Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 36 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In Judah's King Jehoiakim son of Josiah's fourth year, this word came to Jeremiah from our Father: Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi, na mobu ya minei ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda :
2 "Take a scroll and write on it everything I've spoken to you against Israel, Judah, and all nations, from when I first spoke to you in Josiah's days until now. « Kamata mokanda, mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo nalobaki na yo mpo na Isalaele, mpo na Yuda mpe mpo na bikolo nyonso mosusu, wuta mokolo oyo nabandaki koloba na yo, na tango Joziasi azalaki mokonzi, kino na mokolo ya lelo.
3 Perhaps Judah will hear all the disaster I plan to bring on them, each turning from his evil way, so I forgive their guilt and sin." Tango mosusu, soki bato ya Yuda bayoki sango ya pasi nyonso oyo nabongisi mpo na kotindela bango, moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; mpe, na bongo, Ngai nakolimbisa mabe mpe masumu na bango. »
4 Jeremiah summoned Baruch son of Neriah, and Baruch wrote on a scroll, from Jeremiah's dictation, all the words our Father had spoken to him. Boye, Jeremi abengaki Baruki, mwana mobali ya Neriya, mpe wana Jeremi azalaki koloba makambo nyonso oyo Yawe ayebisaki ye, Baruki azalaki kokoma yango na mokanda.
5 Then Jeremiah instructed Baruch, "I am confined; I cannot go to the house of our Father. Jeremi alobaki na Baruki : « Ngai nakangami, nakolonga kokende na Tempelo ya Yawe te.
6 Go read from the scroll our Father's words you wrote as I dictated—read them to all the people in our Father's house on a fast day, and to the people of Judah coming from their towns. Boye yo, kende na Tempelo ya Yawe, na mokolo ya kokila bilei, mpe tangela bato maloba ya Yawe, oyo okomaki na mokanda, wana ngai nazalaki koloba na yo ; tangela yango bato nyonso ya Yuda, oyo bakoya wuta na bingumba na bango.
7 Perhaps their plea for mercy will reach our Father, and each will turn from his evil way, for our Father has declared great anger against this people." Tango mosusu mabondeli na bango ekokoma liboso ya Yawe, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; pamba te kotomboka mpe kanda oyo Yawe akani kokitisela bato oyo ezali monene. »
8 Baruch son of Neriah did all Jeremiah the prophet commanded him, reading our Father's words in the book, in our Father's house. Baruki, mwana mobali ya Neriya, asalaki makambo nyonso oyo mosakoli Jeremi atindaki ye kosala ; atangaki na Tempelo ya Yawe maloba ya Yawe oyo ekomamaki na mokanda.
9 In the fifth year of Jehoiakim son of Josiah king of Judah, ninth month, all in Jerusalem and all who came from Judah's towns proclaimed a fast before our Father. Na sanza ya libwa, ya mobu ya mitano ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, babengisaki mokolo ya kokila bilei liboso ya Yawe, mpo na bavandi nyonso ya Yelusalemi mpe bato oyo bawutaki na bingumba ya Yuda.
10 Baruch read Jeremiah's words from the scroll for all the people to hear, in the house of our Father, in the chamber of Gemariah son of Shaphan the scribe, in the upper court, at the New Gate entrance of our Father's house. Baruki atangelaki bato nyonso, kati na Tempelo ya Yawe, maloba ya Jeremi oyo ekomamaki na mokanda, wuta na shambre ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani oyo azalaki mokomi mikanda ; shambre yango ezalaki kati na lopango ya likolo, na ekotelo ya Ekuke ya Sika ya Tempelo.
11 When Micaiah son of Gemariah, son of Shaphan, heard all our Father's words from the scroll, Tango Mishe, mwana, mobali ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani, ayokaki maloba nyonso ya Yawe oyo ekomamaki na mokanda,
12 he went down to the king's house, to the scribe's room, where all the officials sat: Elishama the scribe, Delaiah son of Shemaiah, Elnathan son of Achbor, Gemariah son of Shaphan, Zedekiah son of Hananiah, and all the officials. akendeki na ndako ya mokonzi, akotaki kati na ndako ya mosala ya mokomi mikanda epai wapi bakalaka nyonso bazalaki na mayangani : Elishama, mokomi mikanda ; Delaya, mwana mobali ya Shemaya ; Elinatani, mwana mobali ya Akibori ; Gemaria, mwana mobali ya Shafani ; Sedesiasi, mwana mobali ya Anania ; mpe bakalaka nyonso mosusu.
13 Micaiah reported all the words he heard when Baruch read from the book to the people. Sima na Mishe koyebisa bango makambo nyonso oyo ayokaki epai ya Baruki tango azalaki kotangela bato makomi oyo ezalaki kati na mokanda,
14 So all the officials sent Jehudi son of Nethaniah, son of Shelemiah, son of Cushi, to Baruch: "Bring the scroll you read to the people, and come." Baruch son of Neriah took it and came to them. bakambi nyonso batindaki Yewudi, mwana mobali ya Netania, mwana mobali ya Shelemia, mwana mobali ya Kushi, epai ya Baruki mpo na koyebisa ye : « Yaka yo moko elongo na mokanda oyo atangelaki bato. » Baruki, mwana mobali ya Neriya, akendeki epai na bango mpe amemaki mokanda na maboko na ye.
15 They told him, "Sit and read it to us." So Baruch read it to them. Balobaki na ye : — Tobondeli yo, vanda, tangela biso mokanda oyo. Baruki atangelaki bango mokanda yango.
