Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

John 19 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Pilate took Jesus and had him flogged. Bongo Pilato apesaki mitindo ete bakamata Yesu, mpe abetisaki Ye fimbu.
2 The soldiers wove a crown of thorns, put it on his head, and wrapped a purple robe around him. Basoda basalaki ekoti na banzube mpe balatisaki Ye yango na moto ; balatisaki Ye lisusu nzambala ya motane.
3 They kept coming to him, saying, "Hail, King of the Jews!" and slapped his face. Bazalaki koya koloba na Ye : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! » Mpe babandaki kobeta Ye bambata.
4 Pilate went out again and said to them, "Look, I'm bringing him out to you, so you'll know I find no fault in him." Pilato abimaki lisusu mpe alobaki na bango : — Botala ! Nayei na Ye na libanda epai na bino mpo boyeba ete ngai nazwi Ye na mabe moko te.
5 So Jesus came out wearing the crown of thorns and the purple robe. Pilate told them, "Here is the man!" Boye, Yesu abimaki alata ekoti ya nzube mpe nzambala ya motane. Pilato alobaki na bango : — Moto yango, ye oyo !
6 When the chief priests and guards saw him, they shouted, "Crucify him! Crucify him!" Pilate told them, "Take him yourselves and crucify him, since I find no guilt in him." Tango kaka bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakengeli bamonaki Yesu, babandaki koganga : — Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu ! Kasi Pilato azongisaki : — Bino moko, bokamata ye mpe bobaka ye na ekulusu ; ngai nazwi ye na mabe ata moko te.
7 The Jews answered him, "We have a law; by that law he must die, because he made himself the Son of God." Bayuda balobaki na molende nyonso : — Tozali na Mobeko ; mpe kolanda Mobeko na biso, asengeli kokufa, pamba te amikomisi Mwana na Nzambe.
8 When Pilate heard this, he was even more afraid. Tango Pilato ayokaki maloba wana, abangaki lisusu makasi.
9 He went into headquarters again and asked Jesus, "Where are you from?" But Jesus gave him no answer. Azongaki lisusu kati na ndako ya moyangeli mpe alobaki na Yesu : — Ozali moto ya mboka nini ? Kasi Yesu apesaki ye eyano te.
10 So Pilate said to him, "You won't speak to me? Don't you know I have authority to release you, and authority to crucify you?" Pilato alobaki na Ye : — Boni, oboyi kozongisela ngai eyano ? Oyebi te ete ngai nazali na makoki ya kobaka yo na ekulusu mpe ya kotika yo ?
11 Jesus answered him, "You would have no authority over me at all unless it had been given you from above. That is why the one who handed me over to you bears the greater sin." Yesu alobaki na ye : — Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na Ngai soki epesamelaki yo te wuta na likolo. Yango wana, moto oyo akabi Ngai na maboko na yo asali lisumu monene koleka.
12 From then on, Pilate tried to release him, but the Jews cried out, "If you release him, you're no friend of Caesar. Anyone who makes himself king opposes Caesar." Kobanda kaka na ngonga wana, Pilato akomaki koluka nzela ya kotika Yesu ; kasi Bayuda babandaki lisusu koganga : — Soki otiki ye, wana ozali na yo moninga ya Sezare te ! Pamba te moto nyonso oyo amikomisi mokonzi azali monguna ya Sezare.
13 Hearing these words, Pilate brought Jesus out and sat on the judgment seat at a place called Stone Pavement—Gabbatha in Aramaic. Tango Pilato ayokaki bongo, amemaki Yesu na libanda mpe avandaki na esambiselo, na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gabata. »
14 It was Passover Preparation Day, about noon. He told the Jews, "Here is your King!" Ezalaki mokolo ya suka mpo na kokoma na mokolo ya Pasika, na ngonga ya midi. Pilato alobaki na Bayuda : — Botala mokonzi na bino !
15 They yelled, "Take him away! Take him away! Crucify him!" Pilate asked them, "Crucify your king?" The chief priests answered, "We have no king but Caesar." Kasi babandaki koganga : — Boma ye ! Boma ye ! Baka ye na ekulusu ! Pilato alobaki na bango lisusu : — Nasengeli penza kobaka mokonzi na bino na ekulusu ? Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazongisaki : — Tozali kaka na Sezare lokola mokonzi, mokonzi mosusu azali te !
