Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 35 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word that came to Jeremiah from our Father in the days of Jehoiakim son of Josiah, king of Judah: Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi wana Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, azalaki mokonzi :
2 "Go to the Rechabites' house, speak with them, bring them into a side room of my house, and give them wine to drink." « Kende epai ya bato ya libota ya Rekabi mpe bengisa bango ete baya kokota kati na moko ya bashambre ya Tempelo ya Yawe. Mpe pesa bango masanga ya vino ya komela kuna. »
3 So I took Jaazaniah son of Jeremiah, son of Habazziniah, and his brothers and all his sons and the whole house of the Rechabites, Boye, nakendeki kokutana na Yazania, mwana mobali ya Jeremi, mwana mobali ya Abatsinia, mpe bandeko na ye ya mibali elongo na bana na bango nyonso ya mibali : libota mobimba ya bato ya libota ya Rekabi.
4 and I brought them to our Father's house, into the room of the sons of Hanan son of Igdaliah, the man of our Father, next to the officials' room, above the room of Maaseiah son of Shallum, the gatekeeper. Namemaki bango na Tempelo ya Yawe, kati na shambre ya bana mibali ya Anani, mwana mobali ya Yigidalia, moto na Nzambe, pene ya shambre ya bakambi. Shambre yango ezalaki na sima ya shambre ya Maaseya, mwana mobali ya Shalumi, mokengeli ekuke.
5 Then I set bowls full of wine and cups before the sons of the house of the Rechabites and said, "Drink some wine." Natiaki biloko etonda na vino mpe ndambo ya bakopo liboso ya bato ya libota ya Rekabi ; mpe nalobaki na bango : — Bomela masanga ya vino.
6 But they said, "We will not drink wine, for our father Jonadab son of Rechab commanded us: You and your children will never drink wine. Kasi bazongisaki : — Tomelaka masanga ya vino te, mpo ete koko na biso, Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, apesaki biso mobeko oyo : « Bokoki komela masanga ya vino te, ezala bino to bakitani na bino,
7 Do not build a house, sow seed, or plant a vineyard; own none. Live in tents all your days, so you may live many days on the land where you stay.' mpe bokoki kotonga bandako te, kosala bilanga te, kolona banzete ya vino te mpe bokoki kozala na biloko wana te ; kasi bosengeli kaka kovanda tango nyonso na bandako ya kapo, mpo ete bozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bozali baleki nzela. »
8 So we have obeyed Jonadab son of Rechab, our father, in all he commanded us: to drink no wine all our days—we, our wives, our sons, and our daughters, Totosaka makambo nyonso oyo koko na biso Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, ayebisa biso : Ezala biso, basi na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, tomelaka masanga ya vino te,
9 and not to build houses to live in. We have no vineyard or field or seed, totongaka bandako te mpo na kovanda kuna, tozalaka na bilanga ya vino te, bilanga te mpe milona te ;
10 but we have lived in tents, obeying and doing all our father Jonadab commanded us. tovandaka kaka na bandako ya kapo mpe totosaka makambo nyonso oyo koko na biso, Yonadabi, ayebisa biso.
11 But when King Nebuchadnezzar of Babylon invaded the land, we said, 'Come, let's go to Jerusalem to escape the Babylonian and Aramean armies.' So we live in Jerusalem." Kasi tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abotolaki mokili oyo, tolobaki : « Boya, tokende na Yelusalemi mpo ete tobikisa bomoi na biso liboso ya basoda ya Babiloni mpe ya Siri. » Yango wana, toyaki kovanda na Yelusalemi.
12 Then the word of our Father came to Jeremiah: Bongo tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi :
13 This is what the Father of heaven's armies, the Father of Israel, says: Tell the people of Judah and Jerusalem's residents: Will you not accept correction and listen to my words? declares our Father. — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Kende koyebisa bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi : « Bokoki solo kozwa liteya te mpe kotosa maloba na Ngai te, » elobi Yawe ?
14 Jonadab son of Rechab's command that his children not drink wine has been kept; to this day they drink none, because they obeyed their father's order. But I have spoken to you again and again, and you have not listened to me. « Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, apesaki mobeko epai ya bana na ye ete bamela masanga ya vino te, mpe babatelaka mobeko yango. Kino na mokolo ya lelo, bamelaka masanga ya vino te mpo na kotosa mobeko oyo koko na bango apesaki bango. Nzokande, tango na tango, Ngai nazalaki koloba na bino, kasi bozalaki koyoka Ngai te.
15 Again and again I sent you all my servants the prophets, saying, 'Each of you, turn from your evil way and correct your deeds. Do not follow other gods to serve them, and you will live in the land I gave you and your ancestors.' But you have not listened or paid attention to me. Nazalaki tango na tango kotindela bino basali na Ngai nyonso, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe mpe abongola bizaleli na ye ; bosalela banzambe mosusu te mpo ete bokoka kovanda kati na mokili oyo napesaki bino mpe batata na bino. › Kasi boyokaki Ngai te mpe botosaki Ngai te.
16 Jonadab son of Rechab's descendants kept their father's command, but this people has not listened to me. Bakitani ya Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, babatelaki mobeko oyo koko na bango apesa bango, kasi bato oyo baboyi kotosa Ngai. »
17 So the Father of heaven's armies, the Father of Israel, says: "I am bringing on Judah and all the people of Jerusalem every disaster I pronounced against them, because I spoke to them and they did not listen, I called to them and they did not answer." Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na mokili ya Yuda mpe epai ya bavandi nyonso ya Yelusalemi pasi oyo nakataki ; pamba te nalobaki na bango kasi bayokaki Ngai te, nabengaki bango kasi bayanolaki Ngai te. »
18 Jeremiah said to the house of the Rechabites, "This is what the Father of heaven's armies, the Father of Israel, says: Because you obeyed your father Jonadab's command, kept all his instructions, and did everything he commanded you, Boye, Jeremi alobaki na bato ya libota ya Rekabi : — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Lokola botosaka mobeko ya koko na bino Yonadabi, bolandaka malako nyonso oyo ayebisa bino mpe bosalelaka makambo nyonso oyo atinda bino,
19 so says the Father of heaven's armies, the Father of Israel: Jonadab son of Rechab will always have a descendant standing before me." tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, akotikala kozanga te moto oyo akosalela Ngai. › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]