Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

John 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 As Jesus passed by, he saw a man who had been blind from birth. Wana Yesu azalaki kokende, amonaki moto moko akufa miso wuta mbotama na ye.
2 His disciples asked him, "Rabbi, who sinned, this man or his parents, that he was born blind?" Bayekoli na Ye batunaki Ye : — Moteyi, nani asalaki masumu mpo ete moto oyo abotama mokufi miso : boni, ezali ye moko to baboti na ye ?
3 "Neither this man nor his parents sinned,' Jesus answered, 'but this happened so the works of our Father might be revealed in him. Yesu azongisaki : — Ezali te mpo na masumu na ye to ya baboti na ye, kasi ezali mpo ete misala ya Nzambe emonisama kati na ye.
4 We must do the works of the one who sent me while it is day; night comes, when no one can work. Lokola moyi ezali, esengeli na Ngai kosala misala ya Ye oyo atindaki Ngai ; butu ezali koya, oyo moto ata moko te akokoka kosala mosala.
5 As long as I am in the world, I am the light of the world.'" Wana nazali kati na mokili, nazali pole ya mokili.
6 Saying this, he spat on the ground, made mud from the saliva, and smeared it on the man's eyes. Sima na Yesu koloba bongo, abwakaki soyi na mabele mpe, na nzela ya soyi na Ye, asalaki potopoto. Bongo apakolaki yango na miso ya mokufi miso
7 He told him, "Go, wash in the pool of Siloam" (meaning Sent). So the man went, washed, and returned able to see. mpe alobaki na ye : — Kende kosukola na liziba ya Siloe. Mokufi miso akendeki mpe asukolaki. Tango azongaki, abandaki komona.
8 Neighbors and those who'd seen him begging before said, "Isn't this the one who used to sit and beg?" Bato oyo bazalaki zingazinga na ye mpe ba-oyo bazalaki komona ye kosenga-senga mbongo bakomaki koloba : — Boni, ezali ye te moto oyo azalaki tango nyonso ya kovanda mpo na kosenga-senga mbongo ?
9 Some said, "That's him." Others said, "No, he just looks like him." He kept saying, "I'm the one." Bamoko bazalaki koloba : — Ezali ye ! Bamosusu : — Te, ezali ye te ; akokani na ye ! Kasi ye moko, mokufi miso, azalaki koloba : — Ezali ngai !
10 So they asked him, "Then how were your eyes opened?" Bongo batunaki ye : — Miso na yo ebikaki ndenge nini ?
11 He replied, "The man called Jesus made mud, smeared it on my eyes, and told me, 'Go to Siloam and wash.' So I went, washed, and could see." Azongiselaki bango : — Moto oyo babengaka Yesu asalaki potopoto, apakolaki ngai yango na miso, bongo alobaki na ngai : « Kende kosukola na Siloe. » Boye, nakendeki, nasukolaki mpe, mbala moko, nakomaki komona.
12 They said to him, "Where is he?" He said, "I do not know." Batunaki ye lisusu : — Moto yango azali wapi ? Azongisaki : — Nayebi te !
13 They brought the man who had been blind to the Pharisees. Bamemaki liboso ya Bafarizeo, mokufi miso oyo abikaki.
14 Now it was a Sabbath day when Jesus made the mud and opened his eyes. Nzokande mokolo oyo Yesu asalaki potopoto mpo na kobikisa miso ya mokufi miso yango ezalaki mokolo ya Saba.
15 So the Pharisees also asked him again how he had gained sight. He told them, "He put mud on my eyes, and I washed, and I see." Yango wana Bafarizeo mpe batunaki ye soki ndenge nini miso na ye ebikaki. Azongiselaki bango : — Atiaki ngai potopoto na miso, nasukolaki mpe nakomi komona.
16 Some Pharisees said, "This man isn't from God—he doesn't keep the Sabbath." Others said, "How can a sinful man do such signs?" So they were divided among them. Kati na Bafarizeo, bamoko balobaki : — Moto oyo awuti epai ya Nzambe te, mpo ete azali kotosa te mokolo ya Saba. Kasi bamosusu balobaki : — Ndenge nini moto ya masumu akoki kozwa bokonzi ya kosala bikamwa ya ndenge wana ? Bokabwani ekotaki kati na bango.
17 Again they asked the blind man, "What do you say about him, since he opened your eyes?" He said, "He is a prophet." Batunaki lisusu mokufi miso : — Bongo yo, olobi nini na tina na ye, pamba te ezali miso na yo nde abikisi ? Azongiselaki bango : — Azali mosakoli.
18 The Jews did not believe he had been blind and gained sight, until they summoned the parents of the man who had gained sight. Bayuda baboyaki kondima ete azalaki liboso mokufi miso mpe ete abiki. Boye, babengaki baboti na ye
19 They asked them, "Is this your son you say was born blind? How then does he now see?" mpe batunaki bango : — Mobali oyo azali mwana na bino ? Boni, abotama solo mokufi miso ? Ndenge nini sik’oyo akomi komona ?