16 So then he handed him over to them to be crucified. So they took Jesus, Pilato akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu. Boye, bakamataki Yesu mpe bakendeki na Ye.
17 carrying his own cross, he went out to the place called The Place of a Skull, called Golgotha in Aramaic. Yesu amemaki, Ye moko, ekulusu na Ye ; abimaki na engumba mpe akendeki na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gologota. »
18 There they crucified him, with two others, one on each side, Jesus in the middle. Ezalaki na esika yango nde babakaki Yesu na ekulusu, elongo na bato mosusu mibale : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
19 Pilate also wrote a sign and put it on the cross: Jesus of Nazareth, King of the Jews. Pilato akomaki na libaya, makomi oyo atiaki na ekulusu ; akomaki : Yesu, moto ya Nazareti, Mokonzi ya Bayuda.
20 Many Jews read this sign, since the place Jesus was crucified was near the city; it was written in Aramaic, Latin, and Greek. Lokola esika oyo babakaki Yesu na ekulusu ezalaki pene ya engumba, Bayuda ebele batangaki makomi yango, pamba te bakomaki yango na lokota ya Ebre, lokota ya latino mpe lokota ya Greki.
21 So the Jewish chief priests said to Pilate, "Don't write 'The King of the Jews,' but 'This man said, I am King of the Jews.'" Bakonzi ya Banganga-Nzambe balobaki na Pilato : — Osengelaki te kokoma : « Mokonzi ya Bayuda ; » osengelaki nde kokoma : « Moto oyo alobaki : ‹ Nazali mokonzi ya Bayuda. › »
22 Pilate answered, "What I have written, I have written." Kasi Pilato azongisaki : — Makambo oyo nakomi ekotikala kaka ndenge wana.
23 After crucifying Jesus, the soldiers took his clothes and split them into four shares, one per soldier, and took the tunic too. The tunic was seamless, woven in one piece from top to bottom. Sima na basoda kobaka Yesu na ekulusu, bakamataki bilamba na Ye mpe bakabolaki yango na biteni minei : soda moko na moko azwaki eteni moko. Bakamataki mpe nzambala na Ye, oyo ezalaki ya kotongama te, kasi ezalaki kaka elamba moko, kobanda na likolo kino na se.
24 So they said to each other, "Let's not tear it, but cast lots for who gets it." This was to fulfill the Scripture that says, "They divided my clothes among themselves, and cast lots for my garment." So the soldiers did this. Basoda balobanaki bango na bango : — Topasola yango te, kasi tobeta zeke mpo na koyeba soki nani akozwa yango. Esalemaki bongo mpo ete Makomi oyo ekokisama : « Bakabolaki bilamba na ngai kati na bango mpe babetaki zeke mpo na nzambala na ngai. » Ezali makambo wana nde basoda basalaki.
25 His mother, his mother's sister, Mary wife of Clopas, and Mary Magdalene stood near Jesus' cross. Tala bato oyo batelemaki pene ya ekulusu ya Yesu : Mama na Ye, ndeko mwasi ya mama na Ye, Mari oyo azalaki mwasi ya Klopasi, mpe Mari ya mboka Magidala.
26 Seeing his mother and the disciple he loved standing there, Jesus told her, "Woman, here is your son." Tango Yesu amonaki ete moyekoli oyo azalaki kolinga atelemi pembeni ya mama na Ye, alobaki na mama na Ye : — Mwasi, tala mwana na yo !
27 Then he said to the disciple, "Here is your mother." From that hour, the disciple took her into his home. Mpe alobaki na moyekoli yango : — Tala mama na yo ! Boye, kobanda na tango wana, moyekoli yango azwaki mama ya Yesu mpo ete akoma kovanda na ndako na ye.
28 After this, knowing all was now finished, Jesus said, to fulfill Scripture, "I am thirsty." Sima na yango, wana Yesu asosolaki ete makambo nyonso esili kosalema, abimisaki maloba oyo mpo ete Makomi ekokisama : — Nayoki posa ya mayi.
