Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

John 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 But Jesus went to the Mount of Olives. Kasi Yesu akendeki na ngomba ya banzete ya olive.
2 At dawn he came again to the temple; all the people came to him, and he sat down and taught them. Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, azongaki kati na lopango ya Tempelo ; mpe lokola bato nyonso bayaki kozingela Ye, avandaki mpe abandaki koteya bango.
3 The scribes and Pharisees brought a woman caught in adultery and stood her in the middle. Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bakumbaki mwasi moko oyo bakutaki azali kosala ekobo ; batambolisaki ye kati na ebele ya bato mpe batiaki ye liboso ya Yesu, na miso ya bato nyonso.
4 They said to him, "Teacher, this woman was caught in the act of adultery. Balobaki na Yesu : — Moteyi, mwasi oyo asali ekobo ; bakuti ye penza azali kosala yango !
5 Now in the Law, Moses commanded us to stone such women. So what do you say? Kati na mibeko, Moyize apesa biso mitindo ya koboma basi ya boye na mabanga. Bongo yo, olobi nini na tina na yango ?
6 They said this to test him, seeking grounds to accuse him. But Jesus bent down and wrote on the ground with his finger." Balobaki bongo mpo na kotiela Yesu motambo mpe koluka nzela ya kofunda Ye. Kasi Yesu agunzamaki ; mpe na nzela ya mosapi na Ye, abandaki kokoma na mabele.
7 When they kept questioning him, he stood up and said to them, "Whichever of you has no sin, cast the first stone at her." Lokola bakobaki kaka kopesa Ye mituna, Yesu atelemaki mpe alobaki na bango : — Tika ete moto oyo, kati na bino, asala nanu lisumu te abamba ye libanga moto ya liboso.
8 And once more he bent down and wrote on the ground. Bongo Yesu agunzamaki lisusu mpe azongelaki kokoma na mabele.
9 Hearing this, they left one by one, starting with the oldest, until Jesus was left alone with the woman standing there. Tango bayokaki bongo, bango nyonso babendanaki moko sima na moninga, kobanda na mikolo. Mpe Yesu atikalaki Ye moko. Lokola mwasi yango azalaki kaka wana kati na lopango ya Tempelo,
10 Jesus stood up and said to her, "Woman, where are they? Has no one condemned you?" Yesu atombolaki moto mpe alobaki na ye : — Mwasi, bato oyo bayei kofunda yo bazali wapi ? Boni, ata moko te akateli yo etumbu ?
11 She said, "No one, Lord." Jesus said, "I don't condemn you either. Go, and from now on, don't sin anymore." Mwasi azongisaki : — Nkolo, moko te ! Bongo Yesu alobaki na ye : — Ngai mpe nakateli yo etumbu te. Kende ; kasi, kobanda lelo, kosala lisusu masumu te.]
12 Jesus spoke to them again: "I am the world's light. Whoever follows me will never walk in darkness but will have the light of life." Yesu alobaki lisusu na bato : — Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.
13 So the Pharisees said to him, "You are bearing witness about yourself; your testimony is not true." Bafarizeo balobaki na Ye : — Ozali kotatola mpo na yo moko, litatoli na yo ezali ya solo te.
14 Jesus replied, "Even if I testify about myself, my testimony is true, because I know where I came from and where I'm going; but you don't know where I come from or where I'm going. Yesu azongiselaki bango : — Ezala soki natatoli mpo na Ngai moko, litatoli na Ngai ezali ya solo, pamba te nayebi epai nawuti mpe epai nazali kokende ; kasi bino, boyebi te ezala epai nawuti to epai nazali kokende.
15 You judge according to the flesh; I judge no one. Bino, bosambisaka na ndenge ya bomoto ; kasi Ngai, nasambisi moto ata moko te.
16 Even if I judge, my judgment is true, since I do not judge alone, but I and the Father who sent me. Mpe ezala soki esalemi ete Ngai nasambisi moto, kosambisa na Ngai ezali ya solo, pamba te nazali Ngai moko te : Tata oyo atindi Ngai azali elongo na Ngai.
17 In your Law it is written that the testimony of two people is true. Ekomama kutu, kati na mibeko na bino, ete litatoli ya bato mibale nde ezalaka ya solo.
18 I testify about myself, and the Father who sent me testifies about me." Ngai, nazali kopesa litatoli na tina na Ngai moko, mpe Tata oyo atindaki Ngai azali lisusu kotatola na tina na Ngai.
19 They asked, "Where is your Father?" Jesus answered, "You know neither me nor my Father. If you knew me, you would know my Father also." Bongo batunaki Ye : — Tata na yo azali wapi ? Yesu azongisaki : — Boyebi Ngai te, mpe boyebi Tata na Ngai te. Soki boyebaki Ngai, bolingaki mpe koyeba Tata na Ngai.
20 He said this while teaching in the temple, in the treasury; no one seized him—his hour had not yet come. Yesu alobaki bongo, wana azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, pene ya esika oyo bazalaki kotia makabo ; mpe moto ata moko te amekaki kokanga Ye, pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.
