. Bongo babongisaki bilei ya Pasika.
17 And when it was evening, Jesus came with the twelve. Tango pokwa ekomaki, Yesu ayaki elongo na bayekoli zomi na mibale.
18 While they reclined and ate, Jesus said, "Truly, I tell you, one of you will betray me, one eating with me." Wana bazalaki na mesa mpe bazalaki kolia, Yesu alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino, oyo azali kolia elongo na Ngai, akoteka Ngai.
19 They began to grieve and ask him, one by one, "Is it I?" Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga : — Ezali ngai ?
20 He said to them, "One of the twelve, dipping bread with me into the dish. Yesu azongisaki : — Ezali moko kati na bino, zomi na mibale, oyo azali kolia sani moko elongo na Ngai.
21 The Son of Man goes as the Scriptures said about him, but how terrible for that man who betrays him—better if he had never been born." Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.
22 As they ate, he took bread, blessed it, broke it, gave it to them, and said, "Take; this is my body." Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa ; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango, apesaki bango yango mpe alobaki : — Oyo ezali nzoto na Ngai ! Bozwa.
23 He took a cup, gave thanks, gave it to them, and they all drank from it. Azwaki lisusu kopo ; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango, mpe bango nyonso bamelaki yango.
24 He said to them, "This is my blood of the covenant, poured out for many. Bongo alobaki na bango : — Oyo ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele.
25 Truly I tell you, I will not drink wine again until that day when I drink it new in the kingdom of our Father." Nazali koloba na bino penza ya solo : nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, kati na Bokonzi ya Nzambe.
26 And when they had sung a hymn, they went out to the Mount of Olives. Sima na yango, bayembaki banzembo ; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive.
27 Jesus said to them, "You will all stumble, for it's written: 'I will strike the shepherd, and the sheep will be scattered.' Yesu alobaki na bango : — Bino nyonso bokobungisa kondima, pamba te ekomama : « Nakobeta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. »
28 But after I am raised up, I will go ahead of you to Galilee." Kasi, sima na Ngai kosekwa, nakokende na Galile, liboso na bino.
29 Peter said to him, "Even though they all fall away, I will not." Petelo alobaki na Ye : — Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te.
30 Jesus said to him, "Truly I tell you, today, this night, before the rooster crows twice, you will deny me three times." Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato.
31 But he insisted, "Even if I must die with you, I will never deny you." They all said the same. Kasi Petelo akobaki kotia monoko makasi, alobaki : — Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana yo te. Mpe bango nyonso balobaki kaka ndenge moko.
32 They arrived at a place called Gethsemane, and he told his disciples, "Sit here while I pray." Tango bakomaki na esika oyo kombo na yango ezali Getisemane, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Botikala awa, wana Ngai nakosambela.
33 He took Peter, James, and John, and began to feel deep distress and anguish. Wana amemaki Petelo, Jake mpe Yoane, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ;
34 He said to them, "My soul is crushed with grief, to death. Stay here and stay alert." alobaki na bango : — Motema na Ngai etondi na mawa pene nakufa ; botikala awa mpe bosenzela.
35 Going a little farther, he fell to the ground and prayed that, if possible, the hour would pass from him. Wana akendeki mwa mosika, amikitisaki na mabele mpe azalaki kosambela Nzambe mpo ete, soki ekoki kosalema, tango wana ya pasi ekende mosika na Ye.
36 He said, "Abba, Father, all things are possible for you. Take this cup from me—but let it be your will, not mine." Azalaki kobondela : — Tata ! Epai na Yo, nyonso ekoki kosalema ! Longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.
37 He returned, found them asleep, and said to Peter, "Simon, are you asleep? Couldn't you stay awake one hour? Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi. Alobaki na Petelo : — Simona, ozali kolala ? Okokaki te kosenzela mpo na ngonga moko ?
38 Watch and pray, so you don't fall into temptation. The spirit is willing, but the flesh is weak." Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.
39 And again he went away and prayed, saying the same words. Akendeki lisusu mwa mosika mpe abondelaki kaka ndenge moko.
40 Again he found them sleeping, eyes heavy, not knowing how to answer him. Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo. Bayebaki te eyano ya kopesa Ye.
41 He came a third time and said, "Still sleeping and resting? Enough—the hour has come. Look, the Son of Man is handed over into the hands of sinners. Azongaki mpo na mbala ya misato, mpe alobaki na bango : — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Esili ! Ngonga ekoki. Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu.
42 Rise, let us be going; see, my betrayer is here." Botelema ; tokende. Moto oyo ateki Ngai azali koya.
43 While he was still speaking, Judas—one of the twelve—arrived, and with him a crowd with swords and clubs from the chief priests, scribes, and elders. Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato nde batindaki bango.
44 His betrayer had given them a signal: "The one I kiss is him—seize him and take him away securely." Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokokanga ye mpe bokomema ye na se ya bokengeli malamu. »
45 He came up to Jesus at once, said, "Rabbi!" and kissed him. Tango kaka Yuda akomaki, akendeki epai ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Moteyi ! Mpe apesaki Ye beze.
46 And they laid hands on him and seized him. Mbala moko, basimbaki Yesu na makasi mpe bakangaki Ye.
47 One of the bystanders drew his sword, struck the high priest's servant, and cut off his ear. Bongo moko kati na bato oyo bazalaki wana abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi.