29 A jar full of sour wine sat there; they soaked a sponge in it, fixed it on a hyssop stalk, and lifted it to his mouth. Lokola ezalaki na mbeki moko etonda na vino ya ngayi pembeni ya esika yango, batiaki, na songe ya nzete moko ya izope, eponze moko epola na vino yango ya ngayi mpe batombolaki yango kino na monoko ya Yesu.
30 Jesus took the sour wine and said, "It is finished." He bowed his head and gave up his spirit. Tango kaka Yesu amelaki vino yango ya ngayi, alobaki : — Nyonso ekokisami. Bongo, akitisaki moto mpe azongisaki molimo na Ye.
31 Since it was Preparation Day, and they didn't want the bodies remaining on the cross during the Sabbath—that Sabbath was a special day—the Jews asked Pilate to break their legs and remove the bodies. Lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, mpe lokola Saba yango ezalaki na tina makasi, Bayuda balingaki te ete bibembe etikala na ba-ekulusu na tango ya Saba. Boye, bakendeki kosenga epai ya Pilato ete apesa mitindo ya kobuka makolo ya bibembe oyo ezalaki na likolo ya ba-ekulusu mpe ya kolongola banzoto na bango.
32 So soldiers came and broke the legs of the first man, then the other crucified with him. Basoda bayaki mpe babukaki makolo ya mibali nyonso mibale oyo babakaki na ba-ekulusu elongo na Yesu ; babandaki na moko, bongo balekaki na oyo mosusu.
33 But coming to Jesus, seeing he was already dead, they didn't break his legs. Wana ekomaki ngala ya makolo ya Yesu, bamonaki ete Yesu amikufelaki ; mpe babukaki lisusu te makolo na Ye.
34 But one of the soldiers pierced his side with a spear, and blood and water immediately came out. Moko kati na basoda atobolaki mopanzi ya Yesu na nzela ya likonga ; mpe mbala moko, makila mpe mayi ebimaki na mopanzi yango.
35 The eyewitness has testified—his testimony is true, and he knows he speaks the truth—so you also may believe. Moto oyo azali kopesa litatoli na tina na makambo oyo amonaki yango kosalema na miso na ye, mpe litatoli na ye ezali ya solo ; ayebi penza ete azali koloba solo mpo ete bino mpe bondima.
36 For these things happened to fulfill the Scripture: "Not one of his bones will be broken." Makambo nyonso wana esalemaki bongo mpo ete Makomi oyo ekokisama : « Bakobuka ata mokuwa na Ye moko te. »
37 And again another Scripture says, "They will look on the one they have pierced." Eteni mosusu ya Makomi elobi : « Bakotala Ye oyo batobolaki mopanzi. »
38 Afterward, Joseph of Arimathea—a disciple of Jesus, but secretly, for fear of the Jews—asked Pilate to let him remove Jesus' body. Pilate agreed, so he came and removed it. Sima na makambo wana, Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moyekoli ya Yesu, kasi na nkuku mpo ete azalaki kobanga Bayuda, asengaki epai ya Pilato ndingisa ya kokitisa nzoto ya Yesu longwa na ekulusu. Pilato apesaki ye ndingisa yango, mpe Jozefi akendeki mpe akitisaki nzoto ya Yesu.
39 Nicodemus, who had first come to Jesus at night, also came, bringing a mixture of myrrh and aloes, about seventy-five pounds. Nikodemi oyo, na ebandeli, akendeki kotala Yesu na butu, ye mpe ayaki ; amemaki bakilo pene tuku misato ya mafuta ya mire basangisa na aloe.
40 They took Jesus's body and wrapped it in linen cloths with spices, as is Jewish burial custom. Bango mibale bakamataki nzoto ya Yesu mpe balingaki yango na maputa ya lino oyo, kati na yango, batiaki mafuta ya solo kitoko, ndenge ezalaki momesano ya Bayuda mpo na kokunda bibembe.
41 Where he was crucified there was a garden, and in the garden a new tomb where no one had yet been laid. Pene ya esika oyo babakaki Yesu na ekulusu, ezalaki na elanga moko oyo, kati na yango, ezalaki na kunda moko ya sika epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te.
42 Because it was the Jewish Preparation day, and the tomb was near, they laid Jesus there. Lokola, mpo na Bayuda, ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, batiaki Yesu kati na kunda yango, pamba te ezalaki pene.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]