Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

John 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 So when Jesus knew the Pharisees heard he was making and baptizing more disciples than John. Yesu ayokaki ete Bafarizeo bazwi sango oyo ezali koloba ete akomi na bayekoli ebele koleka Yoane mpe azali kobatisa bato mingi koleka Yoane.
2 (though Jesus himself was not baptizing, but his disciples were), (Nzokande, Yesu Ye moko azalaki kobatisa te, kasi ezalaki nde bayekoli na Ye.)
3 he left Judea and went back to Galilee. Boye, alongwaki na Yuda mpe azongaki na Galile.
4 And he had to pass through Samaria. Lokola asengelaki kolekela na Samari,
5 So he came to a town of Samaria called Sychar, near the field Jacob gave his son Joseph. akomaki na engumba Sishari ya Samari, oyo ezalaki mosika te na elanga oyo Jakobi apesaki epai ya mwana na ye, Jozefi.
6 Jacob's well was there. Jesus, tired from the trip, sat down at the well—about noon. Nzokande libulu ya mayi ya Jakobi ezalaki kati na elanga yango. Boye lokola Yesu alembaki nzoto mpo na mobembo, avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene ya ngonga ya midi.
7 A woman of Samaria came to draw water. Jesus said to her, "Give me a drink." Tango mwasi moko ya engumba Samari akendeki kotoka mayi, Yesu alobaki na ye : — Pesa Ngai mayi mpo ete namela.
8 (For his disciples had gone into the town to buy food.). (Bayekoli ya Yesu bakendeki na engumba mpo na kosomba biloko ya kolia).
9 The Samaritan woman said, "You're a Jew; why ask me, a Samaritan woman, for a drink?" (Jews don't associate with Samaritans.). Kasi mwasi yango alobaki : — Ebandi ndenge nini yo oyo ozali Moyuda osenga ngai, mwasi ya engumba Samari, mayi mpo ete omela ? —Pamba te Bayuda bazalaki koyokana te na bato ya Samari.—
10 Jesus answered her, "If you knew our Father's gift, and who asks you, 'Give me a drink,' you'd have asked him, and he'd have given you living water." Yesu azongiselaki ye : — Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.
11 The woman said to him, "Sir, you have nothing to draw with, and the well is deep. Where then do you get this living water? Mwasi alobaki na Yesu : — Nkolo, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo ; bongo mayi yango ya bomoi, olingaki kozwa yango wapi ?
12 Are you greater than our father Jacob, who gave us the well, drank from it himself, with his sons and livestock?" Koko na biso, Jakobi, apesa biso libulu oyo ; ye moko mpe amela mayi na yango, elongo na bana na ye mpe bibwele na ye. Boni, okanisi ete oleki ye ?
13 Jesus said to her, "Everyone who drinks of this water will be thirsty again, Yesu azongiselaki ye : — Moto nyonso oyo amelaka mayi oyo, ayokaka lisusu posa ya mayi ;
14 but whoever drinks the water I give him will never thirst again; that water will become in him a spring of water welling up to eternal life." kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te : mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko.
15 The woman said to him, "Sir, give me this water, so I won't get thirsty or come here to draw water." Mwasi yango alobaki na Yesu : — Nkolo, pesa ngai mayi yango mpo ete nayokaka lisusu posa ya mayi te mpe nazonga lisusu awa te mpo na kotoka mayi.
16 Jesus said to her, "Go, call your husband, and come back here." Yesu alobaki na ye : — Kende, benga mobali na yo mpe zonga awa.
17 The woman answered, "I have no husband." Jesus told her, "You're right to say you have no husband. Mwasi azongisaki : — Nazali na mobali te. Yesu alobaki na ye : — Ozali koloba penza ya solo ete ozali na mobali te,
18 For you've had five husbands, and the man you have now isn't your husband. You've spoken the truth." pamba te ozalaki na mibali mitano ; mpe ye oyo ozali na ye sik’oyo azali mpe mobali na yo te. Boye likambo oyo owuti koloba ezali ya solo.
19 The woman said to him, "Sir, I see that you are a prophet. Mwasi yango alobaki na Yesu : — Nkolo, namoni ete ozali mosakoli.
