Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

John 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Six days before Passover, Jesus came to Bethany, where Lazarus, whom Jesus raised from death, lived. Wana etikalaki mikolo motoba mpo ete Pasika ebanda, Yesu akendeki na Betani epai wapi Lazare, oyo asekwisaki kati na bakufi, azalaki kovanda.
2 There they gave him a dinner; Martha served, and Lazarus was one of those at the table with him. Kuna, balambaki bilei mpo na Yesu ; mpe wana Marte azalaki kobongisa mesa, Lazare azalaki moko kati na bato oyo bavandaki na mesa elongo na Yesu.
3 Mary took about a pint of pure nard perfume, expensive, and anointed Jesus' feet, then wiped his feet with her hair. The house filled with the fragrance of the perfume. Mari akamataki ndambo ya litele ya malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi, asopaki yango na makolo ya Yesu mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo yango. Ndako mobimba etondaki na solo ya malasi yango.
4 But Judas Iscariot, one of his disciples, the one who was about to betray him, said, Bongo moko kati na bayekoli ya Yesu, Yuda Isikarioti, ye oyo akoteka Ye, alobaki :
5 "Why was this perfume not sold for about a year's wages and given to the poor?" — Mpo na nini bateki te malasi oyo na motuya ya mbongo ya bibende nkama misato mpo na kopesa yango epai ya babola ?
6 He said this not because he cared about the poor, but because he was a thief who kept the money box, taking what was put in it. Yuda Isikarioti alobaki bongo mpo ete azalaki moyibi ; ezalaki te mpo ete azalaki na makanisi ya kosunga babola. Bongo lokola azalaki mpe kobatela libenga ya mbongo ya lisanga, azalaki tango nyonso koyiba mbongo.
7 So Jesus said, "Leave her alone. She has kept this for the day of my burial. Kasi Yesu alobaki : — Tika ye kimia ! Abombi malasi yango mpo na mokolo oyo bakokunda Ngai.
8 You will always have the poor among you, but you will not always have me." Bokozalaka na babola tango nyonso ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.
9 A large crowd of Jews learned Jesus was there and came, not only for him but to see Lazarus, whom he had raised from the dead. Lokola Bayuda mingi bayokaki ete Yesu azali na Betani, bakendeki kuna ; bakendeki kaka te mpo na Yesu, kasi mpe mpo na kotala Lazare oyo Yesu asekwisaki kati na bakufi.
10 So the chief priests planned to kill Lazarus as well, Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe basalaki mabongisi mpo na koboma mpe Lazare ;
11 because on account of him many of the Jews were going over and believing in Jesus. pamba te likolo na ye, Bayuda ebele bazalaki kokabwana na Banganga-Nzambe mpo na kondima Yesu.
12 The next day, the large crowd that came for the feast heard Jesus was coming to Jerusalem. Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika bayokaki sango ete Yesu mpe azali kokende kuna na Yelusalemi.
13 They took palm branches and went out to meet him, shouting, "Hosanna! Blessed is he who comes in the name of our Father—the King of Israel!" Bakataki mandalala mpe babimaki mpo na kokende koyamba Yesu ; bazalaki koganga : « Ozana ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo, Mokonzi ya Isalaele ! »
14 Jesus found a young donkey and rode on it, just as it is written: Yesu amonaki mwana moko ya ane mpe avandaki na likolo na yango kolanda ndenge ekomama :
15 "Do not be afraid, daughter of Zion; look, your king is coming, seated on a donkey's colt." « Siona, engumba kitoko, kobanga te ! Tala, mokonzi na yo azali koya, avandi na likolo ya mwana ya ane ! »
16 His disciples didn't understand these things at first; but when Jesus was glorified, they remembered these things were written about him, and that they had done these things to him. Bayekoli ya Yesu bayebaki nanu te tina ya makambo oyo ezalaki kosalema. Kaka tango Yesu akotaki kati na nkembo nde basosolaki ete makambo yango ekomamaki na tina na Ye, mpe ete bakokisaki kaka makambo oyo Makomi eloba.
17 The crowd that was with him when he called Lazarus from the tomb and raised him from the dead kept testifying. Bato nyonso oyo bazalaki elongo na Yesu tango abengaki Lazare ete abima na kunda mpe asekwisaki ye kati na bakufi, bazalaki kotatola makambo oyo bamonaki.
