Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

John 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After this, Jesus traveled around Galilee, not wanting to go into Judea because Jewish leaders there were looking for a chance to kill him. Sima na yango, Yesu atambolaki na mokili ya Galile, aboyaki kovanda na Yuda, pamba te Bayuda bazalaki koluka koboma Ye.
2 But the Jewish Festival of Booths was near. Nzokande, feti ya Bandako ya kapo, feti ya Bayuda, ekomaki pene.
3 His brothers told him, "Leave here and go to Judea, so your disciples can also see the works you do. Bandeko ya Yesu balobaki na Ye : — Longwa awa na Galile mpe kende na Yuda, mpo ete bayekoli na Yo bamona kuna bikamwa oyo ozali kosala.
4 No one seeking public attention hides what he does. If you're doing these things, show yourself to the world." Moto moko te asalaka na nkuku soki alingi koyebana. Lokola ozali kosala makambo minene koleka, sala ete moto nyonso kati na mokili ayeba soki ozali nani.
5 For not even his brothers believed in him. Pamba te, ezala bandeko ya Yesu, bango mpe bazalaki kondima Ye te.
6 So Jesus told them, "My time has not yet come, but for you any time is right. Yesu azongiselaki bango : — Tango na Ngai ekoki nanu te ; kasi mpo na bino, tango nyonso ezali malamu.
7 "The world cannot hate you, but it hates me, because I testify that its works are evil. Mokili ekoki koyina bino te ; kasi Ngai, ezali koyina Ngai mpo ete natatolaka ete misala na yango ezali mabe.
8 You yourselves go up to the festival; I'm not going up to this festival, since my time hasn't yet fully come." Bino, bokende na feti wana ; kasi Ngai, nakokende te, pamba te tango na Ngai ekoki nanu te.
9 After saying this, he stayed in Galilee. Sima na Ye koloba na bango bongo, atikalaki na Galile.
10 After his brothers went up to the festival, he too went up—not openly, but secretly. Nzokande, tango bandeko na Ye bakendeki na feti, Ye mpe akendeki kuna, na komilakisa te, kasi na nkuku.
11 So the Jewish leaders were looking for him at the festival and asking, "Where is he?" Wana bazalaki kati na feti, Bayuda bazalaki koluka Ye mpe bazalaki kotuna-tuna : « Azali wapi ? »
12 Much murmuring about him spread among the crowds: some said, "He's good," others, "No, he misleads the crowd." Kati na bato, tembe ekomaki makasi na tina na Ye. Bamoko bazalaki koloba : Azali moto malamu ; bamosusu : « Te, azali kokosa bato nyonso. »
13 Yet no one spoke about him openly, for fear of the Jewish leaders. Kasi, lokola bango nyonso bazalaki kobanga Bayuda, moto ata moko te akokaki koloba na bonsomi nyonso na tina na Yesu.
14 About the middle of the festival, Jesus went up into the temple and began to teach. Tango mikolo ya feti ekomaki na kati-kati, Yesu akendeki na Tempelo mpe akomaki koteya.
15 The Jewish leaders were amazed and asked, "How does this man know so much without training?" Bayuda bakamwaki mpe bazalaki kotunana : — Ndenge nini moto oyo ayekola te akoki koyeba Makomi boye ?
16 Jesus answered them, "My teaching isn't mine—it's from the one who sent me. Yesu azongiselaki bango : — Makambo oyo nazali koteya ewuti epai na Ngai te, kasi ewuti epai na Ye oyo atindi Ngai.
17 Whoever wants to do our Father's will knows if my teaching is from my Father or I speak on my own. Moto nyonso oyo azwi mokano ya kosala makambo oyo Nzambe alingaka, akososola soki mateya na Ngai ewuti na Nzambe to nazali koloba na ndenge na Ngai moko.
18 Whoever speaks on his own seeks his own glory, but whoever seeks the sender's glory is true, with no falsehood in him. Moto oyo alobaka na kombo na ye moko alukaka lokumu na ye moko ; kaka oyo azali koluka lokumu ya Nzambe oyo atindaki Ye nde azali koloba solo, mpe mabe ezali te kati na Ye.