48 Jesus said to them, "Have you come out with swords and clubs to seize me, like a robber? Yesu alobaki na bango : — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ?
49 Every day I was with you in the temple teaching, and you didn't arrest me. But let the Scriptures be fulfilled." Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali kosalema bongo mpo ete Makomi ekokisama.
50 And they all left him and fled. Bayekoli na Ye nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.
51 And a young man followed him, wearing nothing but a linen cloth. And they seized the young man, Nzokande, elenge mobali moko azalaki kolanda Yesu ; alataki liputa ya pamba. Mpe tango bakangaki ye,
52 but he left the linen cloth and ran away naked. asundolaki liputa mpe akimaki.
53 They led Jesus to the high priest, and all the chief priests and elders and scribes gathered. Bamemaki Yesu epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe epai wapi bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato mpe balakisi ya Mobeko, bango nyonso, basanganaki.
54 Peter had followed at a distance, all the way into the high priest's courtyard, and sat with the guards, warming himself by the fire. Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino kati na lopango ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; avandaki kuna elongo na bakengeli, pene ya moto, mpe azalaki koyetola moto.
55 The chief priests and the whole council sought testimony against Jesus to put him to death, but found none. Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa, kasi bazalaki kozwa yango te ;
56 For many gave false testimony against him, but their testimony did not agree. pamba te bato mingi bazalaki kokosela Ye makambo, kasi matatoli na bango ezalaki kokokana te.
57 And some stood up and gave false testimony against him, saying, Mpo na kaka kokosela Ye makambo, bato mosusu bazalaki kotelema na koloba :
58 "We heard him say, 'I will destroy this temple made by hands, and in three days build another not made by hands.'" « Toyokaki ye koloba : ‹ Ngai, nakobuka Tempelo oyo esalema na maboko ya bato ; mpe sima na mikolo misato, nakotonga Tempelo mosusu oyo ekosalema na maboko ya bato te. › »
59 Yet even about this their testimony did not agree. Kasi atako bongo, litatoli na bango ezalaki kaka ya lokuta.
60 The high priest stood up in the midst and asked Jesus, "You have no answer? What are these men testifying against you?" Mokonzi ya Banganga-Nzambe atelemaki kati na mayangani mpe apesaki Yesu motuna : — Boni, ozali te na liloba ya kozongisa ? Olobi nini liboso ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango ?
61 He stayed silent, answered nothing. Again the high priest asked him, "Are you the Christ, the Son of the Blessed?" Kasi Yesu abatelaki kimia mpe apesaki ata eyano moko te. Mokonzi ya Banganga-Nzambe atunaki Ye lisusu : — Ozali Klisto, Mwana ya Ye oyo apambolama ?
62 Jesus said, "I AM, and you will see the Son of Man seated at the right hand of the Mighty One and coming with heaven's clouds." Yesu azongisaki : — Iyo, ezali se bongo. Mpe bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya elongo na mapata ya Likolo.
63 And the high priest tore his clothes and said, "What further witnesses do we need? Bongo mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Mpo na nini koluka lisusu batatoli ?
64 You have heard his blasphemy. What is your decision?" And they all condemned him as deserving death. Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe. Bokanisi nini mpo na yango ? Boye, bango nyonso bakatelaki Yesu etumbu, batatolaki ete abongi na kufa.
65 Some began spitting on him, covering his face, and punching him, saying to him, "Prophesy!" Then the guards slapped him. Bato mosusu bakomaki kobwakela Ye soyi, kozipa Ye elongi, kobeta Ye makofi na koloba na Ye : — Sakola ! Mpe bakengeli bazwaki Ye mpe babetaki Ye bambata.
66 While Peter was below in the courtyard, one of the high priest's servant girls came, Wana Petelo azalaki na se, kati na lopango ya kati, mwasi mosali moko ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ayaki wana,
67 seeing Peter warming himself, she looked at him and said, "You too were with the Nazarene, Jesus." amonaki Petelo koyetola moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki na ye : — Yo mpe ozalaki elongo na Yesu, moto ya Nazareti !
68 But he denied it: "I don't know or understand what you mean." Then he went out to the entrance, and a rooster crowed. Kasi Petelo awanganaki ; alobaki : — Nayebi te ! Nazali kutu kososola te makambo oyo ozali koloba ! Bongo abimaki mpe akendeki kotelema pembeni, na ekuke ya lopango ; mpe soso elelaki.
69 The servant girl saw him and again told the bystanders, "This man is one of them." Tango mwasi mosali amonaki ye, alobaki lisusu na bato oyo bazalaki wana : — Moto oyo azali moko kati na bango !
70 But he denied it again. A little later the bystanders again told Peter, "You truly are one of them, for you're a Galilean." Petelo awanganaki lisusu. Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bazongelaki koloba na Petelo : — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bango, mpe ozali moto ya Galile.
71 He began to call down curses on himself and swear, "I don't know this man you're talking about." Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe : — Nayebi te moto oyo bozali kolobela !
72 At once a rooster crowed a second time. Peter remembered Jesus' words: "Before the rooster crows twice, you will deny me three times." He broke down and wept. Kaka na tango yango, soso elelaki mpo na mbala ya mibale. Bongo Petelo akanisaki maloba oyo Yesu alobaki na ye : « Liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato. » Mpe alelaki makasi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]