Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

John 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 A man named Lazarus was sick, from Bethany, the village of Mary and her sister Martha. Kati na mboka Betani, ezalaki na mobali moko na kombo Lazare ; azalaki kobela mpe azalaki na bandeko basi mibale : Mari mpe Marte.
2 Mary—whose brother Lazarus was sick—anointed the Lord with fragrant oil and dried his feet with her hair. Mari azali mwasi oyo asopelaki Nkolo malasi mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo ya Yesu, mpe Lazare oyo azali kobela azali ndeko na ye ya mobali.
3 So the sisters sent word to him, saying, "Lord, the one you love is sick." Bandeko nyonso mibale ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu : — Nkolo, moto oyo olingaka azali kobela.
4 Hearing this, Jesus said, "This sickness won't end in death, but is for the glory of our Father, so the Son of our Father may be glorified through it." Tango Yesu ayokaki yango, alobaki : — Bokono oyo ekoboma ye te, kasi ekopesa Nzambe nkembo mpe ekozala nzela mpo ete Mwana na Nzambe azwa lokumu.
5 Now Jesus loved Martha and her sister and Lazarus. Nzokande, Yesu azalaki kolinga makasi Marte, ndeko na ye ya mwasi mpe Lazare.
6 So when he heard Lazarus was sick, he stayed two more days where he was. Atako ayokaki ete Lazare azali kobela, kasi avandaki lisusu mikolo mibale na esika oyo azalaki.
7 Then after this he said to the disciples, "Let us go back to Judea." Bongo alobaki na bayekoli na Ye : — Tosengeli sik’oyo kozonga na Yuda.
8 The disciples said to him, "Rabbi, the Jews just now tried to stone you, and you're going back there?" Bayekoli balobaki na Ye : — Moteyi, wuta mokolo oyo Bayuda balingaki koboma Yo na mabanga, eleki nanu mikolo mingi te ; bongo mpo na nini olingi lisusu kozonga kuna ?
9 Jesus answered, "Aren't there twelve hours in the day? Anyone who walks by day won't stumble - he sees the light of this world. Yesu azongisaki : — Boni, moyi ezalaka na bangonga zomi na mibale te ? Soki moto atamboli na moyi, akobeta mabaku te, pamba te azali komona pole ya mokili oyo.
10 But if anyone walks at night, he stumbles, because the light is not in him." Nzokande, soki moto atamboli na butu, akobeta penza mabaku, pamba te pole ezali te.
11 After this, he told them, "Our friend Lazarus has fallen asleep, but I'm going to wake him." Sima na Ye koloba bongo, alobaki na bango lisusu : — Molingami na biso, Lazare, alali pongi ; kasi nazali kokende kolamusa ye.
12 So the disciples said to him, "Lord, if he has fallen asleep, he will get better." Bayekoli balobaki na Yesu : — Nkolo, soki azali kolala pongi, akobika na bokono na ye !
13 Now Jesus had been speaking about his death, but they thought he meant natural sleep. Solo, Yesu alingaki koloba ete Lazare akufi, kasi bayekoli bakanisaki ete azali kolobela nde pongi oyo tolalaka.
14 So then Jesus told them plainly, "Lazarus has died, Bongo Yesu alobaki na bango na polele : — Lazare akufi.
15 I'm glad for your sake I wasn't there, so you'll believe. But let's go to him." Mpe nazali na esengo makasi mpo na bino lokola bozalaki kuna te, pamba te likambo oyo ekosala ete kondima na bino elendisama. Kasi sik’oyo tokende epai na ye.
16 So Thomas, called the Twin, told the other disciples, "Let's go too, and die with him." Na bongo, Toma, oyo bazalaki mpe kobenga « Lipasa, » alobaki na bayekoli mosusu : — Biso mpe, tokende mpo ete tokufa elongo na Yesu !
17 So when Jesus arrived, he found that Lazarus had already been in the tomb four days. Tango Yesu akomaki, ayokaki ete basilaki kokunda Lazare kati na kunda wuta mikolo minei.
18 Bethany was near Jerusalem, about two miles away, Mpe lokola Betani ezalaki mosika ya Yelusalemi na bakilometele pene misato,
19 and many of the Jews had come to Martha and Mary to console them about their brother. Bayuda mingi bayaki epai ya Mari mpe Marte mpo na kokabola mawa elongo na bango, mpo na kufa ya ndeko na bango.
