Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

John 20 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Early on the first day of the week, while dark, Mary Magdalene came to the tomb and saw the stone taken from it. Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana molili ezalaki nanu, Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki na kunda mpe amonaki ete libanga esilaki kolongolama na ekotelo ya kunda.
2 So she ran and came to Simon Peter and the other disciple, the one Jesus loved, and told them, "They've taken the Lord from the tomb, and we don't know where they put him." Apotaki mbangu mpo na kokende kokutana na Simona Petelo mpe moyekoli mosusu, ye oyo Yesu azalaki kolinga ; alobaki na bango : — Balongoli Nkolo wuta na kunda, mpe toyebi te soki batie Ye wapi !
3 So Peter and the other disciple set out and went toward the tomb. Petelo elongo na moyekoli wana bakendeki na kunda.
4 Both ran together, but the other disciple ran faster than Peter, reaching the tomb first. Bango mibale bazalaki kopota mbangu nzela moko ; kasi lokola moyekoli wana azalaki mbangu koleka Petelo, akomaki moto ya liboso na kunda.
5 And stooping down, he saw the linen cloths lying there, but he did not go in. Agunzamaki mpo na kotala mpe amonaki, na mabele, maputa oyo bakundaki na yango Yesu ; kasi akotaki te.
6 Simon Peter, following him, arrived and entered the tomb, and saw the linen cloths lying there, Simona Petelo oyo azalaki kolanda ye akomaki mpe akotaki kati na kunda, amonaki maputa oyo ezalaki na mabele
7 and the cloth that was on his head, not lying with the linen wrappings but folded separately in one place. mpe elamba oyo balingaki na moto ya Yesu ; elamba ezalaki esika moko te na maputa oyo balingaki na yango nzoto ya Yesu, kasi ezalaki ya kolingama na esika na yango moko.
8 The other disciple, first to reach the tomb, then went in too; he saw and believed. Bongo moyekoli oyo akomaki moto ya liboso kuna na kunda, ye mpe akotaki kati na kunda ; amonaki mpe andimaki.
9 For they still did not understand the Scripture, that he must rise from the dead. Kasi kino na tango wana, basosolaki nanu te ete Yesu asengelaki kosekwa kati na bakufi, kolanda ndenge Makomi ezali koloba.
10 Then the disciples went back to their homes. Sima na yango, bayekoli nyonso mibale bazongaki na esika oyo bazalaki kovanda.
11 But Mary stood outside the tomb, weeping. As she wept, she bent to look into the tomb. Nzokande, Mari atelemaki na libanda, pene ya kunda, mpe azalaki kolela. Mpe wana azalaki kolela, agunzamaki mpo na kotala kati na kunda ;
12 She saw two angels in white, seated where Jesus's body had lain, one at the head, one at the feet. amonaki ba-anjelu mibale balata bilamba ya pembe mpe bavanda na esika oyo nzoto ya Yesu ezalaki : moko na ngambo ya moto, mpe mosusu, na ngambo ya makolo.
13 They asked her, "Woman, why are you crying?" She answered, "They took my Lord, and I don't know where they put him." Ba-anjelu batunaki ye : — Mwasi, mpo na nini ozali kolela ? Azongisaki : — Nazali kolela mpo ete balongoli Nkolo na ngai mpe nayebi te soki batie Ye wapi ?
14 Saying this, she turned and saw Jesus standing there, not knowing it was Jesus. Tango alobaki bongo, abalukaki mpe amonaki Yesu atelemi wana, kasi ayebaki te ete ezali Yesu.
15 Jesus said to her, "Woman, why are you crying? Who are you seeking?" Taking him for the gardener, she said, "Sir, if you carried him off, tell me where you put him, and I'll take him away." Yesu atunaki ye : — Mwasi, mpo na nini ozali kolela ? Ozali koluka nani ? Mari akanisaki ete azali mosali elanga ; alobaki na ye : — Tata, soki yo nde moto olongolaki Ye, yebisa ngai esika nini otie Ye mpo ete nakende kokamata Ye.
16 Jesus said to her, "Mary." She turned and said to him in Aramaic, "Rabboni!" (which means Teacher). Yesu alobaki na ye : — Mari ! Mari abalukaki mpe alobaki na lokota ya Ebre : — Rabuni !
