Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

John 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After this there was a feast of the Jews, and Jesus went up to Jerusalem. Sima na yango, Yesu akendeki na Yelusalemi mpo na feti moko ya Bayuda.
2 By the Sheep Gate in Jerusalem is a pool with five covered porches, called Bethesda in Aramaic. Nzokande, kuna na Yelusalemi, pene ya Ekuke ya Bameme, ezalaki na liziba moko oyo, na lokota ya Arami, bazalaki kobenga « Betesida. » Liziba yango ezalaki na baveranda mitano zingazinga na yango.
3 In these lay a multitude of the sick—blind, lame, and paralyzed. Babeli mingi bazalaki kolala na baveranda yango : bakufi miso, bato oyo batambolaka tengu-tengu mpe bato oyo bakufa makolo. [Bazalaki kozela ete mayi eningana,
4 Not in this edition pamba te anjelu moko na Nkolo azalaki koya tango na tango na liziba yango mpo na koningisa mayi. Soki mayi eningani, moto oyo azalaki kokita moto ya liboso kati na liziba azalaki kobika ata soki pasi na ye ezali ndenge nini.]
5 One man was there who had been sick for thirty-eight years. Ezalaki wana na moto moko oyo awumelaki na bokono mibu tuku misato na mwambe.
6 Seeing him lying there and knowing he had already been there a long time, Jesus asked, "Do you want to be healed?" Lokola Yesu amonaki ye alala na mabele mpe ayokaki ete awumeli mikolo ebele na pasi yango, atunaki ye : — Olingi kobika ?
7 The sick man answered him, "Sir, I have no one to put me in the pool once the water stirs—while I'm on my way, someone else gets in first." Mobeli azongiselaki Ye : — Nkolo, nazali na moto te mpo na kokitisa ngai kati na liziba soki mayi eningani. Wana nabundanaka mpo na kokita na mayi, moto mosusu akitaka liboso na ngai.
8 Jesus said to him, "Get up, take up your mat, and walk." Yesu alobaki na ye : — Telema, kamata etoko na yo mpe tambola.
9 At once the man became well, picked up his mat, and walked. That day was the Sabbath. Kaka na tango yango, moto yango abikaki ; akamataki etoko na ye mpe akomaki kotambola. Nzokande likambo yango esalemaki na mokolo ya Saba.
10 So the Jews told the healed man, "It's the Sabbath—you're not allowed to carry your mat." Boye, bakambi ya Bayuda balobaki na moto oyo abikisamaki : — Lelo ezali mokolo ya Saba ; ozali na ndingisa te ya komema etoko oyo.
11 He answered them, "The man who healed me told me, 'Take up your mat and walk.'" Azongiselaki bango : — Moto oyo abikisi ngai alobi na ngai : « Kamata etoko na yo mpe tambola. »
12 They asked him, "Who is the man who told you, 'Take it up and walk'?" Batunaki ye lisusu : — Nani alobi na yo bongo ?
13 But the healed man didn't know who it was, since Jesus had slipped away into the crowd there. Kasi moto oyo abikaki ayebaki te soki moto oyo abikisaki ye azali nani, pamba te Yesu alimwaki kati na ebele ya bato oyo bazalaki wana.
14 Later Jesus found him in the temple and said, "You are healed now. Stop sinning, or something worse may happen to you." Sima na mwa tango, Yesu amonaki, kati na lopango ya Tempelo, moto oyo abikaki. Alobaki na ye : — Tala, omoni ndenge okomi sik’oyo nzoto kolongono. Kosala lisusu masumu te, noki te likambo moko ya mabe koleka ekomela yo.
15 The man went away and told the Jews that it was Jesus who had made him well. Moto yango akendeki koyebisa bakambi ya Bayuda ete ezali Yesu nde abikisaki ye.
16 And so the Jews began persecuting Jesus, because he was doing these things on the Sabbath. Lokola Yesu azalaki kosala makambo wana na mokolo ya Saba, bakambi ya Bayuda bakomaki kofunda Ye.
17 But Jesus answered them, "My Father is working until now, and I too am working." Kasi Yesu alobaki na bango : « Tata na Ngai azali kosala kino sik’oyo, Ngai mpe nazali kosala. »
18 So the Jews sought even more to kill him: he not only broke the Sabbath but called our Father his own Father, making himself equal to him. Mpo na yango, bakambi ya Bayuda bakomaki koluka nzela ya koboma Ye ; pamba te azalaki kotosa te mokolo ya Saba, azalaki koloba ete Nzambe azali Tata na Ye, mpe Ye akokani na Nzambe.
19 So Jesus said to them, "Truly, truly, I tell you: the Son can do nothing on his own, but only what he sees the Father doing. Whatever the Father does, the Son does the same. Yesu alobaki na bango lisusu : Nazali koloba na bino penza ya solo : Mwana akoki kosala eloko moko te na ndenge na Ye moko, kasi azali kosala kaka makambo oyo azali komona Tata na Ye kosala ; pamba te makambo nyonso oyo Tata asalaka, yango mpe Mwana asalaka.
20 "For the Father loves the Son and shows him everything he does; he will show him greater works than these, so you will be amazed. Boye lokola Tata alingaka Mwana, yango wana alakisaka Ye makambo nyonso oyo Ye moko Tata asalaka ; kutu, akolakisa Ye lisusu kosala makambo minene koleka oyo bosili komona kino sik’oyo, mpo ete bokamwa.
21 For as the Father raises the dead and gives life, so the Son too gives life to anyone he wants. Ndenge kaka Tata asekwisaka bakufi mpe apesaka bango bomoi, ndenge wana mpe Mwana apesaka bomoi na moto oyo Ye alingi.