20 When Martha heard Jesus was coming, she went to meet him; Mary stayed sitting in the house. Tango Marte ayokaki ete Yesu azali koya, akendeki kokutana na Ye ; kasi Mari atikalaki ya kovanda kati na ndako.
21 Martha said to Jesus, "Lord, if you had been here, my brother would not have died. Marte alobaki na Yesu : — Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te !
22 But even now I know that whatever you ask of our Father, he will give you." Kasi nazali na kondima ete, ata sik’oyo, Nzambe akopesa Yo nyonso oyo okosenga Ye.
23 Jesus said to her, "Your brother will rise again." Yesu alobaki na ye : — Ndeko na yo akosekwa.
24 Martha said to him, "I know he'll rise again in the resurrection on the last day." Marte azongiselaki Yesu : — Nayebi solo ete akosekwa, na mokolo ya suka, na tango bakufi bakosekwa.
25 Jesus told her, "I am the resurrection and the life. Whoever believes in me will live, even though he dies, Yesu alobaki na ye : — Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi.
26 and everyone who lives and believes in me will never die. Do you believe this?" Mpe moto nyonso oyo andimi Ngai, wana azali na bomoi, akotikala kokufa te. Ondimi yango ?
27 She said to him, "Yes, Lord; I believe you are the Christ, the Son of our Father, the one coming into the world." Marte azongisaki : — Iyo, Nkolo ! Nandimi ete ozali Klisto, Mwana na Nzambe, oyo asengelaki koya na mokili.
28 After saying this, she went and called her sister Mary privately: "The Teacher is here—he's calling for you." Sima na Marte koloba bongo, akendeki kobenga Mari, ndeko na ye ; mpe wana abendaki ye pembeni, alobaki na ye na mongongo ya se penza : — Moteyi ayei, azali kobenga yo.
29 When Mary heard this, she rose quickly and went to him. Tango kaka Mari ayokaki bongo, atelemaki na lombangu mpe akendeki epai ya Yesu.
30 Jesus had not yet entered the village; he was still where Martha met him. Nzokande, Yesu akotaki nanu te na mboka ; azalaki kaka na esika oyo Marte akutanaki na Ye.
31 The Jews with her in the house, comforting her, saw Mary rise quickly and leave; they followed, thinking she was going to the tomb to weep there. Tango Bayuda oyo bazalaki elongo na Mari kati na ndako mpo na kokabola mawa elongo na ye, bamonaki Mari kotelema na lombangu mpe kobima libanda, balandaki ye, pamba te bakanisaki ete akei kolela na kunda.
32 Mary came to Jesus, saw him, fell at his feet, and said, "Lord, if you had been here, my brother would not have died." Tango kaka Mari akomaki na esika oyo Yesu azalaki mpe amonaki Ye, amibwakaki na makolo na Ye mpe alobaki : — Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te !
33 When Jesus saw her weeping, and the Jews who came with her also weeping, he groaned in spirit and was troubled. Tango Yesu amonaki Mari mpe Bayuda oyo bayaki elongo na ye kolela, ayokaki mawa makasi mpe amitungisaki.
34 And he said, "Where have you laid him?" They said to him, "Lord, come and see." Atunaki bango : — Bokundaki ye wapi ? Bazongisaki : — Nkolo, yaka kotala.
35 Jesus wept. Yesu alelaki.
36 So the Jews said, "See how he loved him!" Bongo Bayuda balobaki : — Tala ndenge nini alingaki ye !
37 But some of them said, "Could this man who opened the blind man's eyes not have kept him from dying?" Kasi bamosusu kati na bango balobaki : — Ezali ye te oyo abikisaki mokufi miso ? Bongo ndenge nini akokaki te kosala ete Lazare akufa te ?
38 So Jesus, again deeply moved in himself, came to the tomb—a cave with a stone against it. Lokola Yesu amitungisaki lisusu makasi, akendeki na kunda. Ezalaki kati na ebombamelo ya mabanga oyo, na ekotelo na yango, batiaki libanga moko ya monene.
39 Jesus said, "Take away the stone." Martha, the dead man's sister, said to him, "Lord, he must smell by now—he's been dead four days." Yesu alobaki na bango : — Botindika libanga. Kasi Marte, ndeko ya mowei, alobaki na Yesu : — Nkolo, azali kolumba solo ! Wuta bakundaki ye, esali mikolo minei.
40 Jesus said to her, "Didn't I tell you: if you believe you'll see our Father's glory?" Yesu alobaki na ye : — Nalobaki na yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe ?
