Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

John 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After this, Jesus crossed the Sea of Galilee, also called the Sea of Tiberias. Sima na yango, Yesu akendeki na ngambo mosusu ya ebale ya Galile oyo babengaka mpe ebale ya Tiberiade.
2 A large crowd followed him, because they saw the signs he performed on the sick. Bato ebele bazalaki kolanda Ye mpo ete bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala na banzoto ya babeli.
3 Jesus went up on the mountainside and sat down there with his disciples. Yango wana Yesu amataki na ngomba mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na Ye.
4 Now the Passover, the feast of the Jews, was near. Nzokande Pasika, feti ya Bayuda, ekomaki pene.
5 Looking up, Jesus saw a large crowd approaching and asked Philip, "Where can we buy bread for these people to eat?" Tango Yesu atombolaki miso, amonaki ebele ya bato penza koya epai na Ye ; alobaki na Filipo : — Tokosomba mapa wapi mpo na koleisa bato oyo nyonso ?
6 He said this to test Philip, for he himself already knew what he was going to do. Yesu atunaki Filipo motuna oyo mpo na komeka ye mpe kotala soki akoloba nini, pamba te Ye, Yesu, ayebaki makambo oyo alingaki kosala.
7 Philip answered him, "200 days' wages of bread isn't enough for each of them to get a little." Filipo azongiselaki Yesu : — Mapa oyo tokoki kosomba na mbongo ya bibende nkama mibale ekokoka te mpo ete moto moko na moko kati na bango azwa eteni ya lipa !
8 One of his disciples, Andrew, Simon Peter's brother, said to him, Moko kati na bayekoli na Ye, oyo kombo na ye ezali Andre, ndeko mobali ya Simona Petelo, alobaki na Ye :
9 "A boy here has five barley loaves and two fish—but what's that for so many?" — Ezali awa na elenge mobali moko oyo azali na mapa mitano basala na bambuma ya orje, mpe bambisi mibale ; kasi yango ekosala nini mpo na ebele ya bato oyo ?
10 Jesus said, "Have the people sit down." Much grass grew there, so about 5,000 men sat down. Yesu apesaki bango mitindo : — Boloba na bato nyonso ete bavanda. Boye, lokola ezalaki na matiti ebele na esika yango, bavandaki. Ezalaki wana na mibali pene nkoto mitano.
11 Jesus then took the loaves, gave thanks, and distributed them to those seated; likewise with the fish, as much as they wanted. Bongo Yesu azwaki mapa yango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akabolaki yango epai ya bato oyo bazalaki wana ; asalaki mpe bongo na bambisi : bato bazwaki kolanda ndenge posa na bango ezalaki.
12 When they were full, he told his disciples, "Gather the leftover pieces, so nothing is lost." Sima na bato kolia mpe kotonda, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Bosangisa biteni oyo etikali mpo ete eteni moko te ebeba.
13 So they gathered the fragments left over from the five barley loaves after the people ate, filling twelve baskets. Basangisaki biteni yango ; mpe na biteni ya mapa mitano basala na bambuma ya orje, oyo etikalaki na maboko ya bato oyo baliaki, batondisaki bitunga zomi na mibale.
14 So when the people saw the sign he did, they said, "This really is the Prophet coming into the world!" Tango bato bamonaki bikamwa oyo Yesu awutaki kosala, balobaki : « Azali penza Mosakoli oyo asengelaki koya na mokili. »
15 Knowing they meant to come and seize him to make him king, Jesus withdrew again to the mountain alone. Kasi, lokola Yesu ayebaki ete bazali na makanisi ya kokamata Ye mpo na kokomisa Ye mokonzi, abendanaki lisusu na ngomba mpo ete azala kaka Ye moko.
16 When evening came, his disciples went down to the sea, Tango pokwa ekomaki, bayekoli na Ye bakitaki na ebale
17 got in a boat and headed across the sea to Capernaum. It was already dark, and Jesus had not yet reached them. epai wapi bamataki na bwato moko, bakatisaki ebale mpo na kokende na Kapernawumi, na ngambo mosusu ya ebale. Butu ekotaki, wana Yesu amikomelaki nanu te epai bango bakomaki.