16 Hearing all the words, each turned to his neighbor in fear, saying to Baruch, "We must tell the king all these words." Tango bayokaki maloba wana nyonso, bakomaki kotalana bango na bango na somo mpe balobaki na Baruki : — Tosengeli penza koyebisa makambo oyo nyonso epai ya mokonzi.
17 They asked Baruch, "Tell us, how did you write all these words? At his dictation?" Batunaki Baruki : — Yebisa biso ndenge nini osalaki mpo na kokoma makambo oyo nyonso. Ezali Jeremi te moto ayebisi yo makambo oyo ?
18 Baruch answered, "He dictated all these words to me; I wrote them in the book with ink." Baruki azongisaki : — Solo, ezali ye moto ayebisaki ngai makambo oyo nyonso, mpe ngai nasalelaki kaka ekomeli mpo na kotia yango na mokanda.
19 Then the officials told Baruch, "Go hide, you and Jeremiah; let no one know where you are." Bakambi bayebisaki Baruki : — Yo mpe Jeremi, bokende kobombama. Mpe tika ete moto moko te ayeba esika bokozala.
20 So they went to the king in the court, leaving the scroll in scribe Elishama's room, and reported everything to him. Sima na bango kotia mokanda yango kati na ndako ya mosala ya Elishama, mokomi mikanda, bakendeki epai ya mokonzi kati na lopango mpe bayebisaki ye makambo nyonso.
21 The king sent Jehudi for the scroll; he took it from the scribe Elishama's room. Jehudi read it aloud to the king and all the officials standing near him. Mokonzi atindaki Yewudi mpo ete akende kozwa mokanda yango, mpe Yewudi akendeki kozwa yango na ndako ya mosala ya mokomi mikanda Elishama mpe atangaki yango liboso ya mokonzi mpe ya bakalaka nyonso oyo batelemaki pene na ye.
22 The king sat in the winter house, in the ninth month, fire burning in the firepot before him. Ezalaki na sanza ya libwa ; mokonzi avandaki kati na shambre oyo bakimelaka na tango ya malili mpe azalaki koyetola moto oyo ezalaki kopela liboso na ye.
23 As Jehudi read three or four columns, the king cut them off with a scribe's knife, throwing them into the fire pot until the whole scroll was burned. Soki Yewudi atangi milongo misato to minei ya makomi ya mokanda, mokonzi azalaki kokata yango na mbeli ya mokomi mikanda mpe kobwaka yango na moto, kino tango mokanda nyonso esilaki kozika na moto.
24 But the king and all his servants who heard these words weren't afraid or tore their clothes. Boye, mokonzi elongo na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki koyoka makambo oyo ekomamaki na mokanda yango bamitungisaki na eloko moko te mpe bapasolaki bilamba na bango te.
25 Elnathan, Delaiah, and Gemariah urged the king not to burn the scroll, but he refused to listen to them. Atako Elinatani, Delaya mpe Gemaria bazalaki kobondela mokonzi ete atumba mokanda yango te, atikalaki koyokela bango te.
26 The king ordered Jerahmeel the king's son, Seraiah son of Azriel, and Shelemiah son of Abdeel to seize Baruch the scribe and Jeremiah the prophet, but our Father hid them. Kutu, mokonzi atindaki Yerameeli, kalaka ya makila ; Seraya, mwana mobali ya Azirieli, mpe Shelemia, mwana mobali ya Abideyeli, ete bakanga Baruki, mokomi mikanda, mpe mosakoli Jeremi. Kasi Yawe abombaki bango.
27 Then our Father's word came to Jeremiah after the king burned the scroll with the words Baruch wrote at Jeremiah's dictation: Tango mokonzi asilisaki kotumba mokanda oyo ezalaki na maloba oyo Baruki akomaki na etinda ya Jeremi, Yawe alobaki na Jeremi :
28 "Get another scroll and write on it all the words from the first scroll, which Jehoiakim king of Judah burned. — Kamata mokanda mosusu mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo ezalaki na mokanda ya liboso oyo mokonzi Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki.
29 About Jehoiakim king of Judah, say: This is what our Father says: You burned this scroll, asking, 'Why did you write that the king of Babylon will surely come and destroy this land, wiping out every person and animal?' Loba lisusu na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Ezali yo nde moto otumbaki mokanda wana mpe olobaki : ‹ Mpo na nini okomaki ete mokonzi ya Babiloni akoya kobebisa mokili oyo mpe koboma ezala bato to banyama ? ›
30 So our Father says of Jehoiakim king of Judah: none of his will sit on the throne of David; his corpse will be thrown out to the day's heat and the night's frost. Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda : Ekozala na mokitani na ye moko te oyo akokitana na ye na kiti ya bokonzi ya Davidi ; ebembe na ye ekobwakama na libanda, mpe bakotanda yango na molunge ya moyi mpe na malili ya butu.
31 I will punish him, his offspring, and his servants for their sin, bringing on them, Jerusalem's residents, and Judah's people all the disaster I declared against them—but they did not listen." Nakopesa ye, bana na ye mpe basali na ye nyonso etumbu mpo na mabe na bango ; nakotindela bango elongo na bavandi ya Yelusalemi mpe ya Yuda, pasi nyonso oyo nalakaki bango, mpo ete bayokaki Ngai te. »
32 Jeremiah took another scroll, gave it to Baruch son of Neriah the scribe, who wrote at his dictation all the words of the scroll Jehoiakim king of Judah burned in the fire, plus many similar words. Jeremi azwaki mokanda mosusu mpe apesaki yango na Baruki, mokomi mikanda, mwana mobali ya Neriya. Wana Jeremi azalaki koloba makambo oyo ezalaki kati na mokanda oyo Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki, Baruki azalaki kokoma yango. Mpe makambo ebele mosusu ya lolenge wana ebakisamaki na kati.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]