Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 40 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word to Jeremiah from our Father after Nebuzaradan, guard captain, freed him at Ramah, having taken him chained among all the exiles of Jerusalem and Judah being carried to Babylon. Yawe alobaki na Jeremi tango Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, abikisaki ye na Rama. Akutaki Jeremi bakanga ye na minyololo kati na molongo ya bakangami oyo bawutaki na Yelusalemi mpe na Yuda, oyo bazalaki komema na bowumbu kuna na Babiloni.
2 The guard captain took Jeremiah and told him, "Your God declared this disaster against this place. Tango mokonzi ya bakengeli ya mokonzi amemaki Jeremi, alobaki na ye : — Yawe, Nzambe na yo, asilaki kokata ete pasi oyo ekokweya na esika oyo ;
3 The LORD brought it about and did just as he said, because you all sinned against the LORD, disobeyed him - so this happened to you. mpe sik’oyo akokisi yango, asali ndenge kaka akanaki kosala. Makambo oyo nyonso esalemi mpo ete bino, bato, bosalaki masumu liboso ya Yawe mpe batosaki Ye te.
4 Look, today I release you from the chains on your hands. If it's good to come with me to Babylon, come—I'll watch over you. If not, don't: the whole land is before you; go wherever seems right." Kasi na mokolo ya lelo, nazali kokangola yo na minyololo oyo bakangaki yo na maboko. Soki olingi, yaka elongo na ngai na mokili ya Babiloni mpe nakobatela yo ; kasi soki mpe oboyi, koya te. Tala, mokili mobimba ezali liboso na yo ; kende esika nyonso olingi.
5 Before Jeremiah left, Nebuzaradan said, "Return to Gedaliah son of Ahikam, son of Shaphan, whom Babylon's king set over Judah's cities—live with him among the people, or go wherever you think best." Then the guard captain gave him food, a gift, and sent him off. Lokola Jeremi azalaki kowumela kopesa eyano, Nebuzaradani abakisaki : — Zonga epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami mpe koko ya Shafani, oyo mokonzi ya Babiloni akomisi moyangeli ya bingumba ya Yuda, mpe vanda epai na ye kati na bato na yo to kende esika nyonso olingi. Bongo mokonzi ya bakengeli ya mokonzi apesaki ye bilei mpe bakado, mpe atikaki ye kokende.
6 Jeremiah went to Gedaliah son of Ahikam at Mizpah, staying with him among those left in the land. Jeremi akendeki na Mitsipa epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mpe avandaki esika moko na ye kati na bato oyo batikalaki kati na mokili.
7 When all the field commanders and their men heard that the king of Babylon had appointed Gedaliah son of Ahikam over the land, charging him with the men, women, and children—the poorest of the land not exiled to Babylon. Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango, oyo bazalaki ya kopanzana kati na etuka, bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, moyangeli kati na mokili mpe apesi ye mokumba ya kokamba babola, mibali, basi mpe bana oyo bakendeki te na bowumbu na Babiloni,
8 To Gedaliah at Mizpah came: Nethaniah's son Ishmael, Kareah's sons Johanan and Jonathan, Tanhumeth's son Seraiah, the Netophathite Ephai's sons, and the Maacathite's son Jezaniah—they and their men. bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango : Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; Yoanani mpe Jonatan, bana mibali ya Karea ; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti ; bana mibali ya Efayi, moto ya Netofa ; mpe Yezania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati ; bakendeki kuna elongo na basoda na bango.
9 Gedaliah son of Ahikam, son of Shaphan, swore to them and their men: "Don't fear serving the Babylonians. Live in the land, serve Babylon's king, and you'll be fine. Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, alapaki ndayi liboso na bango mpe basoda na bango na maloba oyo : « Bobanga te kosalela bato ya Babiloni, bovanda kati na mokili, bosalela mokonzi ya Babiloni mpe bokozala na bino malamu.
10 I will stay at Mizpah, representing you before the Babylonians who come to us. But gather wine, summer fruit, and oil, store them in your jars, and live in the cities you've taken." Ngai, nakotikala na Mitsipa mpo na kolobela bino liboso ya bato ya Babiloni, oyo bazali koya epai na biso. Kasi bino, bobuka bambuma ya vino, bambuma mosusu, bokamola mafuta mpe bobomba yango na bibombelo na bino, bongo bovanda kati na bingumba oyo bosili kozwa. »
11 All Judeans in Moab, Ammon, Edom, and every land also heard Babylon's king had left a remnant in Judah and appointed over them Gedaliah son of Ahikam, son of Shaphan. Tango Bayuda nyonso oyo bakimelaki na mokili ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi mpe na mikili mosusu bayokaki ete mokonzi ya Babiloni atikaki ndambo ya bato kati na Yuda mpe akomisaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, moyangeli na bango,
12 All the Judeans returned from wherever they'd scattered, came to Gedaliah at Mizpah in Judah, and gathered abundant wine and summer fruit. bango nyonso balongwaki na mikili nyonso epai wapi bazalaki ya kopanzana mpe bazongaki kati na Yuda, epai ya Gedalia, kuna na Mitsipa, mpe babukaki bambuma ya vino mpe bambuma mosusu ebele.
13 Johanan son of Kareah and all the army commanders in the countryside came to Gedaliah at Mizpah, Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki ya kopanzana kati na etuka bayaki na Mitsipa epai ya Gedalia
14 and said, "Don't you know Ammon's king Baalis sent Ishmael son of Nethaniah to kill you?" But Gedaliah son of Ahikam disbelieved them. mpe balobaki na ye : — Oyebi te ete Balisi, mokonzi ya bato ya Amoni, atindi Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpo na koboma yo ? Kasi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, andimelaki bango te.
15 Then Johanan son of Kareah told Gedaliah at Mizpah in secret, "Let me kill Ishmael son of Nethaniah—no one will know. Why let him take your life and scatter all the Judeans gathered to you, so Judah's remnant dies?" Boye, Yoanani, mwana mobali ya Karea, ayebisaki Gedalia na nkuku, na Mitsipa : — Pesa ngai nzela ete nakende koboma Isimaeli, mwana mobali ya Netania ! Moto moko te akoyeba yango. Mpo na nini aboma yo ? Mpo na nini Bato nyonso ya Yuda, oyo bazali pene na yo bapanzana mpe ndambo oyo bakotikala bakufa ?
16 But Gedaliah son of Ahikam told Johanan son of Kareah, "Don't do this; you're lying about Ishmael." Kasi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, alobaki na Yoanani, mwana mobali ya Karea : — Kosala bongo te ! Makambo oyo ozali koloba mpo na Isimaeli ezali makambo ya lokuta.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]