19 Didn't Moses give you the law? Yet none of you obeys the law. Why are you trying to kill me?" Boni, Moyize apesaki bino mibeko te ? Nzokande moko te kati na bino atosaka yango ! Bongo mpo na nini bozali koluka koboma Ngai ?
20 The crowd answered, "You have a demon! Who is trying to kill you?" Bato kati na ngulupa bazongiselaki Yesu : — Ozali na molimo mabe. Nani azali koluka koboma yo ?
21 Jesus replied, "I did one work, and you are all amazed. Yesu alobaki na bango : — Mpo na likamwisi moko oyo nasalaki, yango wana bino nyonso bokamwe !
22 "Moses gave you circumcision—not from Moses, but the patriarchs—and you circumcise a man on the Sabbath. Bokanisa nanu : Moyize apesaki bino mitindo ya kokatisa ngenga, —mobeko yango ewutaki kutu na Moyize te, kasi na bakoko— mpe botosaka mitindo yango ata na mokolo ya Saba.
23 If a man is circumcised on the Sabbath so the law of Moses isn't broken, why are you angry at me for making a whole man well on the Sabbath? Bongo soki bokataka bato ngenga na mokolo ya Saba, mpe yango ebukaka mobeko ya Moyize te, mpo na nini bozali kosilikela Ngai mpo ete nabikisi moto na mokolo ya Saba ?
24 Stop judging by appearances, and judge with right judgment." Bosambisaka lisusu te kolanda oyo miso na bino ezali komona, kasi bokataka makambo na bosembo.
25 Then some Jerusalemites said, "Isn't this the man they want to kill? Na bongo, ndambo ya bavandi ya Yelusalemi bakomaki komituna : « Azali te moto oyo bazali koluka koboma ?
26 Yet he speaks openly, and they say nothing to him. Can the rulers truly know this is the Christ? Tala, azali koloba na bonsomi nyonso, mpe bazali koloba na ye eloko moko te mpo na kotelemela ye ! Boni, bokanisi ete bakonzi na biso bayebi ete azali penza Klisto ?
27 But we know this man's origin. When the Christ comes, no one will know his origin." Kasi biso, toyebi epai moto oyo awuti ; nzokande tango Klisto akoya, moto moko te akoyeba soki azali moto ya engumba nini ! »
28 Then Jesus, teaching in the temple, cried out: "You know me, and know where I'm from. Yet I didn't come on my own—the one who sent me is true, and you don't know him. Kaka na tango yango, wana Yesu azalaki koteya kati na Tempelo, alobaki na mongongo makasi : — Solo, boyebi Ngai mpe boyebi epai nawuti ! Nzokande, nayei na ndenge na Ngai moko te ; ezali Ye oyo azali penza ya solo nde atindi Ngai, mpe bino, boyebi Ye te.
29 I know him, because I am from him, and he sent me." Ngai, nayebi Ye, pamba te nawuti epai na Ye, mpe ezali Ye nde atindi Ngai.
30 So they tried to grab him, but no one touched him, because his hour had not yet come. Na bongo, balukaki kokanga Yesu, kasi moto ata moko te alongaki ; pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.
31 But many in the crowd believed in him, asking, "When the Christ comes, will he do more signs than this man did?" Boye kati na bato, mingi bandimaki Ye ; bazalaki koloba : — Boni, tango Klisto akoya, akosala bikamwa mingi koleka oyo moto oyo ozali kosala ?
32 The Pharisees heard the crowd murmuring these things about him, so the chief priests and Pharisees sent temple guards to seize him. Bafarizeo bayokaki makambo oyo bato bazalaki koloba na se se na tina na Yesu. Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batindaki bakengeli ya Tempelo mpo na kokanga Yesu.
33 So Jesus said, "I'm with you a little while longer, and then I go to the one who sent me. Yesu alobaki : — Nazali nanu elongo na bino mpo na mwa tango moke, bongo nakozonga epai ya Ye oyo atindaki Ngai.
34 You will search for me and not find me; you cannot come where I am." Bokoluka Ngai, kasi bokomona Ngai te ; mpe epai Ngai nakozala, bino, bokoki te koya kuna.