20 Our fathers worshiped on this mountain, but you say Jerusalem is where people must worship." Bakoko na biso, bato ya Samari, bagumbamelaki Nzambe na likolo ya ngomba oyo ; kasi bino, Bayuda, bolobaka ete esika epai wapi tosengeli kogumbamela ezali kati na Yelusalemi.
21 Jesus told her, "Woman, believe me: an hour is coming when you'll worship the Father neither on this mountain nor in Jerusalem. Yesu azongiselaki ye : — Mwasi, ndima Ngai : tango ezali koya, tango oyo bakogumbamela lisusu Tata te na likolo ya ngomba oyo to kati na Yelusalemi.
22 You worship what you don't know; we worship what we know—salvation comes from the Jews. Bino, bato ya Samari, bogumbamelaka nzambe oyo boyebi te ; kasi biso, togumbamelaka Nzambe oyo toyebi, pamba te lobiko ewuti epai ya Bayuda.
23 But a time is coming, and now is, when true worshipers worship the Father in spirit and truth—for the Father seeks such worshipers. Kasi tango ezali koya mpe esili na yango kokoka, tango oyo bagumbameli ya solo bokogumbamela Tata, kati na Molimo mpe kati na solo ; pamba te Tata alukaka bato oyo bogumbamelaka Ye na lolenge wana.
24 The Father is spirit, and those who worship him must worship in spirit and truth." Nzambe azali Molimo ; esengeli ete bato oyo bagumbamelaka Ye bagumbamela Ye kati na Molimo mpe kati na solo.
25 The woman said to him, "I know Messiah—the one called Christ—is coming. When he comes, he will tell us everything." Mwasi alobaki na Yesu : — Nayebi ete Masiya azali koya, Ye oyo babengaka Klisto ; mpe tango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso.
26 Jesus said to her, "I am he—the one speaking to you." Yesu alobaki na ye : — Nazali Masiya, Ngai oyo nazali koloba na yo.
27 Just then his disciples returned, amazed he was talking with a woman. Yet no one said, "What do you want?" or, "Why talk with her?" Kaka na tango yango, bayekoli ya Yesu bazongaki. Bakamwaki mingi komona Yesu kosolola na mwasi. Kasi moko te kati na bango amekaki kotuna Ye : « Ozali koluka nini ? » to « Mpo na nini ozali kosolola na ye ? »
28 So the woman left her water jar and went back to town and said to the people, Bongo mwasi atikaki mbeki na ye wana, azongaki na engumba mpe alobaki na bato :
29 "Come, see a man who told me everything I ever did. Could this be the Christ?" — Boya kotala moto oyo ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Akoki kozala Klisto te ?
30 They left the town and were coming to him. Bato babimaki longwa na engumba mpe bakendeki epai ya Yesu.
31 Meanwhile the disciples were urging him, "Rabbi, eat." Na tango yango, bayekoli bazalaki kosenga na Yesu : — Rabi, lia.
32 But he said to them, "I have food to eat that you know nothing about." Kasi Yesu azongiselaki bango : — Ngai, nakolia bilei oyo bino boyebi te.
33 So the disciples said to one another, "Has anyone brought him something to eat?" Bongo bayekoli na Ye balobanaki bango na bango : — Boni, ekoki kozala na moto oyo amemelaki Ye bilei ?
34 Jesus said to them, "My food is doing the will of the one who sent me and finishing his work. Yesu alobaki na bango : — Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.
35 Don't you say, 'Four months more, then harvest comes'? Look, I tell you: raise your eyes, see the fields—white for harvest. Bino bolobaka : « Etikali sanza minei mpo ete tobuka mbuma kati na bilanga. » Kasi Ngai, nazali koloba na bino : bofungola miso na bino mpe botala malamu bilanga ; bambuma ekomeli mpe ekoki mpo na kobuka.
36 Already the harvester earns wages, gathering fruit for eternal life, so that planter and harvester may rejoice together. Moto oyo azali kobuka azali komizwela lifuti mpe kosangisa bambuma mpo na bomoi ya seko. Boye, moloni mpe mobuki mbuma bazali kosepela elongo, bango mibale.
