Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 38 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Shephatiah son of Mattan, Gedaliah son of Pashhur, Jucal son of Shelemiah, and Pashhur son of Malchijah heard Jeremiah telling all the people: Shefatia, mwana mobali ya Matani ; Gedalia, mwana mobali ya Pashuri ; Yukali, mwana mobali ya Shelemia ; mpe Pashuri, mwana mobali ya Malikiya, bayokaki makambo oyo Jeremi azalaki koyebisa bato nyonso. Azalaki koloba :
2 "This is what our Father says: Whoever stays in this city will die by sword, famine, and plague, but whoever surrenders to the Babylonians will live and keep his life as plunder. « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Moto nyonso oyo akotikala kati na engumba oyo akokufa na mopanga, na nzala makasi to mpe na bokono oyo ebomaka ; kasi ye oyo akobima mpo na kokende komikaba epai ya bato ya Babiloni akobika, akokufa te ; bomoi na ye ekozala bomengo na ye ya bitumba, mpe akotikala na bomoi. ›
3 This is what our Father says: This city will surely be handed to the army of Babylon's king, and he will capture it." Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Engumba oyo ekokweya na maboko ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobotola yango. › »
4 The officials told the king, "Put this man to death. Such words weaken the hands of the soldiers left in this city and all the people. He seeks not their good but their harm." Bakalaka balobaki na mokonzi : — Moto oyo asengeli kokufa ! Maloba na ye ezali kolembisa basoda mpe bato oyo batikali kati na engumba oyo ; azali koluka bolamu ya bato oyo te, kasi azali nde koluka mabe na bango.
5 King Zedekiah said, "Look, he is in your hands; the king can do nothing to oppose you." Mokonzi Sedesiasi azongisaki : — Azali na maboko na bino ; mokonzi akoki koboya likanisi na bino te !
6 They took Jeremiah and threw him into the cistern of Malchiah the king's son, in the guard's courtyard, lowering him by ropes. It had no water, only mud, and Jeremiah sank in. Boye, bakamataki Jeremi mpe babwakaki ye kati na libulu ya Malikiya, mwana mobali ya mokonzi ; libulu yango ezalaki kati na lopango ya bakengeli. Bakitisaki Jeremi kati na libulu na nzela ya basinga ; libulu ezalaki na mayi te, kaka na potopoto ; mpe Jeremi azindaki makasi kati na potopoto yango.
7 But Ebed-Melech the Cushite, a palace official, heard that they had put Jeremiah in the cistern. While the king was sitting at the Benjamin Gate, Ebedi-Meleki, moto ya Kushi, kalaka ya lokumu oyo azalaki kosala kati na ndako ya mokonzi, ayokaki ete babwaki Jeremi kati na libulu. Boye, wana mokonzi avandaki na Ekuke ya Benjame,
8 Ebed-Melech went out from the palace and spoke to the king: Ebedi-Meleki abimaki na ndako ya mokonzi mpe akendeki koloba na mokonzi :
9 "My lord the king, these men have done evil in all they did to Jeremiah the prophet, throwing him in the cistern to die of hunger, since there's no more bread in the city." — Mokonzi, nkolo na ngai, kati na nyonso oyo basali mosakoli Jeremi, bato oyo basali mabe penza ! Basili kobwaka ye kati na libulu epai wapi akokufa na nzala, mpo ete mapa ezali lisusu te kati na engumba !
10 The king ordered Ebed-Melech the Cushite, "Take thirty men from here with you and lift Jeremiah the prophet from the cistern before he dies." Mokonzi apesaki mitindo oyo epai ya Ebedi-Meleki, moto ya mokili ya Kushi : — Kamata awa mibali tuku misato elongo na yo, mpe bobimisa mosakoli Jeremi wuta na libulu liboso ete akufa.
11 Ebed-Melech took the men, went to the palace, to a room under the treasury, took old rags and worn-out clothes, and let them down by ropes to Jeremiah in the cistern. Ebedi-Meleki akamataki mibali yango mpe akendeki na ndako ya mokonzi, kati na shambre oyo ezalaki na se ya ebombelo bomengo ; azwaki kuna bilamba ya kala mpe oyo epasuka, mpe akitisaki yango na nzela ya basinga epai ya Jeremi kati na libulu.
12 Ebed-Melech the Cushite told Jeremiah, "Put these worn-out rags and clothes under your armpits, below the ropes." Jeremiah did. Ebedi-Meleki, moto ya Kushi, alobaki na Jeremi : — Tia bilamba oyo na se ya mapeka na yo, likolo ya basinga oyo mpo na kobatela mapeka na yo. Jeremi asalaki se bongo.
13 They pulled Jeremiah up out of the cistern with ropes; Jeremiah stayed in the guard's courtyard. Babendaki ye na basinga mpe babimisaki ye na libulu. Mpe Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli.
