Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Mark 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 He began speaking to them in parables: "A man planted a vineyard, fenced it in, dug a winepress pit, built a watchtower, rented it to farmers, and left. Bongo Yesu akomaki koloba na bango na masese : — Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo.
2 At harvest time he sent a servant to the tenants to collect some of the vineyard's fruit. Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga, mpo ete akende kokongola epai na bango ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino.
3 But they seized him, beat him, and sent him away empty-handed. Kasi bafuteli elanga bakangaki ye, babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.
4 Again he sent them another servant; they hit him on the head and dishonored him. Atindelaki bango mosali mosusu ; babetaki-betaki ye na moto mpe basambwisaki ye.
5 And he sent another, and they killed him—then many more, beating some and killing others." Atindaki lisusu mosali mosusu ; oyo wana, babomaki ye. Bongo, na sima, atindaki lisusu bato ebele ; kasi babetaki bamoko, mpe babomaki bamosusu.
6 He had still one, a beloved son; last he sent him to them, saying, "They will respect my son." Nkolo elanga atikalaki kaka na moto moko ya kotinda : mwana na ye ya bolingo. Atindaki ye na suka na bango nyonso mpe amilobelaki : « Solo, bakotosa mwana na ngai. »
7 "But the tenants said to each other, 'This is the heir. Come, let's kill him—the inheritance will be ours.' Kasi bafuteli elanga balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ya elanga ! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso ! »
8 So they took him and killed him and threw him out of the vineyard. Bakangaki ye, babomaki ye mpe babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino.
9 So what will the vineyard's owner do? He'll come, destroy the tenants, and give the vineyard to others. Boye, nkolo elanga ya vino akosala nini ? Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga wana mpe akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu.
10 Have you not read this Scripture: 'The stone the builders rejected has become the cornerstone; Nanu botanga Makomi oyo te : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba ?
11 this was our Father's doing, and it is marvelous in our eyes'?" Ezali Nkolo nde alingaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso ! »
12 They wanted to arrest him but feared the crowd, knowing he'd told the parable against them. So they left him and went away. Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato bazalaki koluka nzela ya kokanga Yesu, pamba te basosolaki ete alobaki lisese wana mpo na bango. Kasi lokola babangaki bato, batikaki Ye ; mpe moto na moto akendeki.
13 They sent some of the Pharisees and Herodians to trap him in his words. Sima, batindelaki Yesu ndambo ya Bafarizeo mpe ndambo ya bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka kokanga Ye na motambo ya maloba na Ye moko.
14 They came and said to him, "Teacher, we know you're true and don't care what anyone thinks, since you don't judge by appearance but truly teach our Father's way. Is it lawful to pay taxes to Caesar, or not? Should we pay, or should we not?" Tango bakomaki epai na Ye, balobaki : — Moteyi, toyebi ete ozali moto ya sembo mpe obangaka bato te, pamba te oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. Boni, Mobeko na biso epesi solo nzela ya kofuta mpako ya Sezare to te ? Tosengeli penza kofuta yango ?
15 But, knowing their hypocrisy, he said to them, "Why are you testing me? Bring me a silver coin to look at." Kasi lokola Yesu ayebaki ete bazali bato ya bilongi mibale, alobaki na bango : — Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo ? Bomemela Ngai mbongo moko ya ebende, mpo ete namona yango.
16 They brought one, and he asked them, "Whose image and inscription is this?" They told him, "Caesar's." Bamemelaki Ye yango, mpe atunaki bango : — Elilingi ya nani mpe makomi ya nani bozali komona awa ? Bazongisaki : — Ya Sezare.
17 Jesus told them, "Give to Caesar what's Caesar's, and to our Father what's our Father's." They were amazed at him. Yesu alobaki na bango : — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe ! Bakamwaki mingi eyano ya Yesu.
18 And the Sadducees came to him, who say there is no resurrection. And they questioned him, saying, Bongo Basaduseo, ba-oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye :
19 "Teacher, Moses wrote for us that if a man's brother dies leaving a wife but no child, the brother must marry her and raise up offspring for him. — Moteyi, Moyize akomaki mpo na biso ete soki ndeko mobali ya moto moko akufi mpe atiki mwasi, kasi aboti na ye bana te, moto wana asengeli kobala mwasi oyo ndeko na ye atiki mpo ete abotela ndeko yango bana.
20 There were seven brothers; the first married, and when he died, left no children. Nzokande, ezalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko mobali ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki, kasi abotaki bana te.
21 And the second married her, and he died leaving no children. And the third likewise. Ndeko ya mibale abalaki mwasi yango kaka ; kasi ye mpe akufaki, atikalaki kobota bana te. Esalemaki kaka bongo na ndeko ya misato kino na oyo ya sambo :
22 And none of the seven left any children. Last of all the woman also died. bandeko nyonso sambo batikalaki kobota bana te. Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki.
