Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 41 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In the seventh month Ishmael son of Nethaniah, son of Elishama, of royal lineage and a king's chief officer, came with ten men to Gedaliah son of Ahikam at Mizpah. There they ate a meal together at Mizpah. Na sanza ya sambo, Isimaeli, mwana mobali ya Netania mpe koko ya Elishama, oyo azalaki na molongo ya libota ya bokonzi mpe moko kati na bakengeli ya mokonzi, ayaki elongo na basoda zomi epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, na Mitsipa. Wana bazalaki kolia na Mitsipa,
2 Ishmael son of Nethaniah got up, along with the ten men with him, and they struck Gedaliah son of Ahikam, son of Shaphan, with the sword, killing the man the king of Babylon had appointed over the land. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, elongo na basoda wana zomi oyo bazalaki elongo na ye babomaki na mopanga Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, oyo mokonzi ya Babiloni akomisaki moyangeli kati na mokili.
3 Ishmael also killed all the Jews with Gedaliah at Mizpah, and the Babylonian soldiers found there—the fighting men. Isimaeli abomaki lisusu Bayuda oyo bazalaki elongo na Gedalia, na Mitsipa, elongo na basoda ya Babiloni oyo bazalaki wana.
4 On the second day after Gedaliah had been killed, before anyone knew of it, Mokolo oyo elandaki kufa ya Gedalia, liboso ete sango eyebana epai ya bato,
5 eighty men from Shechem, Shiloh, and Samaria came—beards shaved, clothes torn, bodies slashed—carrying grain offerings and incense to our Father's house. bato tuku mwambe bawutaki na Sishemi, na Silo mpe na Samari ; bazalaki na mandefu bakata, bilamba epasuka-pasuka, mpe bamizokisaki-zokisaki bapota na banzoto. Bamemaki makabo ya bagato mpe malasi ya ansa mpo na kobonza yango kati na Tempelo ya Yawe.
6 Ishmael son of Nethaniah left Mizpah to meet them, weeping as he went. On meeting them he said, "Come to Gedaliah son of Ahikam." Isimaeli, mwana mobali ya Netania, abimaki na Mitsipa mpo na kokende kokutana na bango ; wana azalaki kokende kokutana na bango, azalaki kolela nzela-nzela. Bongo tango akutanaki na bango, alobaki na bango : — Boya kotala Gedalia, mwana mobali ya Ayikami !
7 When they came into the city's midst, Ishmael son of Nethaniah and his men killed them, throwing them into the cistern's midst. Tango bakotaki kati na engumba, Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpe bato oyo bazalaki elongo na ye babomaki bango mpe babwakaki bango na libulu.
8 Ten of them told Ishmael, "Don't kill us—we have wheat, barley, oil, and honey hidden in the field." So he spared them, not killing them with the rest. Kasi bato zomi kati na bango balobaki na Isimaeli : — Koboma biso te ! Tozali na ble, na orje, na mafuta mpe na mafuta ya nzoyi, oyo tobombaki kati na bilanga. Boye, abomaki bango lisusu te, abikisaki bango elongo na bandeko na bango.
9 The cistern where Ishmael threw all the bodies of the men he killed was the large one King Asa had made because he feared Baasha king of Israel. Ishmael son of Nethaniah filled it with the dead. Libulu epai wapi Isimaeli abwakaki bato nyonso oyo abomaki ezalaki libulu ya Gedalia, libulu oyo mokonzi Asa asalaki mpo na komibatela liboso ya Baesha, mokonzi ya Isalaele. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, atondisaki yango na bibembe ;
10 Ishmael captured all the rest of the people at Mizpah—the king's daughters, everyone left at Mizpah—whom Nebuzaradan, captain of the guard, had entrusted to Gedaliah son of Ahikam. Ishmael son of Nethaniah captured them and set out to cross to the Ammonites. bongo akomisaki bato nyonso oyo batikalaki na Mitsipa bawumbu : bana basi ya mokonzi mpe bato mosusu oyo batikalaki kuna na Mitsipa, oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atiaki na se ya bokonzi ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, amemaki bato oyo amemaki bango lokola bawumbu kati na mokili ya bato ya Amoni.
11 When Johanan son of Kareah and all the army commanders with him heard all the evil Ishmael son of Nethaniah did, Tango Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda, oyo bazalaki elongo na ye bayokaki sango ya makambo mabe oyo Isimaeli, mwana mobali ya Netania, asalaki,
12 they took all the men, went to fight Ishmael son of Nethaniah, finding him at the great pool in Gibeon. basangisaki bato na bango nyonso mpe bakendeki kobundisa Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; bakutanaki na ye pene ya liziba monene ya Gabaoni.
13 When all Ishmael's people saw Johanan son of Kareah and all the army commanders with him, they were glad. Tango bawumbu nyonso oyo Isimaeli akangaki bamonaki Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda, oyo bazalaki elongo na ye, batondisamaki na esengo makasi ;
14 So all the captives Ishmael took from Mizpah turned back and went to Johanan son of Kareah. mpe bato nyonso oyo Isimaeli amemaki lokola bawumbu, na Mitsipa, babalukaki mpe bakendeki kosangana na Yoanani, mwana mobali ya Karea.
15 But Ishmael son of Nethaniah escaped from Johanan with eight men and went on to the Ammonites. Kasi Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpe bato mwambe oyo bazalaki elongo na ye babikaki na maboko ya Yoanani mpe bakimaki epai ya bato ya Amoni.
16 Then Johanan son of Kareah and all the commanders of the forces with him took from Mizpah the rest of the people Johanan had rescued from Ishmael son of Nethaniah after Ishmael killed Gedaliah son of Ahikam—soldiers, women, children, and officials brought back from Gibeon. Sima na yango, Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki elongo na ye bamemaki bato nyonso ya Mitsipa oyo babikaki, oyo Isimaeli, mwana mobali ya Netania, amemaki na bowumbu wuta na Mitsipa sima na ye koboma Gedalia, mwana mobali ya Ayikami : basoda, basi, bana mpe bakalaka ya lokumu ya mokonzi ; elingi koloba bato nyonso oyo azongisaki wuta na Gabaoni.
17 They set out and stopped at Geruth Chimham near Bethlehem, heading for Egypt, Bakobaki nzela na bango mpe batelemaki na molako ya Kimeami, pene ya Beteleemi, mpo ete bazalaki na posa ya kokende na Ejipito
18 because they feared the Babylonians, since Ishmael son of Nethaniah killed Gedaliah son of Ahikam, whom Babylon's king appointed over the land. mpo na kokima bato ya Babiloni, pamba te bazalaki kobanga bango ; mpe mpo ete Isimaeli, mwana mobali ya Netania, abomaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, oyo mokonzi ya Babiloni akomisaki moyangeli ya mokili.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]