35 So the Jewish leaders asked each other, "Where does he intend to go that we won't find him? Does he intend to go to our people dispersed among the Greeks and teach the Greeks? Bayuda balobanaki bango na bango : — Asengeli kokende wapi mpo ete tomona ye lisusu te ? Akokende epai ya Bayuda oyo bapalangana kati na Bagreki mpe koteya Bagreki ?
36 What does he mean: 'You will look for me, but you will not find me,' and 'Where I am, you cannot come'?" Alingi penza koloba nini tango azali koloba : « Bokoluka Ngai, kasi bokomona Ngai te ; mpe epai Ngai nakozala, bino, bokoki te koya kuna ? »
37 On the last, great day of the festival, Jesus stood and called out, "Whoever is thirsty, let him come to me and drink. Na mokolo ya suka ya feti, mokolo oyo eleki monene, Yesu atelemaki mpe alobaki na mongongo makasi : — Tika ete moto nyonso oyo azali na posa ya mayi aya epai na Ngai mpe amela.
38 Whoever believes in me, as Scripture said, rivers of living water will flow from his heart." Moto oyo akondima Ngai, kolanda ndenge Makomi elobi, bibale ya mayi ya bomoi ekotiola wuta kati na ye.
39 He said this about the Holy Spirit, whom believers in him were to receive; the Spirit had not yet been given, since Jesus had not yet been glorified. Yesu alobaki bongo na tina na Molimo oyo bato oyo bakotia kondima na bango kati na Ye bakozwa ; mpo ete na tango wana, Molimo apesamaki nanu te, pamba te Yesu akotaki nanu te kati na nkembo na Ye.
40 When they heard these words, some of the crowd said, "This really is the Prophet." Kati na bato oyo bayokaki maloba na Ye, bamoko bazalaki koloba : « Moto oyo azali penza Mosakoli, »
41 Others said, "This is the Christ." But others asked, "How can the Christ come from Galilee? bamosusu : « Azali Klisto, » kasi bamosusu lisusu : « Boni, Klisto akoki kobimela na Galile ?
42 Doesn't Scripture say the Christ comes from David's line and from Bethlehem, David's village?" Boni, Makomi ezali koloba te ete Klisto akobimela na libota ya Davidi mpe akobotama na Beteleemi, mboka ya Davidi ? »
43 So the crowd was divided over him. Ezali bongo nde bato bakabwanaki na tina na Yesu.
44 Some of them wanted to seize him, but no one laid a hand on him. Bamosusu kati na bango balukaki kokanga Ye, kasi moto ata moko te alongaki.
45 So the temple guards returned to the chief priests and Pharisees, who asked, "Why didn't you bring him?" Bakengeli ya Tempelo bazongaki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo. Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batunaki bakengeli : — Mpo na nini bomemi Yesu awa te ?
46 The guards answered, "No one ever spoke the way this man does." Bakengeli bazongisaki : — Ezali na moto ata moko te oyo asila koloba makambo oyo moto wana azali koloba.
47 "Have you also been deceived?" the Pharisees answered. Bafarizeo batunaki lisusu : — Bino mpe bomitiki penza mpo ete akosa bino ?
48 "Has any of the rulers or of the Pharisees believed in him? Boni, kati na bakonzi to kati na Bafarizeo, ezali ata na moko oyo andimi ye ?
49 But this crowd, who knows nothing of the law—they are under a curse." Ezali kaka bato oyo bayebi mibeko ya Moyize te, bazali penza bato balakelama mabe !
50 Nicodemus, who had gone to Jesus earlier and was one of their own number, asked them, Kasi moko kati na bango, Nikodemi, oyo, mokolo moko, akendeki epai ya Yesu, alobaki :
51 "Does our law condemn a man without first hearing him and finding out what he does?" — Boni, mibeko na biso ekoki kokatela moto etumbu na kozanga koyoka ye liboso, mpe na kozanga koyeba mabe oyo asili kosala ?
52 They replied, "Are you from Galilee too? Search, and see: no prophet arises from Galilee." Bazongiselaki ye : — Boni, yo mpe ozali moto ya Galile ? Kundola malamu Makomi, mpe okomona penza ete mosakoli moko te abimela na Galile. [
53 Then they all went home. Na bongo, moko na moko azongaki na ndako na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]