20 His parents answered, "We know that this is our son and that he was born blind. Baboti na ye bazongisaki : — Toyebi ete azali mwana na biso mpe ete abotama mokufi miso ;
21 But how he now sees, we don't know; or who opened his eyes, we don't know. Ask him—he's an adult; he'll speak for himself." kasi mpo na oyo etali koyeba ndenge nini akomi komona sik’oyo mpe nani abikisi ye, toyebi eloko te. Botuna ye moko. Azali mokolo ; akoloba na tina na ye moko.
22 His parents said this, fearing the Jews, since the Jews had already agreed that if anyone confessed Jesus as the Christ, he would be expelled from the synagogue. Baboti na ye balobaki bongo mpo ete bazalaki kobanga Bayuda, pamba te Bayuda basilaki kozwa mokano ya kobengana, na ndako na bango ya mayangani, moto nyonso oyo akondima ete Yesu azali Klisto.
23 That was why his parents said, "He is of age; ask him." Yango wana baboti na ye bazongisaki : « Botuna ye moko, azali mokolo. »
24 So they called the once-blind man again and said, "Give God the glory. We know this man is a sinner." Bafarizeo babengisaki lisusu, mpo na mbala ya mibale, moto oyo azalaki mokufi miso mpe balobaki na ye : — Pesa Nzambe nkembo na koloba solo ; biso toyebi ete moto wana azali moto ya masumu.
25 He replied, "Whether he's a sinner, I don't know. I know one thing: I was blind, now I see." Azongiselaki bango : — Soki azali moto ya masumu, wana ngai nayebi yango te ; kasi ngai nayebi kaka likambo moko : nazalaki mokufi miso, kasi sik’oyo, nakomi komona.
26 They said to him, "What did he do to you? How did he open your eyes?" Batunaki ye lisusu : — Asalaki yo nini ? Abikisaki miso na yo ndenge nini ?
27 He answered them, "I already told you, and you didn't listen. Why do you want to hear it again? Do you also want to become his disciples?" Azongiselaki bango : — Nasilaki koyebisa bino yango, kasi boyokaki te. Bongo mpo na nini bolingi lisusu koyoka yango ? Boni, bino mpe bolingi kokoma bayekoli na ye ?
28 And they reviled him, saying, "You are his disciple, but we are disciples of Moses. Bongo Bafarizeo bakomaki kofinga ye mpe koloba : — Ezali yo nde ozali moyekoli na ye ; biso tozali bayekoli ya Moyize.
29 We know God spoke to Moses, but we don't know where this man is from." Toyebi ete Nzambe alobaki na Moyize ; kasi moto wana, toyebi kutu te soki awuti wapi !
30 The man answered them, "Here's the amazing thing: you don't know where he's from, yet he opened my eyes. Moto yango azongisaki : — Oh, ezali penza likambo ya kokamwa soki boyebi te epai nini awuti ! Kasi mpo na ngai, abikisi miso na ngai.
31 We know God doesn't listen to sinners, but if anyone reveres God and does his will, God listens to him. Toyebi biso nyonso ete Nzambe ayokaka bato ya masumu te, kasi ayokaka nde moto oyo atosaka Ye mpe asalaka mokano na Ye.
32 Never since the world began has anyone heard of someone opening the eyes of a person born blind. Mpe totikala nanu koyoka te ete moto abikisi moto moko akufa miso wuta mbotama na ye.
33 If this man were not from God, he could do nothing." Soki moto wana awutaki epai ya Nzambe te, akokaki kosala ata eloko moko te.
34 They answered him, "You were born entirely in sin, yet you teach us?" and threw him out. Bazongiselaki ye : — Ndenge nini yo moto oyo obotama mobimba kati na lisumu oteya biso ? Boye, babenganaki ye.
35 Jesus heard they had thrown him out, and finding him, said, "Do you believe in the Son of Man?" Tango Yesu ayokaki ete babengani moto wana, akendeki kokutana na ye mpe alobaki na ye : — Boni, ondimi Mwana na Moto ?
36 He answered, "And who is he, sir, so I can believe in him?" Moto wana azongiselaki Ye : — Nkolo, azali nani ? Yebisa ngai mpo ete nandima Ye.
37 Jesus said to him, "You have seen him, and it is he who is speaking with you." Yesu alobaki : — Omoni Ye ! Ezali Ye oyo azali koloba na yo.
38 He said, "Lord, I believe," and he worshiped him. Moto yango azongisaki : — Nkolo, nandimi. Mpe agumbamelaki Ye.
39 Jesus said, "I came into this world for judgment, so those who don't see may see, and those who see may become blind." Yesu alobaki : — Nayaki mpo na kotia bososoli kati na mokili ; mpo ete bakufi miso bakoma komona, mpe ba-oyo bazali komona bakoma bakufi miso.
40 Some Pharisees with him heard this and said, "Are we blind too?" Bafarizeo mosusu oyo bazalaki elongo na ye bayokaki maloba yango mpe batunaki Yesu : — Boni, olingi koloba ete biso mpe tozali bakufi miso ?
41 Jesus told them, "If you were blind, you would have no sin; but since you say, 'We see,' your sin remains." Yesu azongiselaki bango : — Soki bozalaki bakufi miso, bolingaki kozala na ngambo te ; kasi lokola bolobi ete bomonaka, elingi koloba ete bozali penza na ngambo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]