Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joel 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
4:1 "For look, in those days and at that time, when I restore the fortunes of Judah and Jerusalem, « Na mikolo mpe na tango wana, tango nakozongisa bakangami ya Yuda mpe ya Yelusalemi,
4:2 I will gather all the nations and bring them down to the Valley of Jehoshaphat. There I will judge them on behalf of my people, my inheritance Israel, whom they scattered among the nations; for they divided up my land, nakosangisa bato ya bikolo nyonso mpe nakokitisa bango na lubwaku ya Jozafati. Nakosambisa bango kuna na tina na libula na Ngai, Isalaele, bato na Ngai ; pamba te bapanzi bato na Ngai kati na bikolo mpe bakaboli mokili na Ngai.
4:3 and they cast lots for my people. They traded a boy for a prostitute, and sold a girl for wine to drink. Babeti zeke mpo na kokabola bato na Ngai, bapesi bilenge mibali basi ya ndumba, bateki bilenge basi mpo na kozwa kaka vino, mpe balangwe yango.
4:4 "Now what do you have against me, Tyre and Sidon, and all the regions of Philistia? Are you repaying me for something I have done? If you are paying me back, I will swiftly and speedily bring what you have done back on your own heads. Eh bongo bino, Tiri mpe Sidoni, bituka ya bato ya Filisitia, likambo nini lisusu kati na Ngai mpe bino ? Bolingi kozongisela Ngai mabe to kotombokela Ngai ? Soki yango nde ezali makanisi na bino, Ngai nde nasengeli kozongisela bino mabe na lombangu.
4:5 For you took my silver and my gold and carried my finest treasures into your temples. Pamba te bozwaki palata mpe wolo na Ngai, bomengo na Ngai ya motuya makasi mpe bomemaki yango na batempelo na bino.
4:6 You sold the people of Judah and Jerusalem to the Greeks, to send them far away from their own land. Botekaki bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi epai ya Bagreki mpo na komema bango mosika ya mokili na bango.
4:7 "But look, I am rousing them from the place to which you sold them, and I will bring what you have done back on your own heads. Ngai moko nakopesa bango makasi mpo ete babima na bisika nyonso epai wapi botekaki bango.
4:8 I will sell your sons and daughters to the people of Judah, and they will sell them to the Sabeans, to a nation far away—for our Father has spoken." Nakoteka bana na bino ya mibali mpe ya basi epai ya bato ya Yuda, mpe bango bakoteka bango epai ya bato ya Sabe, ekolo ya mosika penza, » elobi Yawe.
4:9 Proclaim this among the nations: Prepare for war! Rouse the warriors! Let all the fighting men draw near and come up. « Bosakola likambo oyo kati na bikolo : Bobulisa mampinga mpo na bitumba ! Bolamusa bilombe ! Tika ete bilombe nyonso ya bitumba bapusana mpe baya !
4:10 Beat your plowshares into swords and your pruning hooks into spears; let the weakling say, "I am a warrior." Bosala mipanga, na nzela ya bakongo na bino ; mpe makonga, na nzela ya bipasola na bino ! Tika ete moto na bolembu aloba : ‹ Nazali makasi. ›
4:11 Hurry and come, all you surrounding nations, and gather yourselves there. Bring down your warriors, our Father. Bino bikolo nyonso ya zingazinga, boya na lombangu mpe bosangana ! Oh Yawe, kitisa bilombe na Yo !
4:12 "Let the nations rouse themselves and come up to the Valley of Jehoshaphat; for there I will sit to judge all the surrounding nations. Tika ete bikolo nyonso elamuka mpe emata kino na lubwaku ya Jozafati ! Pamba te kuna nde nakovanda mpo na kosambisa bikolo nyonso ya zingazinga.
4:13 Swing the sickle, for the harvest is ripe. Come, trample, for the winepress is full and the vats overflow—for their wickedness is great." Bosimba bambeli, pamba te bambuma eteli. Boya, bokamola bambuma ya vino, pamba te ekamolelo etondi, banzungu etondi, mabe na bango eleki ndelo.
4:14 Multitudes, multitudes in the valley of decision! For the day of our Father is near in the valley of decision. Bato bazali ebele, ebele penza, na lubwaku ya kosambisama. Mokolo ya Yawe ekomi pene, na lubwaku ya kosambisama.
4:15 The sun and the moon grow dark, and the stars hold back their light. Sanza mpe moyi ekoyinda, minzoto ekongenga lisusu te.
4:16 Our Father roars from Zion and raises his voice from Jerusalem; the heavens and the earth tremble. But our Father is a refuge for his people, a stronghold for the children of Israel. Wuta na Siona, Yawe akoloba makasi ; wuta na Yelusalemi, akoloba na mongongo makasi lokola kake ; Lola mpe mabele ekoningana. Kasi Yawe akozala ekimelo mpo na bato na Ye, engumba batonga makasi mpo na bana ya Isalaele.
4:17 "Then you will know that I am your Father, living in Zion, my holy mountain. Jerusalem will be holy, and foreigners will never pass through it again. Boye, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino ; navandaka na Siona, ngomba na Ngai ya bule. Yelusalemi ekozala engumba ya bule, bapaya bakolekela lisusu wana te.
4:18 "And in that day the mountains will drip with sweet wine, the hills will flow with milk, and all the streambeds of Judah will run with water. A spring will flow from my house and water the Valley of Acacias. Na mokolo wana, bangomba ekotangisa vino ya sika, mpe miliki ekotanga na bangomba mikuse. Miluka nyonso ya Yuda ekotonda na mayi, etima moko ya mayi ekobima wuta na Tempelo ya Yawe mpe ekosopela lubwaku ya banzete ya akasia mayi.
4:19 Egypt will become a wasteland and Edom a desolate wilderness, because of the violence done to the people of Judah, in whose land they shed innocent blood. Kasi mokili ya Ejipito ekobebisama, mokili ya Edomi ekokoma esobe mpo na makambo mabe oyo basalaki epai ya bato ya Yuda, pamba te basopaki makila ya bato ya Yuda na mabele na bango, atako basalaki mabe te.
4:20 But Judah will be inhabited forever, and Jerusalem through all generations. Bato bakokoma kovanda na mokili ya Yuda mpo na libela, mpe na engumba Yelusalemi, libela na libela.
4:21 I will cleanse the guilt of the blood shed against them—which I have not yet cleansed—for our Father dwells in Zion." Nakopetola bino mpo na ngambo ya makila, mpo ete nanu napetola bino te. » Yawe akovanda na Siona.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]