Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Mark 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Leaving the temple, one of his disciples said to him, "Teacher, look! What huge stones, what magnificent buildings!" Wana Yesu azalaki kobima longwa na Tempelo, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye : — Moteyi, tala ndenge mabanga oyo ezali kitoko ! Tala ndenge Ndako oyo ezali monene !
2 Jesus said to him, "Do you see these great buildings? Not one stone will remain here on another; all will be torn down." Yesu alobaki na ye : — Ozali komona bandako minene oyo ! Libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu, nyonso ekobukama.
3 As he sat on the Mount of Olives facing the temple, Peter, James, John, and Andrew asked him privately, Bongo Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, oyo etalana na Tempelo. Petelo, Jake, Yoane mpe Andre batunaki Yesu, na esika oyo bazalaki bango moko kaka :
4 tell us, when will these things happen, and what sign shows all this is about to be fulfilled? — Yebisa biso, makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa biso ete makambo yango nyonso ekomi pene ya kokokisama ?
5 Jesus began to tell them: "Watch out that no one deceives you. Yesu alobaki na bango : — Bosala keba ete moto moko te akosa bino !
6 Many will come in my name, claiming, 'I am he,' and they will deceive many. Bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele.
7 When you hear of wars and rumors of wars, don't be troubled—these must happen, but the end isn't yet. Tango bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.
8 Nation will rise against nation, kingdom against kingdom, earthquakes in various places, famines—these are the beginning of birth pains. Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, mabele ekoningana bipai na bipai, mpe nzala ekozala makasi penza. Makambo wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.
9 Watch yourselves. They'll hand you to councils and beat you in synagogues. Because of me you'll stand before governors and kings, as a testimony to them. Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako ya mayangani. Likolo na Ngai, bokosamba liboso ya bayangeli mpe liboso ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai.
10 And the gospel must first be proclaimed to all nations. Pamba te esengeli ete Sango Malamu esakolama liboso epai ya bikolo nyonso ya mokili.
11 When they arrest and hand you over, don't worry beforehand what to say. Say whatever you're given in that hour—it's not you speaking, but the Holy Spirit. Tango bakokanga bino mpo na komema bino na bisambiselo, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba ; boloba kaka oyo ekopesamela bino na tango wana, pamba te ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo Mosantu.
12 Brother will betray brother to death, father his child. Children will rise against parents and have them put to death. Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye mpo ete baboma ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.
13 All will hate you for my name, but whoever endures to the end will be saved. Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai, kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.
14 When you see the abomination of desolation standing where it should not be (reader, take note), those in Judea must flee to the mountains. Tango bokomona makambo ya nkele kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ;
15 Let no one on the housetop go down or enter the house to take anything out. tika ete moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpo na kokende kozwa eloko songolo kati na ndako na ye ;
16 Let no one in the field go back to get their coat. tika ete moto oyo akozala kati na bilanga azonga na ndako te, mpo na kokende kozwa elamba na ye !
17 How dreadful it will be in those days for pregnant women and nursing mothers! Na mikolo wana, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele !
18 Pray that it will not happen in winter, Bosambela mpo ete makambo wana esalema te na eleko ya malili makasi.
19 for those days will bring suffering unmatched since our Father created the world until now—and never to be matched again. Pamba te ekozala mikolo ya pasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta Nzambe akela mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te.
20 Had the Sovereign not shortened those days, no one would survive; but the Sovereign shortened them for the elect he chose. Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.
21 Then if anyone tells you, 'Look, here is the Christ!' or 'Look, there!' don't believe it. Na tango wana, soki moto moko alobi na bino : « Klisto azali awa ! » to « Azali kuna, » bondima ye te.
22 False christs and false prophets will appear, performing signs and wonders to deceive the elect, if possible. Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.
23 So be on your guard; I have told you everything ahead of time. Boye bino, bosala keba ! Ngai, namiyebiseli bino makambo nyonso.
24 But in those days, after that suffering, the sun will darken, and the moon will not give its light; Kasi na mikolo yango, sima na pasi wana, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te,
25 the stars will fall from the sky, and the powers in the heavens will be shaken. minzoto ekokweya longwa na Likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »
26 Then they will see the Son of Man coming in clouds with great power and glory. Bongo, bato bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya monene mpe na nkembo.
27 He will send his angels and gather his chosen from the four winds, from earth's ends to heaven's ends. Akotinda ba-anjelu na Ye mpe akosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili, longwa na suka ya mabele kino na suka ya Likolo.
28 Learn this from the fig tree: once its branch softens and leaves sprout, you know summer is near. Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino : soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene.
29 So also, when you see these things happening, know it's near, at the door. Ndenge moko mpe mpo na bino ; tango bokomona makambo wana kosalema, boyeba ete Mwana na Moto akomi pene, lokola na bikuke ya engumba.
30 Truly I tell you, this generation will certainly not pass away until all these things have happened. Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.
31 Heaven and earth will pass away, but my words will never pass away. Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
32 But no one knows that day or hour—not the angels in heaven, not the Son, only the Father. Mpo na oyo etali mokolo to ngonga, moko te ayebi yango, ezala ba-anjelu ya Likolo to Mwana ; Ye moko kaka Tata nde ayebi yango.
33 Be on guard! Stay alert! For you do not know when that time will come. Bosala keba ! Bosenzela ! Pamba te boyebi te tango nini ngonga yango ekoya.
34 Like a man on a journey: he leaves his house, gives his servants authority—each his own task—and orders the doorkeeper to stay alert. Ekozala lokola moto oyo akei na mobembo, bongo atiki ndako na ye mpe apesi mokumba na yango epai ya basali na ye ; apesi na mosali moko na moko mosala oyo ekoki na ye mpe apesi mitindo epai ya mokengeli ekuke ete akengela malamu.
35 So stay alert, since you don't know when the master of the house comes—evening, midnight, rooster's crow, or dawn. Yango wana, bosenzela ; pamba te boyebi te tango nini nkolo ndako akozonga : na pokwa to na midi ya butu to tango soso elelaka to mpe na tongo.
36 Otherwise, if he comes suddenly, he may find you sleeping. Pamba te soki ayei na mbalakata, asengeli te kokuta bino bolali pongi.
37 What I say to you, I say to everyone: Keep watch!" Makambo oyo nalobi na bino, nazali koloba yango mpe na bato nyonso : Bosenzela.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]