21 So he told them again, "I am going away. You will look for me and die in your sin. Where I am going, you cannot come." Yesu alobaki na bango lisusu : — Ngai, nazali kokende ; mpe bokoluka Ngai, kasi bokokufa kati na lisumu na bino. Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna.
22 So the Jews said, "Will he kill himself, since he says, "You can't come where I'm going"?" Na bongo, Bayuda batunanaki bango na bango : — Boni, azali na makanisi ya komiboma, yango wana alobi : « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokokoka te koya kuna ? »
23 He said to them, "You're from below; I'm from above. You're of this world; I'm not of this world. Yesu azongiselaki bango : — Bino, bozali bato ya se ; kasi Ngai, nawuti na Likolo. Bino, bozali bato ya mokili oyo ; kasi Ngai, nazali ya mokili oyo te.
24 I told you that you'll die in your sins; if you don't believe I AM, you'll die in your sins." Yango wana nalobaki na bino : « Bokokufa kati na lisumu na bino ; » pamba te soki bondimi te ete « Nazali oyo azali, » bokokufa kati na lisumu na bino.
25 So they said to him, "Just who are you?" Jesus said to them, "Exactly what I've said from the start. Batunaki Ye : — Boye ozali nani ? Yesu azongiselaki bango : — Oyo nazali koloba na bino wuta na ebandeli.
26 I have much to say and judge about you, but the One who sent me is true; what I heard from him, I tell the world." Nazali na makambo mingi ya koloba na tina na bino mpe ya kosambisa kati na bino ; kasi Ye oyo atindaki Ngai azali solo, mpe makambo oyo nayokaki epai na Ye, yango nde nazali koyebisa mokili.
27 They did not understand that he had been speaking to them about the Father. Kasi bazalaki kososola te ete Yesu azalaki koloba na bango na tina na Tata.
28 So Jesus told them, "When you lift up the Son of Man, then you'll know that I AM, and that I do nothing on my own, but say these things as the Father taught me. Alobaki lisusu : — Sima na bino kotombola Mwana na Moto nde bokoyeba ete, Ngai, nazali oyo azali, mpe ete nasalaka eloko moko te na ndenge na Ngai moko, kasi nalobaka kolanda makambo oyo Tata ateyaki Ngai.
29 The one who sent me is with me; he hasn't left me alone, because I always do what pleases him." Ye oyo atindaki Ngai azali elongo na Ngai ; atikaki Ngai moko te, pamba te, Ngai, nasalaka tango nyonso makambo oyo esepelisaka Ye.
30 As he was saying these things, many believed in him. Wana Yesu azalaki koloba bongo, bato mingi bandimaki Ye.
31 Jesus then told the Jews who had believed him, "If you remain in my word, you are truly my disciples, Bongo Yesu alobaki na Bayuda oyo bandimaki Ye : — Soki bowumeli kati na Liloba oyo nateyaki bino, bokozala penza bayekoli na Ngai,
32 and you will know the truth, and the truth will set you free." bokoyeba solo, mpe solo ekokangola bino.
33 They answered him, "We are Abraham's descendants, never enslaved to anyone. How can you say, 'You will become free'?" Bazongiselaki Ye : — Biso, tozali bato ya libota ya Abrayami, totikala kozala te bawumbu ya moto ; ndenge nini oloba ete tokokoma bansomi ?
34 Jesus answered them, "Truly, truly, I tell you: everyone who keeps sinning is sin's slave. Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo asalaka masumu azali mowumbu ya lisumu.
35 The slave does not remain in the house forever; the son remains forever. Nzokande, mowumbu azalaka kati na libota tango nyonso te, kasi mwana azali kati na yango mpo na seko.
36 So if the Son sets you free, you will be free indeed. Boye, soki Mwana akangoli bino, bokozala penza bansomi.
37 I know you are Abraham's descendants; yet you seek to kill me because my word has no space in you. Nayebi ete bozali bato ya libota ya Abrayami ; nzokande, bozali koluka koboma Ngai, pamba te boboyi koyamba Liloba na Ngai.
38 I speak what I've seen with my Father, and you do what you heard from your father." Ngai, nazali koloba makambo oyo namonaki epai ya Tata na Ngai ; bino mpe bozali kosala makambo oyo boyokaki epai ya tata na bino.
39 They answered, "Abraham is our father." Jesus said, "If you were Abraham's children, you'd do the works Abraham did, Bazongisaki : — Ezali Abrayami nde azali tata na biso. Yesu alobaki na bango : — Soki bozalaki bana ya Abrayami, bolingaki kosala misala oyo Abrayami asalaki.
40 but now you want to kill me—a man who told you the truth I heard from my Father. Abraham didn't do this. Kasi sik’oyo, na esika ete bosala yango, bozali koluka koboma Ngai, Ngai oyo nalobi na bino solo oyo nayokaki epai ya Nzambe ! Abrayami atikala kosala bongo te.