18 A strong wind was blowing, and the sea grew rough. Ekumbaki moko ebandaki kopepa, mpe mayi ya ebale etombokaki.
19 After rowing three or four miles, they saw Jesus walking on the water, approaching the boat, and were afraid. Awa basilaki koluka nkayi na molayi ya bakilometele pene mitano to motoba, bamonaki Yesu kotambola likolo ya mayi ya ebale mpe kopusana pene ya bwato ; somo makasi ekangaki bango.
20 But he said to them, "It is I; do not be afraid." Kasi Yesu alobaki na bango : « Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali Ngai ! »
21 So they were glad to take him into the boat, and instantly it reached the shore they were heading toward. Balingaki kokotisa Yesu na bwato, kasi, mbala moko, bwato etutaki mabele ya esika oyo bazalaki kokende.
22 The next day, the crowd remaining on the far shore saw that only one boat had been there, that Jesus had not boarded it with his disciples, but that his disciples had gone off alone. Mokolo oyo elandaki, bato oyo batikalaki na ngambo mosusu ya ebale bayaki kokanisa na sima ete ezalaki kaka na bwato moko, mpe ete Yesu akendeki bwato moko te na bayekoli na Ye ; bayekoli bakendeki bango moko kaka.
23 Other boats came from Tiberias near the place where they ate bread after the Lord gave thanks. Nzokande, babwato mosusu ewutaki na Tiberiade mpe ekomaki pene ya esika oyo baliaki mapa sima na Nkolo kozongisa matondi epai ya Nzambe.
24 So when the crowd saw Jesus and his disciples weren't there, they got in boats and went to Capernaum to look for Jesus. Tango bato bamonaki ete, ezala Yesu to bayekoli na Ye, moko te azalaki lisusu wana, bamataki na babwato yango mpe bakendeki koluka Yesu, na Kapernawumi.
25 Finding him across the sea, they asked, "Rabbi, when did you get here?" Tango bakutaki Ye na ngambo mosusu ya ebale, batunaki Ye : — Rabi, okomaki awa tango nini ?
26 Jesus answered them, "Truly, truly, I tell you: you seek me not because you saw signs, but because you ate the loaves and were filled. Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali koluka Ngai, ezali kaka mpo ete boliaki mapa mpe botondaki, kasi ezali te mpo ete bomonaki bikamwa.
27 Don't work for food that spoils, but for food that lasts to eternal life, which the Son of Man will give you. For on him our Father has set his seal." Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe.
28 Then they said to him, "What must we do to be doing the works of our Father?" Batunaki Ye lisusu : — Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa misala oyo Nzambe azali kozela epai na biso ?
29 Jesus answered them, "This is our Father's work: that you believe in the one he sent." Yesu azongiselaki bango : — Mosala ya Nzambe, yango oyo : bondima Ye oyo Nzambe atindaki.
30 So they asked him, "What sign will you give, so we may see and believe you? What work will you do? Batunaki Ye lisusu : — Elembo nini ya kokamwa okolakisa biso mpo ete tondima Yo ? Okosala penza nini ?
31 Our ancestors ate manna in the wilderness, as it is written: 'He gave them bread from heaven to eat.'" Bakoko na biso baliaki mana kati na esobe kolanda ndenge ekomama : « Apesaki bango lipa kowuta na Likolo. »
32 Jesus told them, "Truly, truly, I tell you: Moses didn't give you the bread from heaven—my Father gives you the true bread from heaven. Kasi Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali Moyize te moto apesaki bino lipa oyo ezalaki kowuta na Likolo, kasi ezali Tata na Ngai nde apesaka bino lipa ya solo oyo ewutaka na Likolo.
33 For the bread of our Father is he who comes down from heaven and gives the world life." Pamba te lipa ya Nzambe ezali Ye oyo akiti wuta na Likolo mpe apesaka mokili bomoi.
34 So they said to him, "Lord, give us this bread always." Bongo balobaki na Ye : — Nkolo, pesaka biso lipa yango tango nyonso.