41 So they removed the stone. Jesus looked up and said, "Father, I thank you that you heard me. Boye batindikaki libanga. Bongo Yesu atombolaki miso na likolo mpe alobaki : « Tata, nazali kotonda Yo mpo ete oyoki Ngai.
42 I knew you always hear me, but I said this for the crowd standing here, so they may believe you sent me." Nayebaki ete oyokaka Ngai tango nyonso ; kasi soki nalobi bongo, ezali mpo ete bato oyo bazali zingazinga na Ngai bandima ete Yo nde otindaki Ngai. »
43 When he had said this, he cried out with a loud voice, "Lazarus, come out!" Sima na Yesu koloba bongo, agangaki : — Lazare, bima !
44 The dead man came out, feet and hands bound with strips of linen, and his face wrapped in cloth. Jesus said to them, "Untie him; let him go." Mpe mowei abimaki longwa na kunda ; makolo mpe maboko na ye ezalaki ya kokangama na basinga ya bitendi, mpe elongi na ye ezalaki ya kozipama na elamba. Bongo Yesu alobaki na bato oyo bazalaki wana : — Bofungola ye basinga wana mpe botika ye kokende.
45 So many of the Jews who came to Mary and saw what Jesus did believed in him. Kati na Bayuda oyo bayaki epai ya Mari, mingi kati na bango bandimaki Yesu tango bamonaki makambo oyo asalaki ;
46 But some of them went to the Pharisees and told them what Jesus had done. kasi bamosusu bakendeki kokuta Bafarizeo mpo na koyebisa bango makambo yango, oyo Yesu asalaki.
47 So the chief priests and Pharisees convened the council and said, "What are we doing? For this man performs many signs. Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo babengisaki Likita-Monene mpe batunanaki : — Tosala nini ? Moto oyo azali kosala bikamwa mingi.
48 If we leave him alone, everyone will believe in him, and the Romans will come and take away both our place and our nation." Soki totiki ye kokoba kosala bongo, bato nyonso bakondima ye ; bongo bato ya Rome bakoya bakobebisa Tempelo na biso mpe ekolo na biso.
49 But one of them, Caiaphas, high priest that year, told them, "You know nothing at all. Moko kati na bango, Kayifa, oyo azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe na mobu wana, alobaki na bango :
50 Don't you see it's better for you that one man die for the people than the whole nation perish?" — Bozali kososola eloko moko te ; bozali mpe komona te ete ezali mpo na bolamu na bino soki moto moko akufi mpo na bato nyonso, mpo ete ekolo mobimba ebebisama te ?
51 He didn't say this on his own; as high priest that year, he prophesied Jesus would die for the nation, Nzokande, makambo oyo azalaki koloba na bango ewutaki na makanisi na ye moko te ; kasi lokola azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe na mobu wana, yango wana asakolaki ete Yesu asengelaki kokufa mpo na ekolo ya Bayuda.
52 not only for the nation, but also to gather into one the scattered children of our Father. Mpe asengelaki kokufa kaka mpo na ekolo yango te, kasi mpe mpo na kosangisa kati na libota moko, bana nyonso ya Nzambe, oyo bapalangana bipai na bipai.
53 So from that day on they plotted to put him to death. Ezali na mokolo wana nde bazwaki mokano ya koboma Yesu.
54 So Jesus no longer moved about openly among the Jews, but withdrew to a town called Ephraim near the wilderness, and stayed there with his disciples. Na bongo, Yesu atikaki komilakisa na polele kati na Bayuda ; alongwaki wana mpe akendeki na etuka oyo ezalaki pene ya esobe, kati na engumba moko na kombo Efrayimi ; mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na Ye.
55 The Jews' Passover was near, and many went up from the country to Jerusalem before it to purify themselves. Kasi lokola feti ya Pasika ya Bayuda ekomaki pene, bato mingi ya mboka bakendeki na Yelusalemi mpo na komipetola liboso ya feti yango.
56 So they looked for Jesus, asking each other as they stood in the temple, "What do you think? Surely he won't come to the feast?" Bazalaki koluka Yesu mpe kotunana bango na bango kati na lopango ya Tempelo : — Bokanisi nini ? Akoya penza na feti ?
57 The chief priests and Pharisees had ordered that anyone who knew his whereabouts must report it, so they could arrest him. Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basilaki kopesa mitindo ete moto nyonso oyo akoyeba esika oyo Yesu azali, ayebisa bango mpo ete bakanga ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]