Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

John 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Truly, truly, I tell you: whoever doesn't enter the sheepfold through the gate, but climbs in another way, is a thief and a robber. Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo akotaka na lopango ya bameme na nzela ya ekuke te, kasi amataka na likolo ya lopango, na esika mosusu, azali moyibi mpe mobomi.
2 But the one who enters by the gate is the shepherd of the sheep. Kasi ye oyo akotelaka na ekuke azali mobateli bameme.
3 The gatekeeper opens for him, and the sheep hear his voice. He calls his own sheep by name and leads them out. Mokengeli afungolelaka mobateli bameme ekuke, bameme eyokaka mongongo na ye. Mobateli abengaka bameme na ye na kombo na yango mpe abimisaka yango na libanda.
4 After bringing all his own out, he goes ahead of them, and the sheep follow him because they know his voice. Soki abimisi bameme na ye nyonso na libanda, alekaka liboso na yango ; mpe bameme elandaka ye na sima, pamba te eyebi mongongo na ye.
5 They will never follow a stranger—they'll run from him, since they don't know the voice of strangers." Ekotikala ata mokolo moko te kolanda mopaya ; kasi ekokima ye mosika, pamba te eyebi mongongo na ye te.
6 Jesus told them this figure of speech, but they didn't grasp what he meant. Yesu ayebisaki bango lisese yango, kasi basosolaki te tina ya makambo oyo azalaki koyebisa bango.
7 So Jesus said again, "Truly, truly, I tell you, I am the gate for the sheep. Mpo na yango, Yesu alobaki na bango lisusu : — Nazali koloba na bino penza ya solo : Ngai nazali ekuke ya bameme.
8 "All who came before me are thieves and robbers, but the sheep did not listen to them. Bato nyonso oyo bayaki liboso na Ngai bazali miyibi mpe babomi ; bameme eyokelaki bango te.
9 I am the gate; whoever enters through me will be saved, going in and out, finding pasture. Ngai nde nazali ekuke ; moto nyonso oyo akokotela na nzela na Ngai akobika ; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei.
10 The thief comes only to steal, kill, and destroy. I came so they may have life, and have it in abundance. Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma mpe kobebisa ; kasi Ngai, nayei mpo ete bameme ezwa bomoi mpe ezwa yango na bofuluki penza.
11 "I am the good shepherd. The good shepherd lays down his life for the sheep. Nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu ya bameme apesaka bomoi na ye mpo na bameme na ye.
12 The hired hand, not a shepherd, doesn't own the sheep. Seeing the wolf coming, he leaves the sheep and flees—the wolf snatches and scatters them. Mosali oyo azali mobateli bibwele te, oyo azali nkolo bameme te, asalaka kaka mpo na lifuti. Soki kaka amoni mbwa ya zamba koya, asundolaka bameme mpe akimaka. Bongo mbwa ya zamba ekangaka bameme mpe epanzaka yango.
13 The man runs away because he is a hired hand and cares nothing for the sheep. Mosali yango akimaka, pamba te asalaka kaka mpo na lifuti mpe atiaka makanisi na ye na bameme te.
14 "I am the good shepherd. I know my own and my own know me, Ngai, nazali mobateli malamu ya bibwele ; nayebi bameme na Ngai, mpe bameme na Ngai eyebi Ngai
15 as the Father knows me and I know the Father, and I lay down my life for the sheep. —ndenge kaka Tata ayebi Ngai, mpe Ngai nayebi Tata— Nazali kokaba bomoi na Ngai mpo na bameme na Ngai.
16 I have other sheep not of this fold; I must lead them too, and they will hear my voice. They will become one flock, one shepherd. Nazali na bameme mosusu oyo ezali ya lopango oyo te. Nasengeli komema yango ; ekoyoka mongongo na Ngai. Etonga ekozala kaka moko, mpe mobateli bibwele akozala kaka moko.
17 This is why the Father loves me: I lay down my life only to take it up again. Tata alingaka Ngai mpo ete nazali kokaba bomoi na Ngai ; kasi nakozwa yango lisusu.
18 No one takes it from me, but I lay it down on my own. I have authority to lay it down, and authority to take it up again. This charge I received from my Father." Moto moko te azali kobotola Ngai bomoi yango, kasi Ngai moko nde nazali kokaba yango, na mokano na Ngai moko. Nazali na bokonzi ya kopesa mpe ya kozwa yango lisusu. Yango nde mitindo oyo Tata na Ngai apesaki Ngai.
19 These words brought division among the Jews once again. Bayuda bakabwanaki lisusu likolo ya maloba yango.
20 Many of them said, "He is demon-possessed and out of his mind. Why listen to him?" Mingi kati na bango bazalaki koloba : — Azali na molimo mabe ! Azali na liboma ! Mpo na nini bozali koyoka ye ?