35 Jesus told them, "I am the bread of life. Whoever comes to me will never hunger; whoever believes in me will never thirst. Yesu azongiselaki bango : — Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.
36 But as I told you, you have seen me and still do not believe. Nzokande, ndenge nayebisaki bino, bozali komona Ngai, kasi bozali kondima te.
37 All the Father gives me will come to me, and the one who comes to me I will never drive away. Bato nyonso oyo Tata apesi Ngai bakoya epai na Ngai, mpe nakobengana soki moke te moto nyonso oyo akoya epai na Ngai.
38 For I came down from heaven not to do my own will, but the will of him who sent me. Pamba te soki nakitaki wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na Ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.
39 This is the will of him who sent me: that I lose none of all he has given me, but raise them up on the last day. Nzokande, Ye oyo atindaki Ngai alingi ete nabungisa ata moto moko te kati na bato oyo apesaki Ngai, kasi nasekwisa bango na mokolo ya suka.
40 For this is the will of my Father: that everyone who looks to the Son and believes in him should have eternal life, and I will raise them up on the last day." Pamba te mokano ya Tata na Ngai ezali ete moto nyonso oyo amoni Mwana mpe andimi Ye azwa bomoi ya seko ; mpe, Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka.
41 So the Jews grumbled about him because he said, "I am the bread that came down from heaven." Bayuda bakomaki koyimayima na tina na Ye mpo ete alobaki : « Ngai, nazali lipa oyo ekiti wuta na Likolo. »
42 They said, "Isn't this Jesus, Joseph's son, whose father and mother we know? How can he now say, 'I have come down from heaven'?" Bakomaki koloba : — Boni, wana ezali Yesu te ? Ezali mwana mobali ya Jozefi te ? Toyebi malamu tata mpe mama na ye ! Bongo ndenge nini azali koloba : « Nawuti na Likolo ? »
43 Jesus answered them, "Stop grumbling among yourselves. Yesu azongiselaki bango : — Botika koyimayima kati na bino !
44 "No one can come to me unless the Father who sent me draws him, and I will raise him on the last day. Moto moko te akoki koya epai na Ngai soki Tata oyo atindaki Ngai abendi ye te ; mpe Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka.
45 It is written in the Prophets: 'And they will all be taught by our Father.' Everyone who has heard and learned from the Father comes to me. Tala ndenge ekomama kati na mikanda ya Basakoli : « Nzambe akoteya bango nyonso. » Boye moto nyonso oyo ayokaka Tata mpe ayambaka mateya na Ye ayaka epai na Ngai.
46 Not that anyone has seen the Father except the one from him; he has seen the Father. Moto moko te amona Tata, longola kaka Ye oyo ayaki wuta epai ya Nzambe.
47 Truly, truly, I tell you, whoever believes has eternal life. Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo andimi azali na bomoi ya seko,
48 I am the bread of life. pamba te nazali lipa oyo epesaka bomoi.
49 Your ancestors ate the manna in the wilderness, yet they died. Bakoko na bino baliaki mana kati na esobe mpe bakufaki,
50 This is the bread that comes down from heaven, so anyone may eat it and not die. kasi botala lipa oyo ewuti na Likolo ; moto oyo akolia yango akokufa te.
51 I am the living bread come down from heaven. Whoever eats this bread will live forever. The bread I will give is my flesh, for the life of the world." Ngai nde nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo ; moto nyonso oyo akolia lipa yango, akozala na bomoi ya seko ; mpe lipa oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi ezali nde nzoto na Ngai.
52 Then the Jews argued sharply among themselves, "How can this man give us his flesh to eat?" Tango Bayuda bayokaki bongo, bakomaki kotiana tembe ; bazalaki koloba : — Akopesa biso nzoto na ye ndenge nini mpo ete tolia yango ?
53 Jesus told them, "Truly, truly, I tell you, unless you eat the flesh of the Son of Man and drink his blood, you have no life in yourselves. Bongo Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bolie nzoto ya Mwana na Moto te mpe bomeli makila na Ye te, bozali na bomoi te kati na bino.