23 At the resurrection, when they rise, whose wife will she be? The seven had her as wife." Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani kati na bandeko nyonso sambo, pamba te bango nyonso sambo babalaki ye ?
24 Jesus said to them, "Isn't this why you're wrong—you know neither the Scriptures nor our Father's power? Yesu azongiselaki bango : — Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te.
25 For when the dead rise, they neither marry nor are given in marriage, but are like the angels in heaven. Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te ; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo.
26 About the dead being raised, haven't you read in Moses' book, in the passage about the bush, how our Father told him, 'I am the God of Abraham, of Isaac, and of Jacob'? Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te kati na buku ya Moyize, makambo oyo Nzambe alobaki na ye na tina na nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te : « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi ? »
27 He is not God of the dead, but of the living. You are badly mistaken." Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi. Bozali penza kati na libunga monene.
28 One scribe approached, heard them debate, saw Jesus answered well, and asked, "Which commandment is most important of all?" Moko kati na balakisi ya Mobeko, oyo ayokaki bango kotiana tembe mpe amonaki ete Yesu azongiselaki bango biyano ya malamu, apusanaki pene na Yesu mpe atunaki : — Mobeko nini eleki monene kati ya mibeko nyonso ?
29 Jesus answered, "The most important is this: 'Hear, Israel: our Father is one.' Yesu azongisaki : — Tala Mobeko oyo eleki monene : « Isalaele, yoka malamu ! Yawe azali Nzambe na biso, Yawe azali kaka moko.
30 Love your Father with all your heart, with all your soul, with all your mind, with all your strength." Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso. »
31 "The second is this: 'Love your neighbor as yourself.' No commandment is greater than these." Tala mobeko oyo elandi : « Okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. » Mobeko ya motuya koleka mibeko wana mibale ezali te.
32 The scribe said to him, "Well said, Teacher. You've said truly that he is one, and there's no other besides him. Bongo molakisi ya Mobeko alobaki na ye : — Moteyi, olobi malamu ; olobi solo ete Nzambe azali kaka moko, mosusu azali te.
33 Loving him with all the heart, all the understanding, all the strength, and loving one's neighbor as oneself, matters far more than all whole burnt offerings and sacrifices." Kolinga Ye na motema na yo mobimba, na mayele na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso, mpe kolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, yango nde ezali na tina mingi koleka bambeka ya kotumba mpe makabo nyonso.
34 Seeing he answered wisely, Jesus said to him, "You are not far from the kingdom of our Father." After that, no one dared ask him any more questions. Tango Yesu amonaki ete molakisi ya Mobeko azongisi eyano na ndenge ya mayele, alobaki na ye : — Ozali mosika te ya Bokonzi ya Nzambe. Mpe moto ata moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
35 Teaching in the temple, Jesus asked, "How can the scribes say the Christ is the son of David? Wana Yesu azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, atunaki : — Ndenge nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Klisto azali Mwana ya Davidi ?
36 David himself said by the Holy Spirit: 'Our Father said to my Lord, "Sit at my right hand until I put your enemies under your feet."' Pamba te Davidi, ye moko, alobaki boye na nzela ya Molimo Mosantu : « Yawe alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › »
37 "David himself calls the Christ Lord. How can the Christ be David's son?" The large crowd enjoyed listening to him. Soki ye moko Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ? Ebele ya bato bazalaki koyoka Ye na esengo.
38 And in his teaching he said, "Beware of the scribes, who like walking in long robes and being greeted in the marketplaces, Wana azalaki koteya, Yesu alobaki : — Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ;
39 and to have the best seats in the synagogues and the places of honor at banquets, balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ;
40 who devour widows' houses and make long prayers just for show. These will receive the greater condemnation." bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi.
41 Sitting across from the treasury, he watched the crowd drop coins in; many rich people dropped in large sums. Yesu avandaki liboso ya kitunga ya makabo mpe azalaki kotala ndenge bato bazalaki kotia mbongo kati na kitunga ya makabo. Bazwi ebele bazalaki kotia mbongo ebele.
42 And a poor widow came and put in two small copper coins, worth a penny. Mwasi mobola moko akufisa mobali ayaki mpe atiaki mbongo mibale ya bibende, oyo ezalaki na motuya moke penza.
43 Calling his disciples, he said, "Truly, I tell you, this poor widow put in more than all who put into the offering box. Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : mwasi mobola oyo akufisa mobali apesi koleka bato nyonso oyo bawuti kotia mbongo kati na kitunga ya makabo.
44 For they all gave from their surplus, but she gave from her poverty—all she had, her whole livelihood." Pamba te bato nyonso bazwi kati na mbongo oyo bazali na yango na tina te, mpo na kotia kati na kitunga ya makabo ; kasi ye, kati na kokelela na ye, atie bozwi na ye nyonso, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobika na yango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]