Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

John 18 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After saying these things, Jesus went out with his disciples across the Kidron Valley, where a garden stood; he and his disciples entered it. Sima na Yesu kobondela, akendeki elongo na bayekoli na Ye mpe bakatisaki lubwaku ya Sedron epai wapi elanga moko ezalaki. Yesu akotaki na elanga yango elongo na bayekoli na Ye.
2 Judas the betrayer knew the place too, since Jesus often gathered there with his disciples. Yuda oyo asilaki komibongisa mpo na kokaba Yesu ayebaki esika yango malamu, pamba te Yesu azalaki kokende kuna mbala mingi elongo na bayekoli na Ye.
3 So Judas came there with a detachment of soldiers and officers from the chief priests and Pharisees, carrying lanterns, torches, and weapons. Boye Yuda akendeki na elanga yango mpe amemaki lisanga ya basoda mpe ya bakengeli oyo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bapesaki ye. Bato yango basimbaki minda, banzete oyo ezalaki kopela moto mpe bibundeli.
4 So Jesus, knowing all that was coming on him, went out and said to them, "Who are you looking for?" Lokola Yesu ayebaki makambo nyonso oyo esengeli kokomela Ye, akendeki kokutana na bango mpe atunaki bango : — Bozali koluka nani ?
5 They answered him, "Jesus of Nazareth." Jesus said, "I AM." Judas, his betrayer, stood with them. Bazongisaki : — Yesu ya Nazareti. Yesu alobaki na bango : — Ezali Ngai oyo. Mpe Yuda oyo atekaki Yesu epai na bango azalaki wana elongo na bango.
6 When Jesus said to them, "I AM," they drew back and fell to the ground. Tango Yesu alobaki na bango : « Ezali Ngai oyo, » bazongaki na sima mpe bakweyaki na mabele.
7 So he asked them again, "Who are you looking for?" And they said, "Jesus of Nazareth." Yesu atunaki bango lisusu : — Bozali koluka nani ? Bazongisaki : — Yesu ya Nazareti.
8 Jesus answered, "I told you I AM. So if you're looking for me, let these men go." Yesu alobaki na bango : — Nasili koloba na bino ete ezali Ngai. Soki ezali Ngai nde bozali koluka, botika bato mosusu kokende.
9 This fulfilled Jesus's own word: "I have not lost a single one of those you gave me." Ezali bongo nde esengelaki kokokisama, liloba oyo Yesu alobaki : « Kati na bato oyo opesaki ngai, nabungisi ata moko te. »
10 So Simon Peter drew his sword, struck the high priest's servant, and cut off his right ear—the servant named Malchus. Lokola Simona Petelo azalaki na mopanga, abimisaki yango wuta na ebombelo na yango, abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali. Kombo ya mosali yango ezalaki Malikisi.
11 So Jesus told Peter, "Sheath your sword. Shouldn't I drink the cup my Father has given me?" Kasi Yesu alobaki na Petelo : — Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango. Boni, nasengeli te komela kopo ya pasi, oyo Tata apesi Ngai ?
12 Then the troops, their commander, and the Jewish officers seized Jesus and tied him up. Lisanga ya basoda, mokonzi na bango mpe bakengeli ya Bayuda bakamataki Yesu mpe bakangaki Ye basinga ;
13 They took him to Annas first, for he was father-in-law to Caiaphas, high priest that year. bamemaki Ye liboso epai ya Ana oyo azalaki tata-bokilo ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, na mobu wana.
14 Caiaphas was the one who advised the Jews: better one man die for the people. Ezalaki mpe Kayifa wana nde apesaki Bayuda toli oyo : « Eleki malamu ete moto moko akufa mpo na bato nyonso. »
15 Simon Peter and another disciple followed Jesus. That disciple was known to the high priest, so he entered with Jesus into the high priest's courtyard, Simona Petelo mpe moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yesu. Moyekoli yango ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe akotaki elongo na Yesu na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe.
16 but Peter stood outside at the door. So the other disciple, known to the high priest, went out, spoke to the servant girl who kept the door, and brought Peter in. Petelo azalaki kozela libanda, na liboso ya ekuke. Moyekoli wana, oyo ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, abimaki, asololaki na mwasi mokengeli ekuke mpe akotisaki Petelo.
17 The servant girl guarding the door said to Peter, "You also are not one of this man's disciples, are you?" He said, "I'm not." Mwasi mosali oyo azalaki kokengela ekuke atunaki Petelo : — Boni, yo mpe ozali te moko kati na bayekoli ya moto wana ? Petelo azongisaki : — Nazali moyekoli na ye te.
18 The servants and officers, feeling the cold, had lit a charcoal fire and stood warming themselves; Peter stood with them, warming himself. Lokola malili ezalaki, basali mpe bakengeli bapelisaki moto mpe batelemaki pembeni-pembeni mpo na koyetola. Petelo mpe azalaki wana elongo na bango mpo na koyetola.
19 The high priest then questioned Jesus about his disciples and his teaching. Mokonzi ya Banganga-Nzambe apesaki Yesu mituna na tina na bayekoli na Ye mpe na tina na mateya na Ye.
20 Jesus answered him, "I spoke openly to the world; I always taught in synagogues and in the temple, where all the Jews gather. I said nothing in secret. Yesu azongiselaki ye : — Nazalaki koloba na polele penza na miso ya bato nyonso, nazalaki koteya tango nyonso kati na bandako ya mayangani mpe kati na Tempelo, epai wapi Bayuda nyonso basanganaka ; nalobaki eloko moko te na nkuku.
