Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

John 17 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After saying this, Jesus looked up to heaven and said: "Father, the hour has come. Glorify your Son, so the Son may glorify you, Sima na Yesu koloba bongo, atombolaki miso na Ye na Likolo mpe abondelaki : Tata, tango ekoki ; monisa nkembo ya Mwana na Yo mpo ete Mwana mpe amonisa nkembo na Yo ;
2 since you gave him authority over all people, to give eternal life to all you gave him. pamba te opesaki Ye bokonzi likolo ya bato nyonso, mpo ete apesa bomoi ya seko epai ya bato nyonso oyo opesaki Ye.
3 This is eternal life: that they know you, the only true Father, and Jesus Christ whom you sent. Nzokande, bomoi ya seko ezali : koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki.
4 I glorified you on the earth, having finished the work you gave me to do. Namonisi nkembo na Yo awa na mokili mpe nasilisi mosala oyo opesaki Ngai.
5 Father, glorify me now with yourself, with the glory I had with you before the world existed. Sik’oyo Tata, pesa Ngai lisusu nkembo oyo nazalaki na yango kuna epai Yo ozali liboso ete okela mokili.
6 I revealed your name to those you gave me from the world. They were yours; you gave them to me, and they have kept your word. Namonisi nkembo na Yo epai ya bato oyo opesaki Ngai sima na Yo kolongola bango na misala ya mokili. Bazalaki bato na Yo, kasi opesaki Ngai bango ; mpe batosi Liloba na Yo.
7 Now they know that everything you have given me is from you, Bayebi malamu sik’oyo ete nyonso oyo opesaki Ngai ewutaki solo epai na Yo ;
8 for I gave them the words you gave me; they received them, truly knew I came from you, and believed you sent me. pamba te nateyaki bango maloba oyo opesaki Ngai, mpe bayambaki yango na esengo ; bayebi ete nawutaki solo epai na Yo, mpe bandimi ete Yo nde otindaki Ngai.
9 I pray for them, not for the world, but for those you gave me, since they are yours. Nazali kobondela nde mpo na bango ; nazali kobondela te mpo na bato ya mokili, kasi mpo na bato oyo opesaki Ngai, mpo ete bazali bato na Yo.
10 Everything mine is yours, and yours is mine, and I am glorified in them. Bato na Yo nyonso bazali bato na Ngai, mpe bato na Ngai nyonso bazali bato na Yo ; mpe nkembo na Ngai ezali komonisama kati na bango.
11 I'm no longer in the world, but they are in the world, and I'm coming to you. Holy Father, keep them in your name, the name you gave me, so they may be one as we are. Kala mingi te, nakozala lisusu te kati na mokili, pamba te nazali koya epai na Yo ; kasi bango, bakokoba kozala kati na mokili. Tata na Ngai, Yo oyo ozali Mosantu, batela bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai, mpo ete bazala moko ndenge Yo na Ngai tozali moko.
12 While with them, I kept them in your name you gave me. I guarded them—none was lost except the son of destruction, so Scripture would be fulfilled. Wana nazalaki elongo na bango, nabatelaki bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai ; nabatelaki bango malamu, mpe moko te kati na bango abungaki, longola kaka ye oyo asengeli na libebi mpo ete Makomi ekokisama.
13 Now I come to you, and I say these things in the world so they may have my joy completed in themselves. Sik’oyo, nazali koya epai na Yo ; kasi nazali koloba makambo oyo tango nazali nanu kati na mokili mpo ete esengo na Ngai, oyo ezali ya kokoka, ezala kati na bango.
14 I've given them your word; the world hated them, since they're not of the world, just as I'm not of the world. Nateyaki bango maloba oyo oyebisaki Ngai, mpe mokili eyinaki bango mpo ete bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te.
15 I don't ask you to remove them from the world, but to guard them from the evil one. Nazali kosenga na Yo te ete olongola bango kati na mokili, kasi nde obatela bango liboso ya Satana.
16 They are not of the world, just as I am not of the world. Bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te.
17 Make them holy by truth; your word is truth. Bulisa bango na nzela ya bosolo na Yo, Liloba na Yo ya solo.
18 As you sent me into the world, so I have sent them into the world. Ndenge otindaki Ngai kati na mokili, ndenge wana mpe Ngai nazali kotinda bango.
19 For them I make myself holy, so they too may be made holy in truth. Namibonzaki mobimba epai na Yo mpo na bango, mpo ete bango mpe babulisama na nzela ya bosolo.
20 I pray not only for these, but also for those who will believe in me through their word. Nazali kobondela mpo na bango kaka te, kasi mpe mpo na bato oyo bakondima Ngai na nzela ya mateya na bango,
21 Father, let them all be one, as you're in me and I in you, so they're in us too, and the world believes you sent me. mpo ete bango nyonso bazala moko ndenge Yo Tata ozali kati na Ngai, mpe Ngai kati na Yo ; ete bango mpe bazala moko kati na biso, mpe ete mokili endima ete ezali Yo nde otindaki Ngai.
22 The glory you have given me, I have given them, so they may be one as we are one. Nasaleli bango ngolu ya kobika nkembo na Yo ndenge kaka osalaki mpo na Ngai, mpo ete bazala moko ndenge biso mpe tozali moko :
23 I in them and you in me, so they may be made completely one, so the world may know you sent me and loved them as you loved me. Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai.
24 Father, I want those you gave me to be with me where I am, to see my glory, which you gave me because you loved me before the world was made. Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili.
25 Righteous Father—the world doesn't know you, but I know you, and these know you sent me. Tata, Yo oyo ozali sembo, mokili eyebi Yo te ; kasi Ngai nayebi Yo, mpe bato oyo bayebi ete Yo nde otindaki Ngai.
26 I have made your name known to them, and will keep making it known, so the love you loved me with may be in them, and I in them." Nalakisi bango nguya ya Kombo na Yo, mpe nakokoba kolakisa bango yango, mpo ete bolingo oyo ozali na yango mpo na Ngai ezala kati na bango, mpe Ngai nazala kati na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]