Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 37 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Zedekiah son of Josiah reigned instead of Coniah son of Jehoiakim, whom Nebuchadnezzar king of Babylon made king in Judah's land. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akomisaki Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda na esika ya Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi.
2 But neither he, his servants, nor the land's people heeded our Father's words spoken through Jeremiah the prophet. Ezala ye, bakalaka na ye ya lokumu mpe bato ya mokili, moko te ayokaki na bokebi maloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi.
3 King Zedekiah sent Jehucal son of Shelemiah and Zephaniah son of Maaseiah the priest to Jeremiah the prophet: "Please pray to our Father for us." Mokonzi Sedesiasi atindaki Yewukali, mwana mobali ya Shelemia, mpe Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, epai ya mosakoli Jeremi mpo ete bayebisa ye maloba oyo : « Nabondeli yo, bondela Yawe, Nzambe na biso, mpo na biso ! »
4 Jeremiah was still coming and going among the people; they had not yet imprisoned him. Na tango wana, Jeremi azalaki na bonsomi ya kotambola na esika oyo alingi kati na bato, pamba te batiaki ye nanu na boloko te.
5 Pharaoh's army had marched from Egypt; when the Babylonians besieging Jerusalem heard, they withdrew from Jerusalem. Tango basoda ya Babiloni, oyo bazingelaki engumba Yelusalemi bayokaki sango ete basoda ya Faraon babimi na Ejipito, batikaki kozingela Yelusalemi.
6 Then the word of our Father came to Jeremiah the prophet: Bongo tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi :
7 This is what our Father of Israel says: Tell Judah's king who sent you to ask me: Pharaoh's army that marched out to help you is returning home to Egypt. « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Yebisa mokonzi ya Yuda oyo atindi yo kotuna toli epai na Ngai : ‹ Basoda ya Faraon oyo babimaki na mokili na bango mpo na koya kosunga yo bakozonga na mokili na bango, na Ejipito ;
8 Then the Babylonians will return and fight this city, capture it, and burn it down. mpe basoda ya Babiloni bakozonga mpe bakobundisa engumba oyo ; bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. ›
9 This is what our Father says: Don't fool yourselves, saying, "The Babylonians will surely leave us"—they won't leave. Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bokanisa te ete bato ya Babiloni bakolongwa na mokili na bino. Te ! Bakolongwa te. ›
10 Even if you struck down the whole Babylonian army fighting you, and only wounded men were left in their tents, they would rise up and burn this city down. Ezala soki bolongi basoda nyonso ya Babiloni, oyo bazali kobundisa bino mpe etikali kaka ndambo ya bato oyo bazoki-zoki bapota, bakolonga kotelema kati na bandako na bango ya kapo mpe kobima mpo na kobebisa engumba oyo na moto. »
11 Now when the Babylonian army had withdrawn from Jerusalem because of Pharaoh's army, Sima na basoda ya Babiloni kotika kozingela Yelusalemi likolo ya basoda ya Faraon, oyo bazalaki kopusana,
12 Jeremiah left Jerusalem for the land of Benjamin to claim his share there among the people. Jeremi alingaki kobima na Yelusalemi mpo ete akende kozwa, kati na etuka ya Benjame, libula na ye ya mabele kati na bato ya kuna.
13 At the Benjamin Gate, guard captain Irijah son of Shelemiah son of Hananiah seized Jeremiah the prophet: "You're deserting to the Babylonians!" Kasi tango akomaki na Ekuke ya Benjame, mokambi ya bakengeli ya mokonzi, oyo kombo na ye ezalaki Iriya, mwana mobali ya Shelemia, mwana mobali ya Anania, akangaki mosakoli Jeremi mpe atunaki ye : — Boni, ozali kokende na ngambo ya bato ya Babiloni ?
14 Jeremiah said, "A lie! I'm not deserting to the Babylonians." But Irijah ignored him, seized Jeremiah, and took him to the officials. Jeremi azongisaki : — Te ! Ezali lokuta, nazali kokende na ngambo ya bato ya Babiloni te ! Kasi Iriya aboyaki koyoka ye, akangaki ye kaka mpe amemaki ye epai ya bakambi.
15 The officials were angry with Jeremiah, beat him, and jailed him in the house of Jonathan the scribe, made into a prison. Bakambi batombokelaki Jeremi makasi, babetaki ye mpe batiaki ye na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, ndako oyo bakomisaki boloko.
16 So Jeremiah went into the vaulted cells of the dungeon, and there he remained many days. Babwakaki Jeremi kati na boloko ya se ya mabele epai wapi awumelaki tango molayi.
17 Then King Zedekiah sent for him and had him brought out. The king questioned him privately at the palace and asked, "Is there any word from our Father?" "There is," Jeremiah said. "You will be handed to the king of Babylon." Mokolo moko, mokonzi Sedesiasi atindaki ete bakende kozwa ye mpe bamema ye na ndako ya mokonzi epai wapi atunaki ye na nkuku : — Boni, ozali ata na liloba moko te kowuta epai na Yawe ? Jeremi azongisaki : — Solo, liloba ezali ! Okokweya na maboko ya mokonzi ya Babiloni.
18 Jeremiah asked King Zedekiah, "How have I sinned against you, your servants, or this people, that you jailed me? Bongo Jeremi alobaki lisusu na mokonzi Sedesiasi : — Mabe nini penza ngai nasali yo to bakalaka na yo to mpe bato na yo mpo ete bobwaka ngai kati na boloko oyo ?
19 Where now are your prophets who prophesied, 'The king of Babylon won't come against you or this land'? Wapi basakoli na bino oyo bazalaki koloba ete mokonzi ya Babiloni akoya te kobundisa bino mpe mokili na bino ?
20 Please hear me, my lord the king: let my plea reach you—don't send me back to Jonathan the scribe's house, or I'll die there." Kasi sik’oyo mokonzi, nkolo na ngai, nabondeli yo : yoka ngai ! Tika ete mabondeli na ngai ekoma liboso na yo : kozongisa ngai te kati na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, noki te nakokufa kuna !
21 King Zedekiah gave orders, and they placed Jeremiah in the guard's courtyard, giving him a loaf of bread daily from the bakers' street until the city's bread ran out. So Jeremiah stayed in the guard's courtyard. Mokonzi Sedesiasi apesaki mitindo ete batia Jeremi kati na lopango ya bakengeli mpe bapesaka ye, mokolo na mokolo, lipa moko oyo ekobanda kowuta na balabala ya bato oyo basalaka mapa, kino tango mapa ekosila kati na engumba. Boye, Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]