54 Whoever feeds on my flesh and drinks my blood has eternal life, and I will raise him on the last day. Moto oyo alie nzoto na Ngai mpe ameli makila na Ngai, azali na bomoi ya seko ; mpe Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka.
55 For my flesh is true food, and my blood is true drink. Pamba te nzoto na Ngai ezali penza bilei, mpe makila na Ngai ezali penza lokola mayi oyo bamelaka.
56 Whoever feeds on my flesh and drinks my blood remains in me, and I in him. Moto oyo alie nzoto na Ngai mpe ameli makila na Ngai azali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na ye.
57 As the living Father sent me and I live because of the Father, so whoever feeds on me will live because of me. Ndenge Tata oyo atindaki Ngai azali etima ya bomoi mpe Ngai nazali na bomoi na nzela na Ye, ndenge wana mpe moto oyo alie nzoto na Ngai akozala na bomoi na nzela na Ngai.
58 This is the bread that came down from heaven. It is not like the bread your ancestors ate and still died. Whoever feeds on this bread will live forever." Tala ndenge lipa oyo ewuti na Likolo ezali : ekokani te na mana oyo bakoko na bino baliaki, kasi bakufaki kaka ; nzokande, moto oyo akolia lipa oyo Ngai nazali akozala na bomoi ya seko.
59 He said these things while teaching in the synagogue at Capernaum. Wana nde ezalaki mateya ya Yesu kati na ndako ya mayangani ya Kapernawumi.
60 On hearing it, many of his disciples said, "This is a hard teaching. Who can accept it?" Sima na koyoka Ye, bayekoli mingi ya Yesu balobaki : — Mateya oyo ezali makasi mingi, nani akoki kondima yango ?
61 Aware that his disciples were grumbling about this, Jesus said to them, "Does this offend you? Yesu asosolaki ete bayekoli na Ye bazalaki koyimayima na tina na yango ; alobaki na bango : — Boni, maloba oyo ebetisi bino mabaku ?
62 "Then what if you see the Son of Man ascending to where he was before? Bongo ekozala ndenge nini soki bomoni Mwana na Moto kozonga epai Ye azalaki liboso ?
63 The Spirit gives life; the flesh helps nothing. The words I have spoken to you are spirit and life. Ezali Molimo nde apesaka bomoi ; mosuni ezali na eloko te. Maloba oyo nalobi na bino ezali Molimo mpe bomoi.
64 But some of you don't believe." For Jesus knew from the start who didn't believe, and who would betray him. Kasi bato mosusu kati na bino bazali kondima te. Solo, wuta na ebandeli, Yesu ayebaki banani bazalaki kondima te, mpe nani akoteka Ye.
65 And he said, "This is why I told you: no one can come to me unless the Father enables him." Alobaki lisusu : — Yango wana nalobaki na bino : « Moto moko te akoki koya epai na Ngai soki epesameli ye te na Tata. »
66 From this time many of his disciples turned back and no longer walked with him. Banda na tango wana, bayekoli na Ye mingi bazongaki mpe batikaki kolanda Ye.
67 So Jesus asked the Twelve, "Do you want to leave too?" Boye, Yesu alobaki na bantoma zomi na mibale : — Boni, bino mpe bolingi kokende ?
68 Simon Peter answered him, "Lord, to whom should we go? You have the words of eternal life. Simona Petelo azongisaki : — Nkolo, tokokende epai ya nani ? Yo nde ozali na maloba ya bomoi ya seko.
69 We have believed and known you are the Holy One of our Father." Biso, tondimi mpe toyebi ete ozali Mosantu ya Nzambe.
70 Jesus answered them, "Have I not chosen you, the Twelve? Yet one of you is a devil." Yesu alobaki na bango : — Boni, ezali Ngai te nde naponaki bino nyonso zomi na mibale ? Nzokande, moko kati na bino azali Satana !
71 He meant Judas, son of Simon Iscariot, one of the Twelve, who was about to betray him. Yesu azalaki nde koloba na tina na Yuda, mwana mobali ya Simona Isikarioti, oyo, kati na bantoma zomi na mibale, asengelaki koteka Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]