17 Jesus said to her, "Do not cling to me, for I have not yet ascended to the Father. But go to my brothers and say to them, 'I am ascending to my Father and your Father.'" Yesu alobaki na ye : — Kosimba Ngai te, pamba te nanu namati te epai ya Tata na Ngai. Kende nde epai ya bandeko na Ngai mpe yebisa bango ete nakeyi epai ya Tata na Ngai, oyo azali mpe Tata na bino ; epai ya Nzambe na Ngai, oyo azali mpe Nzambe na bino.
18 Mary Magdalene went and told the disciples, "I have seen the Lord," and that he had said these things to her. Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki koyebisa bayekoli ete awuti komona Nkolo ; ayebisaki bango lisusu makambo oyo Nkolo alobaki na ye.
19 That evening, the first day of the week, with the doors locked where the disciples were, for fear of the Jewish leaders, Jesus came, stood among them, and said, "Peace be with you." Na pokwa ya mokolo wana ya liboso ya poso, wana bayekoli basanganaki esika moko kati na ndako mpe bakangaki malamu bikuke mpo ete bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda, Yesu ayaki, atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !
20 After saying this, he showed them his hands and side. The disciples rejoiced to see the Lord. Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko na Ye mpe mopanzi na Ye. Bayekoli batondaki na esengo tango bamonaki Nkolo.
21 Jesus said to them again, "Peace to you. As the Father has sent me, so I send you." Yesu alobaki na bango lisusu : — Tika ete kimia ezala na bino ! Ndenge Tata atindaki Ngai, Ngai mpe nazali kotinda bino.
22 After saying this, he breathed on them and said to them, "Receive the Holy Spirit. Sima na Yesu koloba makambo wana, afulaki bango mopepe mpe alobaki na bango : — Boyamba Molimo Mosantu !
23 If you forgive anyone's sins, they're forgiven; if you hold back forgiveness from anyone, it's held back." Bato oyo bokolimbisa masumu na bango, masumu na bango ekolimbisama ; kasi ba-oyo bokolimbisa te, bakozwa mpe bolimbisi te.
24 Now Thomas, one of the Twelve, called the Twin, was not with them when Jesus came. Toma, moko kati na bayekoli zomi na mibale, oyo babengaka Lipasa, azalaki te elongo na bayekoli tango Yesu ayaki.
25 The other disciples kept telling him, "We've seen the Lord!" But he told them, "Unless I see the nail marks in his hands, put my finger where they were, and put my hand in his side, I'll never believe." Bayekoli mosusu balobaki na ye : — Towuti komona Nkolo ! Kasi Toma azongiselaki bango : — Soki ngai namoni te bilembo ya basete na maboko na Ye, soki natie mosapi na ngai te kati na bisika oyo basete etobolaki Ye, mpe soki natie te loboko na ngai kati na mopanzi na Ye, nakotikala kondima te.
26 Eight days later, his disciples were indoors again, Thomas with them. Though the doors were locked, Jesus came, stood among them, and said, "Peace be with you." Sima na mikolo mwambe, bayekoli ya Yesu basanganaki lisusu kati na ndako. Na mbala oyo, Toma mpe azalaki elongo na bango, mpe bikuke ezalaki ya kokangama. Yesu ayaki, atelemaki kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !
27 Then he said to Thomas, "Put your finger here, see my hands. Reach your hand out, put it in my side. Leave doubt behind—believe." Bongo, alobaki na Toma : — Tia mosapi na yo awa, tala maboko na Ngai ; sembola loboko na yo mpe tia yango na mopanzi na Ngai. Kozala te moto oyo azangi kondima, kasi moto na kondima !
28 Thomas answered him, "My Lord and my God!" Toma azongiselaki Yesu : — Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai !
29 Jesus said to him, "Have you believed because you've seen me? Blessed are those who haven't seen, yet believe." Yesu alobaki na ye : — Ondimi mpo ete omoni Ngai ! Esengo na bato oyo bamoni te, kasi bandimi !
30 Jesus did many other signs before his disciples, not written in this book. Yesu asalaki lisusu, na miso ya bayekoli na Ye, bikamwa mosusu mingi oyo ekomami te kati na buku oyo.
31 But these are written so you'll believe Jesus is the Christ, the Son of our Father, and by believing have life in his name. Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe ; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]