18 The crowd went to meet him because they heard he had done this sign. Yango wana ebele ya bato bakendeki koyamba Yesu mpo ete bayokaki ete Ye nde asalaki likamwisi yango.
19 So the Pharisees said to each other, "See, you're accomplishing nothing—the whole world has gone after him." Bongo Bafarizeo balobanaki bango na bango : — Bomoni, bokokoka lisusu eloko moko te ; bato nyonso bakomi na bango kolanda ye !
20 Now there were some Greeks among those who went up to worship at the feast. Kati na bato oyo bayaki na feti, na Yelusalemi, mpo na kogumbamela Nzambe, ezalaki na ndambo ya Bagreki.
21 These came to Philip, from Bethsaida in Galilee, and asked him, "Sir, we want to see Jesus." Bakendeki epai ya Filipo, moto ya mboka Betisaida ya Galile, mpe batalisaki ye bosenga oyo : — Tata, tolingi komona Yesu.
22 Philip went and told Andrew; then Andrew and Philip went and told Jesus. Filipo akendeki koyebisa Andre ; bongo bango mibale, Andre mpe Filipo, bakendeki koyebisa Yesu.
23 Jesus replied to them, "The hour has come for the Son of Man to be glorified. Yesu azongiselaki bango : — Sik’oyo, ngonga ekoki, ngonga oyo Mwana na Moto asengeli kokota kati na nkembo na Ye.
24 Truly, truly, I tell you, unless a wheat grain falls to the ground and dies, it stays alone; but if it dies, it bears much fruit. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki mbuma ya ble oyo ekweyi na mabele ekufi te, mbuma yango ekotikala kaka yango moko. Kasi soki ekufi, ekobota solo bambuma ebele.
25 Whoever loves his life loses it; whoever hates his life in this world keeps it for eternal life. Moto nyonso oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango ; kasi moto oyo aboyi kokangama na bomoi na ye, kati na mokili oyo, akobatela yango mpo na bomoi ya seko.
26 Whoever serves me must follow me, so my servant will be where I am. Whoever serves me, my Father will honor him." Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai ! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai.
27 "Now my soul is troubled. What should I say—'Father, save me from this hour'? But this is why I came to this hour. Father, glorify your name." Sik’oyo, molimo na Ngai etungisami ! Naloba nini ? Tata, kangola Ngai na tango oyo ya pasi ? Nzokande, ezali penza mpo na tango yango ya pasi nde nakomi kino na ngonga oyo !
28 Then a voice came from heaven: "I have glorified it, and I will glorify it again." Tata, pesa Kombo na Yo nkembo ! Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : — Nasili kopesa yango nkembo mpe nakopesa yango lisusu nkembo !
29 The crowd standing there heard it and said it thundered; others said an angel spoke to him. Bato oyo bazalaki wana mpe bayokaki mongongo yango balobaki : — Ezali kake ! Bato mosusu balobaki : — Anjelu moko asololi na ye !
30 Jesus said, "This voice came for your sake, not mine. Kasi Yesu alobaki na bango : — Mongongo wana eyokani te mpo na Ngai, kasi mpo na bino.
31 Now is the judgment of this world; now the ruler of this world will be cast out. Kosambisama ya mokili elingi kosalema nde sik’oyo ; mokonzi ya mokili oyo akobwakama sik’oyo na libanda.
32 And I, when I am lifted up from the earth, will draw all people to myself." Mpe tango bakotombola Ngai longwa na mabele, nakobenda bato nyonso epai na Ngai.
33 He said this to show by what kind of death he was going to die. Yesu alobaki bongo mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengeli kokufa.
34 The crowd replied, "We've heard from the Law that the Christ stays forever. How can you say the Son of Man must be lifted up? Who is this Son of Man?" Bato bazongiselaki Ye : — Mibeko ezali kolakisa biso ete Klisto asengeli kozala na bomoi seko na seko. Bongo ndenge nini yo olobi na biso : « Mwana na Moto asengeli kotombolama ? » Nani nde Mwana na Moto ?