22 For the Father judges no one, but has entrusted all judgment to the Son, Lisusu, Tata asambisaka bato te ; apesa bokonzi ya kosambisa bato na maboko ya Mwana,
23 so everyone honors the Son as they honor the Father; whoever doesn't honor the Son doesn't honor the Father who sent him. mpo ete bato nyonso bakumisa Mwana ndenge bakumisaka Tata. Moto oyo akumisaka Mwana te akumisaka mpe Tata te oyo atindaki Mwana.
24 Truly, truly, I tell you: whoever hears my word and believes the one who sent me has eternal life and won't face judgment—they have passed from death to life. Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.
25 Truly, truly, I tell you, an hour comes, and is now here, when the dead will hear the voice of the Son of our Father, and those hearing will live. Nazali koloba na bino penza ya solo : tango ezali koya mpe esili kokoka oyo bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana na Nzambe, mpe ba-oyo bakoyoka yango bakozala na bomoi ;
26 For as the Father has life in himself, he gave the Son to also have life in himself. pamba te lokola Tata azali etima ya bomoi, yango wana asalaki mpe ete Mwana azala etima ya bomoi ;
27 And he has given him authority to execute judgment, because he is the Son of Man. mpe apesaki Ye bokonzi ya kosambisa bato, mpo ete azali Mwana na Moto.
28 Don't be astonished at this—an hour is coming when everyone in the tombs will hear his voice, Bokamwa yango te, pamba te tango ezali koya, tango oyo bato nyonso oyo bazali kati na bakunda bakoyoka mongongo na Ye
29 and come out—those who did good, to the resurrection of life; those who did evil, to the resurrection of judgment. mpe bakobima longwa kati na yango : ba-oyo basalaki malamu bakosekwa mpo na kozwa bomoi, kasi ba-oyo basalaki mabe bakosekwa mpo na kozwa etumbu.
30 By myself I can do nothing. I judge as I hear; my judgment is fair, because I seek not my own will but the will of the One who sent me. Nakoki kosala eloko moko te na ndenge na Ngai moko : nakataka makambo kolanda oyo nayokaka kowuta epai na Tata, mpe kosambisa na Ngai ezali sembo ; pamba te nalukaka te kosala mokano na Ngai moko, kasi mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.
31 "If I testify about myself, my testimony is not valid. Soki napesi litatoli mpo na Ngai moko, litatoli na Ngai ekozala ya solo te.
32 There is another who testifies about me, and I know his testimony about me is true. Boye esengeli ete motatoli mosusu apesa yango mpo na Ngai ; mpe nayebi ete litatoli oyo akopesa na tina na Ngai ezali ya solo.
33 You sent messengers to John, and he has testified to the truth. Botindaki bato epai ya Yoane, mpe ye atatolaki na tina na bosolo.
34 Not that I accept human testimony, but I say these things so that you may be saved. Ngai, nandimaka litatoli ya moto te ; kasi nalobi bongo mpo ete bobika.
35 John was a burning, shining lamp, and you were willing to rejoice briefly in his light. Solo, Yoane azalaki lokola mwinda oyo bapelisi mpe ezali kongenga. Kasi bino, boponaki kosepela na kongenga na ye kaka mpo na mwa tango moke.
36 But I have testimony greater than John's: the works my Father gave me to finish—the very works I'm doing—testify that my Father sent me. Nzokande Ngai, nazali na litatoli moko ya monene na tina na Ngai moko koleka kutu oyo ya Yoane : misala oyo nazali kosala na Kombo ya Tata etatolaka na tina na Ngai ete ezali Tata nde atindaki Ngai.
37 And my Father who sent me has himself testified about me. You've never heard his voice or seen his form, Ye moko, Tata, oyo atindaki Ngai atatolaki mpo na Ngai. Botikala nanu te koyoka mongongo na Ye mpe komona elongi na Ye ;
38 and you don't have his word remaining in you, since you don't believe the one he sent. mpe liloba na Ye ezali kati na bino te, pamba te bondima te Motindami na Ye.
39 You search the Scriptures, thinking they hold eternal life—yet they themselves testify about me, Bokundolaka Makomi na bokebi, mpo ete bokanisaka ete bokozwa bomoi ya seko kati na yango ; nzokande, Makomi yango etatolaka na tina na Ngai,
40 yet you refuse to come to me so that you may have life. kasi boboyi na bino koya epai na Ngai mpo na kozwa bomoi.
41 I do not accept glory from people, Nalukaka na Ngai te lokumu oyo ewutaka na bato.
42 but I know you—that you do not have the love of our Father within you. Kutu nayebi bino malamu, nayebi ete, kati na mitema na bino, bozali na bolingo te mpo na Nzambe.
43 I have come in my Father's name, and you don't receive me; if another comes in his own name, you'll receive him. Ngai, nayei na Kombo ya Tata na Ngai, kasi boboyi koyamba Ngai ! Nzokande, soki moto mosusu ayei na kombo na ye moko, bokoyamba ye.
44 How can you believe, when you accept glory from one another and don't seek the glory from the only God? Lokola bolukaka kaka kopesana lokumu bino na bino mpe boboyaka lokumu oyo ewutaka kaka na Nzambe, ndenge nini bokoki kondima Ngai ?
45 Don't think I will accuse you before my Father. Moses, in whom you've hoped, accuses you. Bokanisa te ete Ngai nde nakofunda bino liboso ya Tata na Ngai, ezali Moyize oyo bondimaka nde akofunda bino.
46 For if you believed Moses, you would believe me, because he wrote about me. Pamba te, soki penza bozalaki kondima Moyize, bolingaki mpe kondima Ngai ; pamba te akomaki na tina na Ngai.
47 But if you do not believe his writings, how will you believe my words?" Kasi soki bozali kondima ata makomi na ye te, ndenge nini bokondima maloba na Ngai ?
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]