14 Then King Zedekiah sent for Jeremiah the prophet and had him brought to the third entrance of our Father's house. The king said to Jeremiah, "I'll ask you something; hide nothing from me." Mokonzi Sedesiasi atindaki ete bamemela ye mosakoli Jeremi mpe bakotisa ye na Ekuke ya misato ya Tempelo ya Yawe. Mokonzi alobaki na Jeremi : — Nazali na likambo moko ya kotuna epai na yo ; kobombela ngai eloko moko te !
15 Jeremiah told Zedekiah, "If I tell you, won't you kill me? And if I advise you, you won't listen." Jeremi alobaki na mokonzi Sedesiasi : — Soki nayebisi yo yango, okoboma ngai te ? Ezala napesi yo toli, okoyokela na yo ngai te.
16 King Zedekiah secretly swore to Jeremiah, "As our Father lives, who made us this life, I won't kill you or hand you to these men seeking your life." Kasi mokonzi Sedesiasi alapaki ndayi na nkuku epai ya Jeremi : — Na Kombo na Yawe oyo apesaka biso pema, nakoboma yo te, mpe nakokaba yo te na maboko ya bato oyo balingi koboma yo !
17 Jeremiah told Zedekiah, "This is what the Father of heaven's armies, the Father of Israel says: If you surrender to the king of Babylon's officials, your life will be spared, this city won't be burned with fire, and you and your household will live. Bongo Jeremi alobaki na Sedesiasi : — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : « Soki kaka omipesi epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, yo mpe libota na yo bokokufa te, mpe engumba oyo ekobebisama na moto te.
18 But if you refuse to surrender to the king of Babylon's officials, this city will be given to the Babylonians, who will burn it, and you won't escape them." Kasi soki oboyi komipesa epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni mpe bakotumba yango, bongo ezala yo, okobika te na maboko na bango. »
19 King Zedekiah told Jeremiah, "I fear the Judeans who deserted to the Babylonians; I may be handed over for them to abuse." Mokonzi Sedesiasi alobaki na Jeremi : — Nazali kobanga Bayuda oyo bakei na ngambo ya bato ya Babiloni, mpo ete bato ya Babiloni bakoki kokaba ngai na maboko na bango mpe bakonyokola ngai.
20 Jeremiah said, "They won't hand you over. Obey our Father's voice as I tell you, so it goes well and your life is spared. Jeremi azongisaki : — Te, bakokaba yo te ! Nabondeli yo, tosa Yawe mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo ; bongo nyonso ekotambola malamu mpo na yo mpe okobikisa bomoi na yo.
21 But if you refuse to surrender, this is the word that our Father has shown me: Kasi soki oboyi komipesa epai na bango, tala makambo oyo Yawe atalisi ngai :
22 "Look! All the women left in the palace of Judah's king will be brought out to the officials of Babylon's king, and they'll say: 'Your trusted friends misled and overpowered you; your feet sank in the mud, and they have turned their backs on you.'" « Bakomema basi nyonso oyo bavandaka kati na ndako ya mokonzi ya Yuda epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, mpe basi yango bakoloba : ‹ Baninga na yo ya motema bakosi yo mpe balongi yo. Matambe na yo ezindi na potopoto, baninga na yo bakimi yo ! › »
23 "All your wives and children will be taken to the Babylonians, and you will not escape their hand but be seized by Babylon's king, and this city burned with fire." Bakomema basi na yo nyonso mpe bana na yo nyonso epai ya bato ya Babiloni ; mpe yo moko okobika te na maboko na bango, mokonzi ya Babiloni akokanga yo mpe akobebisa engumba oyo na moto.
24 Then Zedekiah said to Jeremiah, "Let no one know about this conversation, or you may die. Sedesiasi alobaki na Jeremi : — Tika ete moto moko te ayeba makambo oyo, mpe okokufa te.
25 If the officials hear I spoke with you and come saying, 'Tell us what you said to the king and what he said to you; hide nothing from us, or we will put you to death,' Soki bakalaka bayoki ete tosololi na yo mpe bayei kotuna yo : « Yebisa biso makambo oyo oyebisi mokonzi mpe oyo mokonzi ayebisi yo. Kobombela biso eloko te, soki te, tokoboma yo. »
26 then tell them, 'I was begging the king not to send me back to Jonathan's house to die.'" Loba bango : « Nakomisi libondeli na ngai liboso ya mokonzi mpo ete azongisa ngai na ndako ya Jonatan te, noki te nakokufela kuna. »
27 All the officials came and questioned Jeremiah, and he answered exactly as the king had ordered. So they stopped, for the conversation had not been overheard. Bakalaka nyonso bayaki epai ya Jeremi mpe batunaki ye mituna ; ye mpe ayebisaki bango makambo nyonso, ndenge kaka mokonzi atindaki ye. Boye, lokola bazalaki lisusu na likambo ya koloba na ye te, pamba te moto moko te ayokaki masolo na ye na mokonzi, babendanaki na kimia.
28 Jeremiah stayed in the guard's courtyard until the day Jerusalem was captured. And this was the situation when Jerusalem fell. Jeremi atikalaki kati na lopango ya bakengeli kino na mokolo oyo babotolaki engumba Yelusalemi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]