21 But others said, "These aren't a demon-possessed man's words. Can a demon open blind eyes?" Bamosusu bazalaki kozongisa : — Maloba wana ezali te ya moto oyo azali na se ya bokonzi ya molimo mabe ! Boni, molimo mabe ekoki penza kofungola miso ya bakufi miso ?
22 Then came the Feast of Dedication at Jerusalem. It was winter, Ekomaki tango ya kosepela feti ya Kobulisa Tempelo ya Yelusalemi. Feti yango esalemaki na tango ya malili makasi.
23 and Jesus was walking in the temple, in Solomon's Colonnade. Yesu azalaki kotambola kati na lopango ya Tempelo, na veranda ya Salomo.
24 The Jews surrounded him and said, "How long will you hold us in suspense? If you are the Christ, tell us plainly." Bayuda bazingelaki Ye mpe batunaki Ye : — Kino tango nini okotika mitema na biso likolo-likolo ? Soki ozali Klisto, yebisa biso yango polele !
25 Jesus answered, "I told you, and you don't believe. The works I do in my Father's name testify about me, Yesu azongiselaki bango : — Nayebisaki bino yango, kasi boboyi na bino kondima. Makamwisi oyo nazali kosala na Kombo ya Tata ezali kotatola na tina na Ngai ;
26 but you do not believe, because you are not my sheep. kasi bino, boboyi na bino kondima, pamba te bozali bameme na Ngai te.
27 My sheep listen to my voice; I know them, and they follow me. Bameme na Ngai eyokaka mongongo na Ngai. Nayebi bameme na Ngai, mpe yango elandaka Ngai.
28 I give them eternal life, and they will never perish, and no one will snatch them from my hand. Napesi yango bomoi ya seko : ekokufa soki moke te, mpe moto ata moko te akobotola yango na loboko na Ngai.
29 My Father, who gave them to me, is greater than all; no one can snatch them out of the Father's hand. Tata na Ngai, oyo apesaki Ngai bameme yango, aleki bato nyonso na monene, mpe moto moko te akoki kobotola yango na loboko ya Tata na Ngai.
30 I and the Father are one." Ngai mpe Tata tozali se moko.
31 Again the Jews picked up stones to stone him. Na bongo, Bayuda balokotaki lisusu mabanga mpo na koboma Ye,
32 Jesus replied, "I have shown you many good works from the Father. For which of these are you going to stone me?" kasi Yesu alobaki na bango : — Nalakisi bino bikamwa mingi ya minene oyo esalemaki na nguya ya Tata ; mpo na likamwisi nini bolingi koboma Ngai na mabanga ?
33 "We're stoning you not for good work," they said, "but for blasphemy, because you, a mere man, claim to be God." Bayuda bazongiselaki Ye : — Ezali te mpo na likamwisi moko boye ya malamu nde tolingi koboma yo, kasi ezali mpo ete ozali kofinga Nzambe. Lisusu, ezali mpo ete, yo oyo ozali moto, ozali koloba ete ozali Nzambe.
34 Jesus answered them, "Is it not written in your Law: 'I have said you are gods'? Yesu alobaki na bango : — Ekomama te kati na mibeko na bino : « Nalobi : ‹ Bozali banzambe ? › »
35 If he called them 'gods,' to whom the word of my Father came—and Scripture cannot be broken, Nzokande, batiaka tembe na Makomi te. Boye, soki abengaki « banzambe, » bato oyo epai banani Liloba na Nzambe eyaki,
36 what about the one the Father set apart and sent into the world? Why accuse me of blasphemy for saying, 'I am the Son of our Father'? mpo na nini koloba na tina na Ngai oyo Tata abulisa mpe atinda kati na mokili : « Ozali kofinga, » mpo nalobaki : « Nazali Mwana na Nzambe ? »
37 "If I am not doing the works of my Father, then do not believe me. Soki nasalaka te misala ya Tata na Ngai, wana bondima na bino Ngai te.
38 But if I do them, even if you won't believe me, believe the works, so you'll know and keep knowing the Father is in me, and I in the Father." Kasi soki nasalaka yango, ezala soki boboyi na bino kondima Ngai, bondima ata misala yango, mpo boyeba mpe bososola ete Tata azali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na Tata.
39 Again they tried to seize him, but he escaped their grasp. Mpo na yango, balukaki lisusu kokanga Ye, kasi Yesu akimaki bango.
40 Jesus then went back across the Jordan, to the place where John had first been baptizing, and stayed there. Akendeki lisusu na ngambo mosusu ya Yordani, kaka na esika oyo Yoane azalaki kobatisa bato, mpe atikalaki kuna.
41 Many came to him, saying, "John performed no sign, but all John said about this man was true." Bato mingi penza bayaki epai na Ye ; bazalaki koloba : « Yoane asalaki likamwisi ata moko te, kasi makambo nyonso oyo alobaki na tina na moto oyo ezali ya solo ! »
42 And in that place many believed in him. Mpe kuna, bato mingi bandimaki Yesu.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]