Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 39 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In Zedekiah king of Judah's ninth year, tenth month, Nebuchadnezzar king of Babylon came with all his army against Jerusalem and besieged it. Tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu libwa na bokonzi, na sanza ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi mpe azingelaki yango.
2 In Zedekiah's eleventh year, in the fourth month, on the ninth of the month, the city was broken into. Tango Sedesiasi akokisaki mibu zomi na moko na bokonzi, na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba.
3 Then all the officials of the king of Babylon came and sat in the Middle Gate: Nergal-Sharezer, Samgar-Nebo, Sarsechim the Rab-saris, Nergal-Sharezer the Rab-mag, and the rest of the king of Babylon's officials. Bakalaka nyonso ya mokonzi ya Babiloni bakotaki kati na engumba mpe bayaki kovanda na Ekuke ya kati-kati. Ezalaki Nerigali-Saretseri, Samigari-Nebu ; Sarisekimi, mokonzi ya bakalaka ya lokumu ; Nerigali-Saretseri, mokonzi ya liboso ya mampinga, mpe bakonzi mosusu ya basoda ya mokonzi ya Babiloni.
4 When Zedekiah king of Judah and all the soldiers saw them, they fled the city by night through the king's garden, by the gate between the two walls; and he went out toward the Arabah. Tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, mpe basoda nyonso bamonaki bongo, bakimaki, babimaki na engumba butu-butu, na nzela ya elanga ya mokonzi, na Ekuke oyo ezali na kati-kati ya bamir mibale ; bakendeki na nzela ya lubwaku ya Yordani.
5 But the Babylonian army pursued them and caught Zedekiah on the plains of Jericho. They seized him and took him to Nebuchadnezzar king of Babylon at Riblah in the land of Hamath, where he passed sentence on him. Kasi basoda ya Babiloni balandaki bango mpe bakangaki Sedesiasi, na etando ya Jeriko ; bazwaki ye mpe bamemaki ye na Ribila, kati na mokili ya Amati, epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, oyo akatelaki ye etumbu.
6 The king of Babylon slaughtered Zedekiah's sons at Riblah before his eyes, and slaughtered all Judah's nobles. Kuna na Ribila, mokonzi ya Babiloni apesaki mitindo ete bakata, na miso na ye, mito ya bana mibali ya Sedesiasi mpe ya bankumu nyonso ya Yuda.
7 Then he blinded Zedekiah and bound him in bronze chains to bring him to Babylon. Apesaki lisusu mitindo ete batobola miso ya Sedesiasi, bakanga ye minyololo ya bibende ya bronze mpo na komema ye na Babiloni.
8 The Babylonians burned the king's house and the people's houses with fire, and tore down Jerusalem's walls. Basoda ya Babiloni batumbaki ndako ya mokonzi mpe bandako ya bato, mpe babukaki bamir ya Yelusalemi.
9 Nebuzaradan, captain of the guard, exiled to Babylon the rest of the people left in the city, the deserters who had gone over to him, and the rest of the people who remained. Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu, na Babiloni, bato oyo batikalaki kati na engumba elongo na bato oyo bayaki komitika bango moko epai na ye, mpe bato mosusu.
10 Nebuzaradan, captain of the guard, left some of the poorest people, who owned nothing, in Judah, and gave them vineyards and fields that day. Kasi Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atikaki kati na mokili ya Yuda, babola oyo bazalaki ata na eloko moko te ; apesaki bango bilanga ya vino mpe bilanga.
11 Now Nebuchadnezzar king of Babylon had given orders concerning Jeremiah through Nebuzaradan, captain of the guard, saying, Nzokande, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, apesaki mitindo oyo epai ya Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, na tina na mosakoli Jeremi :
12 "Take him and look after him; do him no harm, but do whatever he asks." « Kamata ye, batela ye, kosala ye mabe te ; kasi salela ye makambo nyonso oyo akosenga yo. »
13 So Nebuzaradan the guard captain sent word, with Nebushazban the Rab-saris, Nergal-Sharezer the Rab-mag, and all the king of Babylon's chief officers. Boye, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi ; Nebutsasibani, mokonzi ya bakalaka ya lokumu ; Nerigali-Saretseri, mokonzi ya liboso ya mampinga, mpe bakonzi nyonso ya basoda ya mokonzi ya Babiloni
14 They brought Jeremiah from the guard's courtyard and gave him to Gedaliah son of Ahikam, son of Shaphan, to take home. So he stayed among the people. batindaki ete bazwa Jeremi kati na lopango ya mokonzi mpe bapesaki ye na maboko ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, mpo ete azongisa ye na ndako na ye. Boye Jeremi awumelaki kati na bato na ye.
15 The word of our Father came to Jeremiah while he was confined in the courtyard of the guard: Wana Jeremi azalaki ya kokangama kati na lopango ya bakengeli, Yawe alobaki na ye :
16 "Go tell Ebed-Melech the Cushite: This is what the Father of heaven's armies, the Father of Israel, says: I am bringing my words against this city for harm, not good, and on that day they will come true before you. — Kende koyebisa Ebedi-Meleki, moto ya Kushi : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakomi pene ya kokokisa makambo oyo nalakaki mpo na engumba oyo, makambo ya pasi kasi ya esengo te ; tango makambo yango ekokokisama, ekosalema na miso na yo.
17 But I will rescue you that day, declares our Father; you won't be handed over to the men you fear. Kasi na mokolo wana, nakobatela yo, › elobi Yawe, ‹ okokabama te na maboko ya bato oyo yo ozali kobanga.
18 I will rescue you; you will not fall by the sword. Your life will be your prize of war, because you trusted in me, declares our Father." Solo, nakobikisa yo, mpe okokufa na mopanga te ; kasi bomoi na yo ekozala bomengo na yo ya bitumba, pamba te otielaka Ngai elikya, elobi Yawe. › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]