41 You do your father's works." They said to him, "We weren't born of sexual sin. We have one Father—God himself." Bozali penza kosala misala ya tata na bino. Bazongisaki : — Tozali bana ya makangu te ; tozali kaka na tata moko : Nzambe !
42 Jesus said to them, "If God were your Father, you'd love me, for I came from God and am here. I didn't come on my own—he sent me. Yesu alobaki na bango : — Soki Nzambe azalaki penza Tata na bino, bolingaki kolinga Ngai, pamba te nawutaki epai ya Nzambe, mpe ezali kolanda mokano na Ye nde nazali sik’oyo awa. Nayaki na ndenge na Ngai moko te, kasi Ye nde atindaki Ngai.
43 Why don't you understand my speech? Because you cannot bear to hear my word. Mpo na nini bozali kososola te elobeli na Ngai ? Ezali mpo ete bozali kokoka te koyoka makambo oyo nazali koloba na bino.
44 You belong to your father, the devil, and want to carry out his desires. He was a murderer from the beginning, not standing in truth, since no truth is in him. When he lies, he speaks from his own nature, since he's a liar and the lie's father. Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.
45 But because I tell the truth, you do not believe me. Kasi Ngai, lokola nalobi solo, yango wana bozali kondima Ngai te.
46 Who among you convicts me of sin? If I speak truth, why don't you believe me? Nani kati na bino akoki kotalisa Ngai ete nasali masumu ? Soki nalobaka solo, mpo na nini bondimaka Ngai te ?
47 Whoever is from our Father hears his words; you don't hear because you're not from our Father." Moto oyo azali ya Nzambe ayokaka makambo oyo Nzambe alobaka ; kasi soki bino boyokaka te, ezali mpo ete bozali ya Nzambe te.
48 The Jews replied, "Aren't we right in saying that you are a Samaritan and have a demon?" Bayuda bazongiselaki Ye : — Omoni ! Yango wana tolobaki na biso ete ozali moto ya Samari mpe ozali na molimo mabe kati na yo.
49 Jesus answered, "I do not have a demon, but I honor my Father, and you dishonor me. Yesu azongisaki : — Nazali na molimo mabe te kati na Ngai. Ngai nazali nde kopesa Tata na Ngai lokumu, kasi bino bozali kotiola Ngai.
50 But I'm not seeking my own glory; our Father seeks it, and he judges. Nalukaka lokumu na Ngai moko te ; ezali na Moko oyo alukaka yango mpe asambisaka.
51 Truly, truly, I say to you, if anyone keeps my word, he will never see death." Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo akobatela Liloba na Ngai kati na ye akotikala kokufa te.
52 The Jews said to him, "Now we know you have a demon. Abraham died, as did the prophets, yet you say, 'Whoever keeps my word will never taste death.' Na yango, Bayuda balobaki na Ye : — Tomoni sik’oyo ete ozali na molimo mabe kati na yo ! Pamba te Abrayami asila kokufa, basakoli mpe lokola ; bongo yo ozali koloba ete moto oyo akobatela Liloba na yo kati na ye akotikala kokufa te !
53 Are you greater than our father Abraham, who died? The prophets died too! Who do you claim to be?" Boni, yo okanisi ete oleki Abrayami, tata na biso, oyo akufa to mpe oleki basakoli nyonso oyo bakufa ? Yango yo, ozali komimona nani ?
54 Jesus answered, "If I glorify myself, my glory is nothing. It is my Father who glorifies me, of whom you say, 'He is our God.' Yesu azongiselaki bango : — Soki namipesaki Ngai moko lokumu, lokumu na Ngai elingaki kozala na tina te. Kasi ezali Tata na Ngai, Ye oyo bino bozali koloba ete azali Nzambe na bino, nde azali kopesa Ngai lokumu.
55 You don't know him, but I know him. If I said I didn't know him, I'd be a liar like you. But I know him and keep his word. Solo, bino, boyebi Ye te ; kasi Ngai, nayebi Ye. Soki nameki koloba ete nayebi Ye te, wana nakozala mokosi lokola bino. Kasi nayebi Ye mpe nabatelaka Liloba na Ye.
56 Your father Abraham rejoiced that he would see my day. He saw it and was glad." Tata na bino, Abrayami, atondaki na esengo, wana akanisaki ete akomona mokolo na Ngai. Amonaki yango mpe atondaki na esengo.
57 So the Jews said to him, "You're not yet fifty years old, and you've seen Abraham?" Bayuda balobaki na Ye : — Nini ? Yo moto oyo okokisi nanu te ata mibu tuku mitano ya mbotama, ozali koloba ete omonaki Abrayami !
58 Jesus said to them, "Truly, truly, I say to you, before Abraham was, I AM." Yesu azongisaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : liboso ete Abrayami abotama, Ngai nazali.
59 So they grabbed stones to throw at him, but Jesus hid himself and slipped out of the temple. Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba Yesu, kasi abombamaki mpe abimaki libanda ya lopango ya Tempelo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]