21 Why ask me? Ask those who heard what I said to them; they know what I said." Mpo na nini ozali kotuna Ngai mituna ? Tuna epai ya bato oyo bayokaki Ngai koloba. Ezali bango nde bakoki koyeba malamu makambo oyo nazalaki koloba.
22 At this, one of the guards nearby slapped Jesus, saying, "Is that how you answer the high priest?" Tango kaka Yesu alobaki bongo, moko kati na bakengeli oyo bazalaki wana abetaki Ye mbata na koloba : — Boni ! Ezali bongo nde ozali kozongisela mokonzi ya Banganga-Nzambe ?
23 Jesus answered him, "If I spoke wrongly, testify about the wrong; but if rightly, why do you strike me?" Yesu alobaki na ye : — Soki nalobi mabe, mabe yango ezali wapi ? Kasi soki nalobi na Ngai kaka solo, mpo na nini kobeta Ngai ?
24 Then Annas sent him, still bound, to Caiaphas the high priest. Bongo Ana atindaki Yesu oyo azalaki kaka ya kokangama na basinga, epai ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe.
25 Simon Peter, meanwhile, stood warming himself. They said, "Aren't you also one of his disciples?" He denied it: "I'm not." Wana Simona Petelo azalaki nanu koyetola moto, batunaki ye : — Yo mpe ozali te moko kati na bayekoli na ye ? Petelo awanganaki yango na koloba : — Te, nazali moyekoli na ye te.
26 One of the high priest's servants, a relative of the man whose ear Peter cut off, asked, "Didn't I see you with him in the garden?" Kasi moko kati na basali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe, ndeko mobali ya moto oyo Petelo akataki litoyi, alobaki : — Boni, ngai namonaki yo te elongo na ye kati na elanga ?
27 Peter again denied it, and at once a rooster crowed. Kasi Petelo awanganaki yango lisusu ; mpe mbala moko, soso elelaki.
28 Then they led Jesus from Caiaphas to the governor's headquarters. It was early morning. They themselves didn't enter, so they wouldn't be made unclean but could eat the Passover. Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika.
29 So Pilate went out to them and said, "What accusation do you bring against this man?" Yango wana moyangeli Pilato abimaki na libanda mpe atunaki bango : — Bofundi moto oyo mpo na likambo nini ?
30 They answered him, "If this man weren't doing wrong, we wouldn't have handed him over to you." Bazongiselaki ye : — Soki moto oyo asalaki mabe te, tolingaki mpe koya te kotika ye na maboko na yo.
31 Pilate said, "Take him yourselves and judge him by your own law." The Jews said, "We're not permitted to execute anyone." Pilato alobaki na bango : — Bokamata ye mpe bosambisa ye bino moko kolanda mibeko na bino. Bayuda bazongiselaki ye : — Biso tozali na ndingisa te ya kokatela moto etumbu ya kufa.
32 This fulfilled the word Jesus had spoken, showing what kind of death he was about to die. Ezali ndenge wana nde ekokisamaki maloba oyo Yesu alobaki mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengelaki kokufa.
33 So Pilate went back into the headquarters, summoned Jesus, and asked, "Are you the King of the Jews?" Pilato azongaki kati na ndako ya moyangeli, abengaki Yesu mpe atunaki Ye : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ?
34 Jesus answered, "Are you saying this on your own, or did others tell you about me?" Yesu azongisaki : — Boni, ezali na ndenge na yo moko nde olobi yango to bato mosusu nde bayebisi yo na tina na Ngai ?
35 Pilate replied, "Am I a Jew? Your own nation and chief priests handed you over to me. What have you done?" Pilato atunaki Yesu : — Boni, okanisi ete ngai nazali Moyuda ? Ezali bato ya ekolo na yo moko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe nde bayei kotika yo na maboko na ngai. Osali nini ?
36 Jesus answered, "My kingdom isn't from this world. If it were, my servants would fight against my being handed to the Jews. But my kingdom isn't from here." Yesu azongisaki : — Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te ; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.
37 Then Pilate said to him, "So you are a king?" Jesus answered, "You say I'm a king. I was born for this, and I came into the world for this—to testify to the truth. Everyone who belongs to the truth hears my voice." Pilato atunaki : — Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi ? Yesu azongisaki : — Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.
38 Pilate asked, "What is truth?" Then he went out to the Jews again and said, "I find nothing wrong in him. Pilato atunaki Ye : — Solo ezali nini ? Sima na koloba maloba wana, Pilato abimaki lisusu na libanda epai wapi Bayuda bazalaki mpe alobaki na bango : — Nazwi ye na likambo moko te ya mabe mpo ete nakatela ye etumbu ya kufa.
39 But you have a custom: I release one man to you at Passover. So do you want me to release the King of the Jews to you?" Kasi lokola ezali momesano epai na bino ete nabimisa na boloko mokangami moko, na tango ya feti ya Pasika, bozwa sik’oyo mokano. Bolingi ete natika mokonzi ya Bayuda mpo ete akoma nsomi ?
40 They cried out again, "Not this man, but Barabbas!" Now Barabbas was a robber. Bango nyonso bazongisaki na koganga : — Te ! Ye te ! Bimisa nde Barabasi ! Nzokande, Barabasi azalaki moyibi mpe mobomi bato.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]