35 So Jesus said, "The light is with you a little while longer. Walk while you have light, so darkness doesn't overtake you. Whoever walks in darkness doesn't know where he's going. Yesu alobaki na bango : — Pole ezali nanu kati na bino mpo na mwa tango moke. Botambola, wana bozali na pole, mpo ete molili ekanga bino te na mbalakata ; pamba te moto oyo atambolaka kati na molili ayebaka te esika nini azali kotia lokolo.
36 While you have light, believe in the light, so you become children of light." Having said this, Jesus left and hid from them. Boye wana bozali nanu na pole, bondima pole mpo ete bokoma bana ya pole. Tango Yesu asilisaki koloba bongo, akendeki mpe amibombaki mosika na bango.
37 Though he had performed so many signs in their presence, they still would not believe in him, Atako Yesu asalaki bikamwa ebele na miso na bango, kasi bandimaki Ye kaka te
38 so that the word of Isaiah the prophet would be fulfilled, which he spoke: "Father, who has believed our message? And to whom has the arm of our Father been revealed?" mpo ete maloba ya mosakoli Ezayi ekokisama : « Nkolo, nani andimaki mateya na biso ? Mpe nguya na Yo emonisamaki epai ya nani ? »
39 This is why they could not believe, for Isaiah said again: Ezali lisusu Ezayi nde alobaki tina oyo bakokaki kondima te :
40 "He has blinded their eyes and hardened their heart, so that they would not see with their eyes, nor understand with their heart, nor turn—and I would heal them." « Azipaki miso na bango mpe akomisaki bango mitema makasi, mpo ete bamona te na miso na bango, basosola te na mitema na bango, babongola mitema te, mpe ngai nabikisa bango te. »
41 Isaiah said these things because he saw Jesus' glory and spoke about him. Ezayi alobaki bongo mpo ete amonaki Nkembo ya Yesu mpe azalaki koloba na tina na Ye.
42 Still, many even of the rulers believed in him, but they didn't admit it because of the Pharisees, so they wouldn't be expelled from the synagogue, Nzokande, kati na bakonzi ya Bayuda, mingi bandimaki Ye ; kasi balakisaki te kondima na bango na polele, pamba te bazalaki kobanga ete Bafarizeo babengana bango na ndako ya mayangani,
43 for they loved the glory that comes from people more than the glory that comes from our Father. pamba te bazalaki kolinga mingi kozwa lokumu kowuta na bato, kasi lokumu kowuta na Nzambe te.
44 Jesus cried out, "Whoever believes in me does not believe in me only, but in the one who sent me. Bongo Yesu alobaki na mongongo ya makasi : — Moto oyo andimi Ngai, andimi kaka Ngai te, kasi andimi mpe Ye oyo atindaki Ngai ;
45 And whoever sees me sees the one who sent me. mpe moto oyo amoni Ngai, amoni mpe Ye oyo atindaki Ngai.
46 I came into the world as light, so no one who believes in me stays in the darkness. Ngai, pole, nayaki kati na mokili mpo ete moto nyonso oyo akondima Ngai azala lisusu te kati na molili.
47 If anyone hears my words and doesn't keep them, I don't judge him—I didn't come to judge the world, but to save the world. Soki moto ayoki maloba na Ngai, kasi aboyi kotia yango na misala, Ngai, nakosambisa ye te ; pamba te nayaki te mpo na kosambisa mokili, kasi mpo na kobikisa yango.
48 Whoever rejects me and doesn't accept my words already has a judge: my spoken word will judge him on the last day. Moto oyo aboyi Ngai mpe ayambi te maloba na Ngai azali na mosambisi na ye : ezali liloba oyo nateyi nde ekosambisa ye, na mokolo ya suka.
49 I have not spoken on my own; but the Father who sent me himself commanded me what to say and how to speak. Pamba te nalobaki na Kombo na Ngai moko te ; kasi Ye moko Tata oyo atindaki Ngai apesaki Ngai, lokola mitindo, makambo oyo nasengeli koloba mpe koteya.
50 I know his commandment is eternal life, so I say only what the Father told me to say." Nzokande, nayebi malamu ete mitindo na Ye epesaka bomoi ya seko ; yango wana nazali koloba makambo oyo, ndenge kaka Tata ayebisaki Ngai yango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]