37 For here the saying holds true: 'One plants and another harvests.' Awa nde ekokisami bosolo ya lisese oyo elobaka : « Moko alonaka, mosusu abukaka. »
38 I sent you to reap what you didn't work for. Others worked, and you have entered into their labor." Natindaki bino kobuka bambuma ya elanga oyo bino bolonaki te ; ezali bato mosusu nde basalaki mosala, mpe bino bozali bobele kosepela na motoki ya bato mosusu.
39 Many Samaritans from that town believed in him because of the woman's testimony: "He told me everything I ever did." Bato mingi ya Samari, oyo bazalaki kovanda kati na engumba wana bandimelaki Yesu mpo na litatoli oyo mwasi azalaki kopesa : « Ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. »
40 When the Samaritans came to him, they asked him to stay with them; he stayed two days. Tango bato ya Samari bayaki epai ya Yesu, basengaki na Ye ete avanda elongo na bango ; mpe Yesu avandaki elongo na bango mikolo mibale.
41 And many more believed because of his word. Bato ebele koleka bakomaki kondimela Ye mpo na maloba oyo Ye moko azalaki koloba.
42 They told the woman, "It is no longer because of what you said that we believe—we've heard for ourselves, and we know this man truly is the Savior of the world." Bongo balobaki na mwasi wana : — Tondimi kaka te mpo na makambo oyo olobaki, pamba te biso moko toyoki sik’oyo mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili.
43 After the two days he departed from there for Galilee. Sima na mikolo mibale, Yesu alongwaki wana mpe akendeki na Galile.
44 (For Jesus himself had testified that a prophet has no honor in his own hometown.). Solo, Ye moko Yesu alobaki ete mosakoli azwaka lokumu te kati na ekolo na ye.
45 When he arrived in Galilee, the Galileans welcomed him, having seen all he did in Jerusalem at the feast—they too had gone to the feast. Tango akomaki na Galile, bato ya Galile bayambaki Ye, pamba te bango mpe bakendeki na Yelusalemi, na tango ya feti, mpe bamonaki makambo nyonso oyo asalaki kuna.
46 He went again to Cana in Galilee, where he had turned water to wine. A royal official's son was sick at Capernaum. Yesu ayaki lisusu na Kana ya Galile, epai wapi abongolaki mayi vino. Nzokande, na Kapernawumi, ezalaki na mokonzi moko ya basoda oyo mwana na ye ya mobali azalaki kobela.
47 Hearing that Jesus had come from Judea to Galilee, he went to him and begged him to come down and heal his son, who was about to die. Tango ayokaki ete Yesu akomi na Galile longwa na Yuda, akendeki kokutana na Ye mpe asengaki na Ye ete akende kobikisa mwana na ye ya mobali oyo akomi pene ya kokufa.
48 So Jesus said to him, "Unless you people see signs and wonders, you will never believe." Yesu alobaki na ye : — Boni, bokondima kaka soki bomoni bilembo mpe bikamwa ?
49 The royal official said to him, "Sir, come down before my child dies." Mokonzi wana ya basoda alobaki : — Nkolo na ngai, yaka noki liboso ete mwana na ngai ya mobali akufa.
50 Jesus said to him, "Go; your son will live." The man believed what Jesus told him and left. Yesu alobaki na ye : — Kende, mwana na yo ya mobali azali na bomoi. Moto yango andimaki maloba oyo Yesu alobaki mpe azongaki.
51 As he was going down, his servants met him and told him that his boy was living. Wana azalaki kozonga, basali na ye bayaki kokutana na ye mpe bayebisaki ye : — Mwana na yo ya mobali abiki na bokono na ye.
52 So he asked them the hour he improved, and they said, "Yesterday at the seventh hour, the fever left him." Atunaki bango soki ezalaki na ngonga nini mwana abikaki. Bazongisaki : — Fievele etikaki ye lobi oyo eleki, na ngonga ya liboso sima na midi.
53 So the father knew this was the hour when Jesus told him, "Your son will live." He and his whole household believed. Tata asosolaki ete ezalaki kaka na ngonga oyo Yesu alobaki na ye : « Mwana na yo ya mobali azali na bomoi. » Bongo ye elongo na bato nyonso ya ndako na ye bandimaki.
54 This was now the second sign that Jesus did when he had come from Judea to Galilee. Oyo nde ezalaki likamwisi ya mibale oyo Yesu asalaki sima na Ye kozonga na Galile longwa na Yuda.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]